Kozala mobola elakisi ete Nzambe apambolaka yo te?
NZAMBE ayebisaki Bayisraele boye: “Moto moko te asengeli kokóma mobola epai na yo.” Ezalaki bongo mpamba te na Mibeko oyo apesaki bango, ezalaki na malako oyo etali kosalisa babola mpe kotika kosɛnga nyongo. (Kolimbola Mibeko 15:1-4, 7-10) Na yango, babola basengelaki kozala na kati ya Bayisraele te, mpo Yehova alakaki ete akopambola bango. Nzokande, mpo apambola bango, Bayisraele basengelaki kotosa Mibeko; kasi, batosaki te.
Kasi, yango elimboli te ete bato nyonso oyo bazalaki na bozwi te bazalaki na lipamboli ya Nzambe te, to ete bato nyonso oyo bazalaki na bomɛngo bazalaki na lipamboli ya Nzambe. Basaleli mingi ya Nzambe oyo bazalaki sembo bazalaki babola. Mosakoli Amose azalaki mobɔkɔli-mpate mpe mosali-bilanga na bileko mosusu. (Amose 1:1; 7:14) Na mikolo ya mosakoli Eliya, ntango nzala ekɔtaki na Yisraele, Eliya azalaki kobikela kaka na boyambi ya mwasi moko ya mobola, oyo mobali na ye akufá; Yehova asalaki ete mwa farini ná mafuta oyo mwasi yango azalaki na yango esila te na boumeli ya eleko ya nzala. Ezala Eliya, ezala mwasi yango bakómaki bazwi te; Yehova apesaki bango kaka biloko oyo basengelaki na yango mpo na kobikela.—1 Bakonzi 17:8-16.
Makambo oyo ekanamaki te ekoki kokómisa moto mobola. Likama mpe maladi ekoki kopekisa moto asala mosala mpo na mwa ntango to mpo na libela. Moto akoki kokufa mpe kotika mwasi ná bana. Ata soki makambo ya ndenge wana ekómeli moto, yango elakisi te ete Nzambe alingi ye te. Lisolo ya Naomi ná Ruta emonisi ete Yehova asalisaka bato oyo bazali na bosɛnga, mpe yango esimbaka mpenza motema. Atako Naomi ná Ruta batikalaki mabɔkɔ mpamba ntango mibali na bango bakufaki, Yehova Nzambe apambolaki bango mpe asalaki ete bázanga eloko te.—Ruta 1:1-6; 2:2-12; 4:13-17.
Tomoni polele ete soki moto azali mobola, yango elakisi te ete Nzambe apambolaka ye te. Bato oyo bazali sembo epai ya Yehova Nzambe bakoki kondima maloba oyo Mokonzi Davidi alobaki ete: “Nazalaki elenge, nakómi mpe mobange, kasi namoná naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.”—Nzembo 37:25.
[Elilingi na lokasa 8]
Atako Naomi ná Ruta batikalaki babola mpe mabɔkɔ mpamba, Nzambe apambolaki bango mpe akokisaki bamposa na bango