Mituna ya batángi
Yesu asakolaki na Yisalaele mobimba. Mpo na nini kasi ntoma Petelo alobaki ete Bayuda mpe bayangeli na bango ‘basalaki na kozanga koyeba’ ndenge babomaki ye?—Mis. 3:17.
Ntango ntoma Petelo azalaki koyebisa Bayuda makambo oyo basalaki na liwa ya Masiya, alobaki boye: “Nayebi ete bosalaki na kozanga koyeba, kaka ndenge bayangeli na bino mpe basalaki.” (Mis. 3:14-17) Ekoki kozala ete Bayuda mosusu basosolaki te ete Yesu azali Masiya, to mpe bakangaki ntina ya mateya na ye te. Bamosusu basalaki na kozanga koyeba mpo bazalaki na mposa ya kosepelisa Nzambe te, bazalaki kokanisela Yesu mabe, bazalaki koyokela ye likunya, to mpe bazalaki koyina ye.
Tótala ndenge nini kozanga mposa ya kosepelisa Nzambe etindaki bato mingi bátalela mateya ya Yesu. Mbala mingi, Yesu azalaki kosalela bandakisa na mateya na ye, mpe azalaki kolimbolela yango bato nyonso oyo bazalaki na mposa ya koyekola makambo malamumalamu. Kasi, bayoki mosusu bazalaki kokipe te mpe bazalaki kosala ata molende moko te mpo na kokanga ntina na yango. Mokolo moko, ata bayekoli mosusu basilikaki mpo na maloba ya elilingi oyo Yesu asalelaki. (Yoa. 6:52-66) Bato yango bakangaki ntina te ete bandakisa ya Yesu ezalaki nde komeka bango mpo bámonisa soki bazali na mposa ya kobongola makanisi mpe misala na bango. (Yis. 6:9, 10; 44:18; Mat. 13:10-15) Bakangaki mpe ntina te ya esakweli oyo elobaki ete Masiya akoteya na nzela ya bandakisa.—Nz. 78:2.
Basusu baboyaki mateya ya Yesu mpo bazalaki kokanisela ye mabe. Ntango ateyaki na sinagoga ya mboka na ye Nazalete, bato mingi “bakamwaki.” Kasi na esika bándima ete Yesu azali Masiya, babandaki nde kotuna mituna mpo na libota na ye ete: “Epai wapi moto oyo azwi makambo oyo? . . . Ye azali mosali ya mabaya mwana ya Malia mpe ndeko ya Yakobo ná Yozefe ná Yuda ná Simona, boye te? Mpe bandeko na ye ya basi bazali awa elongo na biso, boye te?” (Mko. 6:1-3) Mpo na bato ya Nazalete, lokola Yesu akolaki na libota ya bozwi te, mateya na ye mpe ezalaki na ntina te.
Bongo bakonzi ya mangomba? Mingi kati na bango batyelaki Yesu likebi mingi te kaka mpo na bantina wana. (Yoa. 7:47-52) Ntina mosusu oyo baboyaki mateya ya Yesu ezalaki mpo bazalaki koyokela ye likunya, mpo bato mingi bazalaki kosepela na ye. (Mko. 15:10) Mpe bato mingi ya lokumu bayokaki mpenza mabe ntango Yesu apamelaki bango polele mpo na bokosi mpe lokuta na bango. (Mat. 23:13-36) Yesu akweisaki bango mpo bazangaki boyebi; alobaki boye: “Mawa na bino baoyo boyebi Mibeko malamumalamu, mpamba te bolongoli fungola ya boyebi; bino moko bokɔtaki [na Bokonzi] te, mpe baoyo bazalaki kokɔta bokangaki bango nzela!”—Luka 11:37-52.
Yesu asakolaki nsango malamu na Yisalaele mbula misato na ndambo. Alakisaki mpe bato mosusu ndenge ya kosala mosala yango. (Luka 9:1, 2; 10:1, 16, 17) Lokola Yesu ná bayekoli na ye bayebaki mpenza kosakola, Bafalisai bamilelaki ete: “Talá! Mokili elandi ye.” (Yoa. 12:19) Na yango, Bayuda nyonso te nde bazangaki mpenza boyebi. Atako bongo, bazalaki koyeba kaka te ete Yesu azali Masiya. Bakokaki kokolisa boyebi mpe bolingo na bango mpo na Masiya, kasi basalaki yango te. Bamosusu basalisaki mpo na koboma Yesu. Yango wana, ntoma Petelo alendisaki mingi kati na bango na maloba oyo: “Bóbongola mitema mpe bóbongwana mpo masumu na bino ebomama, mpo bileko ya kopema euta epai ya Yehova ye moko mpe mpo atinda Klisto oyo aponami mpo na bino, Yesu.” (Mis. 3:19, 20) Likambo ya esengo ezali ete Bayuda mingi, ata “ebele moko ya banganga-nzambe” bakómaki kotya likebi. Bazalaki kosala na kozanga boyebi lisusu te. Kasi, babongolaki motema mpe Yehova andimaki bango.—Mis. 2:41; 4:4; 5:14; 6:7.