Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/15 nk. 8-9
  • Mobembo moko na Honduras

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mobembo moko na Honduras
  • Lamuká!—2015
Lamuká!—2015
g 4/15 nk. 8-9
Bokula ya Honduras

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Honduras

Karte ya Honduras

HONDURAS elimboli “mozindo” na Espagnol, ekoki kozala liloba oyo Christophe Colomb asalelaki mpo na kolobela mai oyo ezali pembenipembeni ya mokili yango oyo ezali na bokula ya Atlantike. Bamosusu balobaka ete ezali na ndenge wana nde Honduras ezwaki nkombo yango.

Bato ya Honduras bazwaka bosembo mpe boyokani na libota na valɛrɛ mingi. Na ndakisa, mobali ná mwasi na ye nde bazwaka bikateli ya minene lokola ndenge ya kosalela mbongo na libota to kobɔkɔla bana.

Bato mingi ya Honduras bazali bametisi, bana oyo mindɛlɛ ná bankolo-mboka wana babotaki. Tii lelo etuluku mosusu ya bankolo-mboka, na ndakisa Ba-Chortí bazali kaka. Bamosusu, na ndakisa Ba-Garifuna, bankɔkɔ na bango bautá epai mosusu.

Alangá nzembo ya Garifuna azali kobɛta mbonda

Mobɛti-miziki ya Garifuna azali kobɛta mbonda

Ba-Garifuna bazali bankɔkɔ ya bato ya Afrika mpe ya Ba-Indiens ya Caraïbe oyo bafandaká na esanga Saint Vincent. Na mobu soki 1797, Ba-Garifuna bayaki kofanda na Islas de la Bahía (îles de la Baie). Na nsima, bakómaki kofanda pembenipembeni ya mai ya Caraïbe, na mokili ya Amerika ya ntei. Nsukansuka, Ba-Garifuna bapalanganaki na bisika mosusu ya Amerika ya ntei mpe ya nɔrdi.

Ba-Garifuna babinaka makasi ntango mbonda ezali kobɛta. Balataka mpe bilamba ya bonkɔkɔ ya langilangi, babɛtaka baistware mpe balyaka bilei lokola ereba (gato moko ya monene ya papala oyo basalaka na songo [manioc]).

Masangá ya Batatoli ya Yehova ezali soki 400 na Honduras. Basalaka makita na bango ya losambo na Anglais, Espagnol, Garifuna, monɔkɔ ya bajɛstɛ ya Honduras, Mandarin mpe na monɔkɔ ya Miskito.

Ereba

Ereba, gato moko ya monene ya papala oyo basalaka yango na songo (manioc)

NA MOKUSE

  • Motángo ya bato: 8 111 000

  • Mboka-mokonzi: Tegucigalpa

  • Guvɛrnema: République démocratique

  • Monɔkɔ ya Leta: Espagnol

  • Klima: Molunge makasi, mwa malili na bangomba

  • Mokili: Eteni monene ya mabele na yango (75%) ezali ngombangomba. Na mabele ya patatalu ezali bisobe mpe bisanga

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto