Likaya ekangi bato na ndɔbɔ
BILL azalaki mobali moko malamu, mobali ya mayele mpe ya makasi. Azalaki kolinga libota na ye mingi. Kasi, ntango azalaki naino elenge, abandaki komela likaya. Nsima, akómaki koyina momeseno yango. Ata ntango azalaki komela likaya, azalaki kokebisa bana na ye makasi, azalaki koyebisa bango ete komela likaya ezali mpenza bozoba. Na bantango mosusu na kati ya ndako, azalaki kofina pakɛ ya likaya mpe kobwaka yango, na nsima azalaki kolapa ete ezali mbala na ye ya nsuka ya komela likaya. Nzokande, nsima ya mwa ntango moke, azalaki kozongela komela—na ebandeli akosala bongo na kobombama, kasi nsukansuka akozongela lisusu komela na polele.
Bill akufaki na maladi ya kansɛr esili koleka mbula 15, nsima ya basanza mingi ya konyokwama makasi na maladi. Soki azalaki komela likaya te, mbala mosusu mbele azali naino na bomoi. Mbele mwasi na ye azali naino na mobali; mpe mbele bana na ye bazali naino na tata.
Atako lokola Bill akufi mpe atiki libota na ye na mpasi, kasi ezali bobele ye moko te oyo akufi bongo. OMS (Organisation mondiale de la santé) elobi ete bato soko milio minei mbula na mbula, to moto moko na sɛgɔndɛ mwambe, bazali kokufa na maladi oyo bazali kozwa mpo na komela likaya. Soki ezali na maladi oyo bato mingi na mokili mobimba bazali kokufa na yango, oyo mbɛlɛ bakokaki kokufa na yango te, likaya ezali eloko ya liboso oyo ezali komemela bato maladi yango. Soki bato bakobi na momeseno oyo bazali na yango lelo ya komela likaya, nsima ya mbula 20, bato mingi na mokili mobimba, bakobanda kokufa nde mpo na komela likaya mpe likaya ekokómisa bato mingi bibɔsɔnɔ koleka bato nyonso oyo bakokufa na sida, na maladi ya ntolo, na ntango ya kobota, na makama ya mituka, na komiboma to baoyo bakoboma bango.
Likaya ebomaka. Atako bongo bato oyo bamelaka yango bazali bipai nyonso. OMS elobi ete na mokili mobimba bato miliare 1,1 bamelaka likaya. Elingi koloba moto moko kati na bato misato na mokili mobimba, baoyo bakómi mikóló, amelaka likaya.
Bato ya mayele bakanisi ete ata soki bakompanyi ya makaya ezali kofuta baamande ya bamilio ya badolare mpo ete bazali kofunda bango mpo na makaya oyo bazali koteka, mbongo wana ezali moke soki bakokanisi yango na bamiliare ya badolare oyo bazali kozwa na koteka makaya. Bobele na États-Unis, bakanisi ete bakompanyi ya makaya ezali kobimisa makaya miliare 1,5 mokolo na mokolo. Na mokili mobimba, bakompanyi ya makaya mpe bibongiseli ya Leta, ezali koteka makaya miliare nkoto mitano mokolo na mokolo!
Mpo na nini bato mingi bazali kokangama na momeseno oyo ezali koboma? Soki omelaka likaya, ndenge nini okoki kotika? Masolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna yango.