Maloba na nse ya lokasa
e ELILINGI: Yesu azali kolya na ndako ya Mofarisai moko na nkombo Simo. Mwasi moko, oyo mbala mosusu azali mwasi ya ndumba, auti kosokola Yesu makolo na mai ya miso na ye, apangwisi yango na nsuki na ye mpe asopeli yango mwa mafuta. Simo asepeli te na likambo oyo mwasi yango asali, kasi Yesu alobi malamu mpo na mwasi yango.