Maloba na nse ya lokasa
c Bankulutu bazali na lotomo te ya kotyela bandeko mibeko na likambo etali kominanola. Mokristo mokomoko asengeli kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpo na kopona nini akotánga, akotala, to lisano ya video oyo akobɛta. Batata ya mabota oyo bazali na bwanya balukaka koyeba soki bato ya libota na bango baminanolaka na makambo oyo eyokani na mitinda ya Biblia.—Talá lisolo “Bopekisaka bato bafilme, babuku, mpe banzembo mosusu?” na site jw.org®, na esika bakomi OLINGI KOYEBA BISO? > MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI.