Maloba na nse ya lokasa
a Okotikala sembo epai ya Yehova, to okopesa Satana nzela akosa yo mpo otika kosalela Nzambe? Eyano oyo okopesa, etaleli te soki komekama oyo okutani na yango ezali makasi to te, kasi nde lolenge oyo obatelaka motema na yo. Liloba “motema” elimboli nini? Ndenge nini Satana alukaka kobebisa motema na biso? Mpe ndenge nini tokoki kobatela motema na biso? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna yango ya ntina mingi.