Maloba na nse ya lokasa
a Biblia emonisi ete Yozefe azalaki na bomoi ntango Yesu azalaki na mbula 12. Kasi, ntango Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso ya kobongola mai vinyo, balobeli Yozefe te, ata mpe na nsima na yango. Mbala mosusu na ntango yango Yozefe asilaki kokufa. Longola yango, ntango Yesu azalaki na nzete ya mpasi, asɛngaki ntoma Yoane abatela mama na ye; soki Yozefe azalaka naino na bomoi, Yesu alingaki kosɛnga Yoane likambo yango te.—Yoane 19:26, 27.