Maloba na nse ya lokasa
d Balapolo oyo euti na bikólo ndenge na ndenge emonisi ete kotika molongani to bana mpo na kokende kosala na mikili mosusu nde esali ete bato mosusu bákwea na masumu ya minene. Mobali to mwasi to bango nyonso mibale bakweaki na ekobo, basusu basangisaki nzoto mibali na mibali to basi na basi, to ná moto moko ya libota, mpe bana bakómaki na bizaleli mabe, bakutanaki na mikakatano na bainiversite, babebisaki bamosusu, bakómaki na basusi, batungisamaki na makanisi, to bakómaki na makanisi ya komiboma.