Maloba na nse ya lokasa
b Pembenipembeni ya Shinare, bato ya arkeoloji bakundolaki ebele ya batempelo ya etaje oyo ezali lokola piramide. Biblia elobi ete bato oyo batongaki ndako molai ya Babele batongaki yango na babriki, kasi na mabanga te mpe basalelaki gudrɔ lokola pɔtɔpɔtɔ. (Ebandeli 11:3, 4) Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete na Mezopotamia, “mabanga ezalaki mpenza komonana te to mpe ezalaki te,” kasi gudrɔ ezalaki mingi mpenza.