Maloba na nse ya lokasa
a Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Molevi Balanaba atɛkaki mabelé na ye mpe apesaki mbongo oyo azwaki mpo básalisa na yango bayekoli ya Klisto oyo bazalaki kokelela na Yelusaleme. Mabelé yango ekokaki kozala na Palestine to na Sipele. Ekoki mpe kozala kaka mwa esika moko ya kokunda bibembe oyo Balanaba asombaki na Yelusaleme.—Misala 4:34-37.