Maloba na nse ya lokasa
b Likambo oyo etaleli mpenzampenza nkótá oyo ezali na likoki ya kokesenisa polele molimo mpe elimo, kasi babongoli baponi kosala bongo te. Na nkótá mosusu, babongoli bakutanaka na mokakatano ya kozwa maloba oyo makoki kokesenisa makambo polele. Na ntango yango, bateyi kati na lingomba oyo bazali sembo, bakolimbola ete atako mobongoli asalelaki liloba likeseni neʹphesh to atako asalelaki liloba oyo liyokani mpenza te na ndimbola ya Makomami, liloba neʹphesh na lokótá ya ebandeli esalelamaki ezala mpo na bato to mpo na banyama mpe emonisi eloko oyo ezali na mpema, elyaka, mpe ekoki kokufa.