Maloba na nse ya lokasa
e Bato mingi bamonaka mbongwana ya elobeli kati na lisoló ya Luka, na nsima ya Luka 21:24. Dr. Leon Morris amonisi ete: “Yesu akobi na koloba na ntina na ntango ya bapagáno. . . . Bato mingi ya mayele balobi ete na eteni oyo likebi libendami mpo na oyo etali koya ya Mwana na moto.” Molakisi R. Ginns akomi ete: “Koya ya Mwana na moto—(Mt 24:29-31; Mko 13:24-27). Kolobelama ya ‘ntango ya Bapagáno’ ezali liloba ya ebandeli na lisolo oyo; sikawa, makanisi [ya Luka] etyami bobele likoló na kobebisama ya Yelusaleme te, kasi koleka lisusu mpo na mikolo mizalaki koya.”