Maloba na nse ya lokasa
c Makomami ya Ebre esaleli liloba “Satana” mbala 18. Kasi, Makomami ya Grɛki ya bokristo esaleli liloba “Satana” mbala koleka 30. Yango ebongi mpenza mpo Makomami ya Ebre elobelaki Satana mingi te; elobelaki mingimingi nde makambo oyo ekosalisa bato báyeba Masiya. Ntango Masiya ayaki, amonisaki Satana polele, mpe Makomami ya Grɛki ya bokristo elobeli yango.