Maloba na nse ya lokasa
c Lisolo yango elobeli makambo mibale ya kozanga limemya. Ya liboso, Mibeko emonisaki polele biteni nini ya nyama ya mbeka oyo banganga-nzambe basengelaki kolya. (Mib. 18:3) Nzokande na tabernakle, banganga-nzambe wana ya mabe babimisaki momeseno mosusu. Bazalaki kotinda basaleli na bango bákɔtisa kanya ya monene na nzungu oyo bazalaki kotokisa misuni mpe bábimisa eteni nyonso ya mosuni oyo ekɔti na kanya! Longola yango, ntango bato bazalaki komema bambeka na bango na etumbelo, banganga-nzambe wana ya mabe bazalaki kotinda mosaleli moko abangisa moto oyo ayei kopesa nyama mpe básɛnga ye mosuni ya mobesu liboso kutu mafuta na yango epesama mbeka epai ya Yehova.—Lev. 3:3-5; 1 Sa. 2:13-17.