Maloba na nse ya lokasa
c Boaze apesaki Ruta mezire motoba ya ɔrje oyo kilo na yango eyebani te—ntango mosusu mpo na komonisa ete kaka ndenge bato bazalaki kosala na boumeli ya mikolo motoba mpe kopema na mokolo ya Sabata, mikolo oyo Ruta anyokwamaki lokola mwasi oyo mobali akufá elingaki kosila, mpe alingaki kozwa “kopema” soki azwi mobali mpe akómi na ndako na ye. Ekoki mpe kozala ete apesaki ye mezire yango motoba, mbala mosusu bapau etondá, mpo yango nde kilo oyo Ruta akokaki komema.