Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 102
  • Masano ya mbongo ezali lisumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masano ya mbongo ezali lisumu?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Bilenge​—Basani mosusu ya sika!
    Lamuká!—1995
  • Biblia epekisi masano ya mbongo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masano ya mbongo
    Lamuká!—2015
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 102
Mosani azali kotala tike na ye ya tombola ntango bazali koyebisa na televizyo ndenge lisano esuki

Masano ya mbongo ezali lisumu?

Eyano ya Biblia

Atako Biblia elobeli masano ya mbongo na mozindo te, na kotalela mitinda ya Biblia tokoyeba ete Nzambe amonaka ete masano ya mbongo ezali lisumu.​—Baefese 5:17.a

  • Lokoso nde etindaka na masano ya mbongo, likambo oyo Nzambe ayinaka. (1 Bakorinti 6:9, 10; Baefese 5:3, 5) Baoyo babɛtaka masano ya mbongo bazalaka na makanisi ya kozwa mbongo ya baoyo balongi te, kasi Biblia eboyi kolula biloko ya basusu.​—Kobima 20:17; Baroma 7:7; 13:9, 10.

  • Kobɛta lisano ya mbongo ata mpo na oyo ya moke, ekoki kokolisa mposa mabe ya mbongo.​—1 Timote 6:9, 10.

  • Mbala mingi bato ya masano ya mbongo batyaka motema na bikelakela to libaku malamu. Kasi, Nzambe atalelaka makanisi ya bongo lokola losambo ya bikeko, oyo eyokani te na losambo na ye.​—Yisaya 65:11.

  • Na esika ya kokóma na mposa ya kozwa eloko kaka ofele, Biblia elendisaka biso tósala mosala makasi. (Mosakoli 2:24; Baefese 4:28) Baoyo balandaka toli ya Biblia bakoki ‘kolya bilei oyo bango moko bazwi.’​—2 Batesaloniki 3:10, 12.

  • Masano ya mbongo ekoki kolendisa elimo ya kowelana, likambo oyo Biblia eboyi.​—Bagalatia 5:26.

a Biblia elobeli polele masano ya ndenge wana kaka epai ya basoda ya Baroma oyo babwakaki mbɛsɛ, to “babɛtaki zeke” na bilamba ya Yesu mpo na koluka matomba na bango moko.​—Matai 27:35; Yoane 19:23, 24; Biblia na lingala ya lelo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto