panitan/stock.adobe.com
Yesu akosilisa bobola
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amoniselaki mpenza bato bolingo, mingimingi epai ya baoyo bazalaki babola mpe baoyo bazalaki konyokwama na makanisi. (Matai 9:36) Akabaki kutu bomoi na ye mpo na bolamu ya basusu. (Matai 20:28; Yoane 15:13) Mosika te, akomonisela lisusu bato bolingo na ndenge akosalela bokonzi mpe nguya na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpo na kosilisa bobola na mabele mobimba.
Biblia esaleli maloba kitoko mpo na kolobela makambo oyo Yesu akosala:
“Asamba mpo na bato mpamba na kati ya ekólo, abikisa bana ya mobola.”—Nzembo 72:4.
Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo Yesu asali mpo na biso mpe oyo akosalela biso na mikolo ezali koya? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya koyekola makambo etali “nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe,” elingi koloba, nsango oyo asakolaki. (Luka 4:43) Tángá lisolo “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?”