Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 55
  • Mabele ezali kobeba—Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabele ezali kobeba—Biblia elobi nini?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobaki ete bato bakobebisa mabele
  • Planɛti na biso ekobonga
  • Bikólo ekokoka kosala elongo mpo na kolonga mbongwana monene ya klima oyo ebimisaka makama mingi?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Biblia elobi ete bomoi na biso ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya lokola klima ezali kobongwana​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Molunge makasi na mokili mobimba—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mabelé ezali na “maladi”—Nkisi nini ekobikisa yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 55
Ndenge mabele emonanaka na likóló. Eteni moko ya mabele ezali komonana ete ezali malamu mpe eteni mosusu ezali kobeba mokemoke na molunge.

BÓSƐNZƐLAKA!

Mabele ezali kobeba​—Biblia elobi nini?

“Bato bazali kosala makambo mingi oyo mosika te ekobebisa mpenza klima. Mpe yango ekosala ete bingumba minene ezinda na mai, molunge ekóma lisusu makasi, mipɛpɛ ya makasi mpenza esalema lisusu mingi, bato bázanga mai na bisika mingi, bamilio ya banzete mpe banyama ndenge na ndenge elimwa. Tozali kolekisa ndelo te mpo makambo yango ezali mpenza solo. Ezali makambo oyo bato ya siansi balobi ete ekosalema soki baguvɛrnema ebongoli te lolenge oyo bato basalelaka énergie.”​—Maloba ya António Guterres, secrétaire général ya ONU, oyo lapolo moko (Intergovernmental Panel on Climate Change report) ebimisaki na mokolo ya 04/04/2022.

“Bato ya siansi bazali kokebisa bato ete na bambula ezali koya baparkɛ nyonso 423 oyo ezalaka na États-Unis ekobebisama mpo na mbongwana ya klima, mpamba te molunge ekokóma makasi. Makambo yango ya mabe oyo ekoki kosalema ekokani na oyo Biblia elobeli, na ndakisa: mɔtɔ mpe mpela, bangomba ya baglasi ezali kosila, mai ya bibale minene ezali kokóma mingi mpe molunge ezali kokóma makasi.”​—Lisolo “Flooding Chaos in Yellowstone, a Sign of Crises to Come,” na zulunalo The New York Times, ya mokolo ya 15/06/2022.

Mabele ekoki kobonga mpenza? Soki ɛɛ, nani nde akobongisa yango? Talá makambo oyo Biblia elobi.

Biblia elobaki ete bato bakobebisa mabele

Biblia elobi ete Nzambe ‘akoboma baoyo bazali kobebisa mabele.’ (Emoniseli 11:18) Vɛrsɛ oyo ezali koteya biso makambo misato:

  1. 1. Makambo oyo bato bakosala ekobebisa mpenza mabele.

  2. 2. Kobebisama ya mabele ekosuka.

  3. 3. Nzambe nde akobongisa mabele, kasi bato te.

Planɛti na biso ekobonga

Biblia elobi ete “mabele ezali koumela seko.” (Mosakoli 1:4) Bato bakofanda wana mpo na libela.

  • “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

Mabele na biso ekobonga mpenza.

  • “Esobe mpe etúká oyo ezangá mai ekosepela, mpe mokili patatalu oyo ekauká ekozala na esengo mpe ekobimisa bafololo lokola safra.”​—Yisaya 35:1.

Mpo na koyeba ntina oyo tondimaka ete Nzambe akobongisa mabele, tángá lisolo “Qui sauvera la terre?”

Mpo na komona ntina oyo tosengeli kozala motema ya kokita mpo na mikolo ezali koya atako klima ezali kobongwana, tángá lisolo “Les changements climatiques et notre avenir : qu’en dit la Bible?”

Mpo na komona ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na makama makasi oyo eutaka na kobeba ya klima, tángá lisolo “Biblia ekoki kosalisa yo oyika mpiko na makama oyo eutaka na kobeba makasi ya klima?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto