Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb19 Septembre lok. 7
  • “Bókoba kokanisa makambo wana”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba kokanisa makambo wana”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • Masolo mosusu
  • Bosembo mpe makanisi na biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Komanyola ya motema na ngai
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Lolenge nini tokoki kobakisa bizaleli bibongi likoló na kondima na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Komanyola
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
mwb19 Septembre lok. 7
Ndeko mobali oyo azali kosalela ordinatɛrɛ na ye na butu mpe nkosi oyo ezali koganga, oyo ezali komonisa Satana, etɛlɛmi nsima na ye

BOMOI YA BAKRISTO

“Bókoba kokanisa makambo wana”

Makambo nini? Bafilipi 4:8 elobi tókanisa makambo oyo ezali solo, ya lokumu, ya boyengebene, ya pɛto, oyo ekoki kolingama, oyo elobelami malamu, oyo ezaleli moko ya malamu ezali, mpe oyo ebongi kokumisama. Yango elingi koloba te ete mokristo asengeli ntango nyonso kokanisa kaka makambo ya Biblia. Ata bongo, makanisi na biso esengeli kosepelisaka Yehova. Esengeli te kolɛmbisa ekateli na biso ya kotikala sembo epai na ye.​—Nz 19:14.

Koboya makanisi mabe ezalaka pɛtɛɛ te. Tosengeli kotɛmɛla nzoto na biso ya kozanga kokoka mpe Satana, “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2Ko 4:4) Lokola ye nde atambwisaka makambo etali kopanza-nsango, mingi ya makambo oyo ezalaka na televizyo, na radio, na Internet, na babuku to na bazulunalo, ezalaka ya malamu te. Soki tozali kopona te makambo ya tokotondisa na bɔɔngɔ na biso, makanisi na biso ekobeba mpe nsukansuka bizaleli na biso mpe ekobeba.​—Yk 1:14, 15.

TALÁ VIDEO BOYÁ MAKAMBO OYO EBEBISAKA BOSEMBO YA MOTO​—KOMINANOLA YA MABE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Ndeko mobali oyo azali kotala makambo oyo ebongi te na telefone na ye na butu

    Ndeko mobali yango azalaki kotala nini na telefone na ye, mpe yango esalaki ye nini?

  • Ndeko mobali oyo azali komilongola na basite ya kosolola na bato ebele

    Ndenge nini Bagalatia 6:7, 8 mpe Nzembo 119:37 esalisaki ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto