Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/15 lok. 3
  • Koteya malamu esɛngaka komibongisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koteya malamu esɛngaka komibongisa
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Masolo mosusu
  • Tómibongisa malamu mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Eteni 2​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 11/15 lok. 3

Koteya malamu esɛngaka komibongisa

Na mabaku mibale, batunaki Yesu motuna moko oyo etali bomoi ya seko; kasi mbala nyonso oyo ayanolaki, ayokanisaki eyano na ye na mposa ya moto oyo atunaki ye. (Luka 10:25-28; 18:18-20) Na yango, atako tokoki koyeba malamu buku oyo toyekolaka na yango bato Biblia, tosengeli kobongisa yango na kotalela mposa ya moto oyo tokoyekola na ye. Makambo nini ekoki kozala mwa mpasi mpo akanga ntina to andima yango? Bavɛrsɛ nini oyo maloba na yango etyami na paragrafe te tokotánga elongo na ye? Tokoyekola na ye paragrafe boni? Ekoki kosɛnga tóbongisa ndakisa moko, ndenge ya kolimbola likambo moko, to mpe mwa mituna mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo tokoyekola. Lisusu, lokola Yehova nde akolisaka mboto ya solo na motema ya moto, tosengeli kosɛnga ye apambola biso tómibongisa malamu, apambola moto oyo toyekolaka na ye mpe apambola milende oyo tozali kosala mpo tósalisa ye akola na elimo.​—1 Ko. 3:6; Yak. 1:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto