“Maloba oyo . . . esengeli kozala na motema na yo”
Baboti bazali lokola babateli ya mpate. Basengeli kobatela malamu bana na bango, oyo ezali mpasi te bábunga to bákwea na mitambo. (Mas. 27:23) Ndenge nini baboti bakoki kokokisa mokumba yango? Basengeli kozwaka ntango ya kosolola mokolo na mokolo elongo na bana na bango mpo na koyeba makambo oyo ezali na makanisi mpe mitema na bango. (Mas. 20:5) Lisusu, baboti basengeli kotonga na bisaleli oyo ezikaka na mɔtɔ te mpo na kokómisa makasi kondima ya bana na bango. (1 Ko. 3:10-15) Video “Maloba oyo . . . esengeli kozala na motema na yo” emonisi ete momeseno ya kosala losambo na kati ya libota ezali na ntina mingi. Talá yango elongo na libota na yo, na nsima, bótalela mituna oyo elandi.
(1) Nini esalaki ete libota ya ndeko Roman ezongisa nsima makambo ya elimo? (2) Mpo na nini milende oyo ndeko Roman asalaki mpo na losambo na kati ya libota elongaki te? (3) Mitinda nini ya Biblia esalisaka mpo na kobɔkɔla bana bákola malamu na elimo? (Mib. 6:6, 7) (4) Nini ekoki kosalisa bato ya libota básololaka malamu? (5) Milende ya ndenge nini bana balingaka ete baboti na bango básalaka? (6) Na ndenge nini ndeko Barrow ná mwasi na ye basalisaki libota ya ndeko Roman? (Mas. 27:17) (7) Makambo nini tata ya libota asengeli kosala liboso mpo losambo na kati ya libota esepelisa moto nyonso na kati ya libota? (8) Ndeko Roman asalaki nini mpo makambo na libota na ye ebonga? (9) Mpo na nini kosala losambo na kati ya libota mbala na mbala ezali na ntina? (Ef. 6:4) (10) Wapi makanisi mosusu oyo ebongi mpo na losambo na kati ya libota? (11) Na ndenge nini ndeko Roman azalaki motema mpiɔ mpe na mpiko ntango azalaki kosalisa Marcus amona ntina ya kosala oyo ezali malamu? (Yir. 17:9) (12) Ndenge nini ndeko Roman ná mwasi na ye basololaki na Rebecca mpo básalisa ye azwa ekateli ya malamu mpo na boyokani na ye na Justin? (Mrk. 12:30; 2 Tim. 2:22) (13) Ndenge nini ndeko Roman ná mwasi na ye bamonisaki kondima na ndenge babongolaki makambo mosusu na bomoi na bango? (Mat. 6:33) (14) Ndenge nini video oyo emonisi mpenza ntina oyo batata ya mabota basengeli koleisa mabota na bango na elimo? (1 Tim. 5:8) (15) Lokola ozali tata ya libota, ekateli nini ozwi?
LIYEBISI EPAI YA BATATA YA MABOTA: Drame oyo ya mikolo na biso elakisamaki na liyangani ya etúká na mobu 2011. Sikoyo, osili komona bisika oyo esengeli kobongisa na losambo na bino na kati ya libota? Okanisi nini soki osali yango sikoyo? Soki ezali na makambo ya kobongola, tosɛngi yo obondela mpo na kobongola makambo yango mpo libota na yo ezwa matomba libela na libela.—Ef. 5:15-17.