Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/14 lok. 3
  • Libyangi moko ya ntina mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libyangi moko ya ntina mingi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Kokabola nkasa ya libyangi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli ekobanda mwa 1 sanza ya misato
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Liyangani ya etúká
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Ekaniseli ekobanda mwa 22 sanza ya misato
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 4/14 lok. 3

Libyangi moko ya ntina mingi

1. Kampanye mpo na kobengisa bato na liyangani ya mobu 2014 ekobanda ntango nini?

1 Soki obongisi bilei ya kitoko mingi mpo olya elongo na baninga to bato ya libota, oyo ekosɛnga milende to mbongo mingi mpenza, na ntembe te, okozala na esengo ntango ozali kobengisa bato. Ndenge moko mpe, mosala makasi ezali kosalema mpo na kobongisa bilei ya elimo oyo tokolya na mayangani ya etúká mpe mayangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi na mobu 2014. Bapɔsɔ misato liboso ete liyangani na biso ebanda, tokozala na libaku ya kobengisa bato mpo báyangana elongo na biso. Nini ekosalisa biso mpo tókabola na esengo mpenza nkasa ya libyangi?

2. Nini ekotinda biso tósala mingi na eleko ya kampanye?

2 Tokosala mingi na eleko ya kampanye yango soki tokanisi matomba oyo biso moko tozwaka na fɛti ya elimo oyo Yehova abongiselaka biso na mayangani. (Yis. 65:13, 14) Tóbosana mpe te matomba oyo ebimaka na kampanye oyo tosalaka mbula na mbula. Bato mosusu oyo tokobenga bakoyangana elongo na biso. Ata soki bato bakoya mingi to te, milende oyo tokosala na kampanye yango ekopesa Yehova nkembo mpe ekomonisa bokabi na ye.​—Nz. 145:3, 7; Em. 22:17.

3. Ndenge nini nkasa ya libyangi ekokabolama?

3 Lisangani mokomoko ya bankulutu esengeli kozwa ekateli mpo na ndenge oyo lisangá ekokabola nkasa ya libyangi na teritware na bango. Bakotalela soki ekosɛnga bátika yango na bandako oyo bakuti bato te, to mpe bákabola yango ntango bazali kopesa litatoli na esika ya bato mingi. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo tokokabola bazulunalo elongo na nkasa ya libyangi soki likoki ezali. Soki mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ekwei na ntango ya kampanye, tokotya likebi mingi na kokabola nkasa ya libyangi na esika ya kobanda koyekola na bato Biblia. Ntango kampanye ekosila, tokozala mpenza na esengo na ndenge tosalaki mingi mpe tobengisaki ebele ya bato mpo báya kolya elongo na biso na fɛti ya elimo oyo Yehova abongiselaki biso!

Okoloba nini?

Nsima ya kopesa mbote ndenge esalemaka epai na bino, okoki koloba boye: “Tozali kosala kampanye na mokili mobimba mpo na kobengisa bato na liyangani moko ya ntina mingi. Mokolo, ngonga mpe esika etyami na lokasa oyo.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto