Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/10 lok. 1
  • Ebongiseli moko mpo na baministre bakristo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ebongiseli moko mpo na baministre bakristo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya zongazonga oyo ekosalisa biso tóbatela boyokani malamu na Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Manáka ya liyangani ya zongazonga na mbala ekoya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Batelá makanisi na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 8/10 lok. 1

Ebongiseli moko mpo na baministre bakristo

1. Ebongiseli nini ya sika ebandaki na mobu 1938, mpe ezalaki na mokano nini?

1 Na mobu 1938, lisangá ya Yehova esalaki ebongiseli ya sika. Basɛngaki masangá ebanda kosala mayangani ya zone, oyo lelo ebengamaka mayangani ya zongazonga. Ezalaki na mokano nini? Ebimeli ya Yanuali 1939 ya l’Informateur (lelo oyo Mosala na biso ya Bokonzi) eyanolaki boye: “Mayangani wana ezali moko ya bibongiseli ya Teokrasi oyo Yehova azali kosalela mpo na kotambwisa mosala ya Bokonzi na ye. Mateya oyo ekopesama na mayangani yango ezali na ntina mpo na kosalisa mokomoko na biso akokisa mosala oyo bapesi biso.” Na mobu 1938, basakoli bazalaki kaka 58 000. Soki totaleli ndenge motángo yango ebakisami lelo oyo, elingi koloba basakoli koleka 7 000 000 na mobu 2009, yango emonisi ete mayangani ya zongazonga ezali kokokisa mokano na yango ya kosalisa baministre “básala mosala oyo bapesi bango”!

2. Masolo nini ekosalema na liyangani ya zongazonga ya mobu ya sika ya mosala?

2 Motó ya likambo mpo na mbula oyo ezali koya: Tozali kozela na motema likoló liyangani ya zongazonga oyo ekobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ mpe bilendiseli oyo tokozwa na liyangani yango. Motó ya likambo na yango elobi: “Bozali bato ya mokili te”; euti na Yoane 15:19. Na ntembe te, masukulu mingi oyo ekosalema na liyangani yango ekosalisa baministre bakristo. Na mokolo ya pɔsɔ, tokoyoka lisukulu oyo elobi: “Ndenge nini mosala ya ntango nyonso ebatelaka biso?” Tokolanda mpe lisukulu moko ya biteni misato, oyo elobi: “Kobebisama te na . . .” “Nyama ya zamba,” “Mwasi ya ndumba monene” mpe “Moto ya mombongo oyo asalaka mibembo.” Na mokolo ya lomingo, tokoyoka lisukulu ya biteni minei oyo ezali na motó ya likambo: “Tólinga Yehova, kasi mokili te.” Lisukulu mosusu elobi: “Tókoba kozala ‘bato oyo bafandi na mokili mpo na ntango mokuse,’” mpe mosusu elobi: “Bózala na mpiko! Bokoki kolonga mokili.”

3. Matomba nini tokozwa soki toyangani na liyangani ya zongazonga?

3 Nsima ya kokɔta na liyangani moko ya zongazonga na bambula euti koleka, ndeko mwasi moko oyo azalaki kosakola lisusu mingi te akomaki ete liyangani yango etindaki ye atalela lisusu bomoi na ye mpe amityela mokano ya “kobimaka mingi na mosala ya kosakola mpe kotika koloba ete azangi ntango!” Na ntembe te, liyangani ya zongazonga ya mbula ya sika ya mosala ekosalisa biso nyonso tólinga Yehova na esika ya kolinga mokili. (1 Yoa. 2:15-17) Salá nyonso mpo ozala na liyangani yango mpe olanda na likebi mpo ozwa mpenza matomba na ebongiseli wana kitoko mpo na baministre bakristo!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto