Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/08 lok. 8
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 10/08 lok. 8

Ndenge ya kolakisa bazulunalo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔt.

“Bato ya mayele bandimaka ete tata azali na mokumba ya ntina mingi na libota. Mpo na yo, nini esalaka ete moto azala tata malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Yesu amonisaki ndenge oyo ndakisa ya Tata na ye esalisaki ye. [Tángá Yoane 5:19.] Lisolo oyo elobeli makambo motoba ya ntina, oyo etali mokumba ya tata.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 18.

Lamuká! Ɔkɔt.

“Bato ya mangomba ndenge na ndenge bazalaka na makanisi ekeseni mpo na ndenge oyo Nzambe azalaka. Kasi, Mwana ya Nzambe alobaki ete Nzambe azalaka ndenge nini? Yoká maloba ya Yesu na Yoane 4:24. [Tángá.] Lisolo oyo ya nkasa mibale kaka, ezali na eyano oyo Biblia epesi na motuna oyo: ‘Nzambe azalaka ndenge nini?’” Lakisá lisolo oyo ezali na nkasa 24 mpe 25.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Nov.

“Bato mingi bakokaka te koyokanisa bolingo ya Nzambe na liteya ya lifelo ya mɔtɔ. Yo okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia eteyaka polele ete Nzambe azalaka na mposa te ya kosala bato mabe to konyokola bango. [Tángá Ezekiele 18:23.] Okosepela na makanisi oyo Makomami epesi, oyo ezali na zulunalo oyo.”

Lamuká! Nov.

“Mpo na bato mingi, kolonga na bomoi elimboli kozala moto ya lokumu, ya bozwi, to ya nguya. Mpo na yo, kolonga na bomoi elimboli nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká makambo oyo Biblia elobi ete esalisaka moto alonga na bomoi. [Tángá Nzembo 1:​1-3.] Lisolo oyo elobeli makambo motoba oyo esalisaka moto alonga na bomoi.” Lobelá lisolo oyo ebandi na lokasa 6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto