Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela
1. Ndenge nini Yehova akokisaka bamposa ya elimo ya basaleli na ye?
1 Yehova akokisaka bamposa ya elimo ya basaleli na ye na bolingo mpenza. Atako lelo oyo na mokili bato bazali na nzala makasi na elimo, biso tozali kolya malamu mpenza. (Yis. 65:13) Mayangani ya etúká oyo tosalaka mbula na mbula ezali lolenge moko oyo Yehova aleisaka biso na elimo. Ozali komibongisa mpo na kozala mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká oyo ezali na motó ya likambo “Totambwisami na elimo ya Nzambe”? Ebele ya bilei kitoko ya elimo esili kobongisama.
2. Tosengeli kosala nini mpo na komibongisa mpo na liyangani?
2 Omibongisa malamu: “Myango ya moto ya molende epesaka litomba.” (Mas. 21:5, NW) Na bongo, ntango ozali komibongisa mpo na kozala na liyangani mikolo nyonso misato, soki ekosɛnga ozwa konje na mosala, kozela te mpo na kosolola na patrɔ na yo. Soki okozala na mposa ya esika ya kolala, osili kosɛnga yango? Ekozala malamu mpe obongisa bilei na yo ya midi mpo okoka kolya elongo na bandeko na esika ya liyangani. Omibongisa mpo okómaka mikolo nyonso na esika ya liyangani na ngonga malamu mpo na kozwa esika ya kofanda, koyemba loyembo ya ebandeli mpe koyoka libondeli ya ebandeli.
3. Tosengeli kobongisa molato ya ndenge nini mpo na liyangani?
3 Tosengeli kosala nyonso tózala na molato ya malamu mpe ya mindɔndɔ te. (1 Tim. 2:9, 10) Liyangani ya etúká epesaka biso mabaku mingi ya kopesa bato litatoli. Soki tozali ntango nyonso na molato ya malamu na engumba oyo liyangani ekosalema mpe tozali na makarɔ na biso ya liyangani, tokokesana na bato oyo bazali Batatoli te mpe bakoloba malamu mpo na biso.
4. Nini ekosalisa biso ná mabota na biso tózwa matomba mingi na liyangani?
4 Landá liyangani na likebi: Na ntembe te, tokolinga te kozangisa ata mwa ndambo moke ya bilei yango ya elimo! (Mas. 22:17, 18) Soki tozali kolanda na Biblia na biso bavɛrsɛ oyo molobi azali kotánga mpe kokoma mwa makambo ya ntina, makanisi na biso ekoyengayenga te mpe tokolanda liyangani na likebi. Na mpokwa, tokoki kosalela makambo oyo tokomaki mpo na kolobela makanisi ya ntina ya liyangani elongo na basusu. Na bambula oyo euti koleka, emonanaki ete bilenge mosusu bafandaki bango na bango mpe bazalaki kosolola mpe kokoma to kotinda nsango na telefone (SMS) ntango liyangani ezali kosalema. Soki tozali na bana, ezala baoyo bakómi bilenge, ekozala malamu tófanda elongo na bango mpe tólanda liyangani libota mobimba esika moko, na esika ya kotika bilenge bákende kofanda elongo na bilenge mosusu.
5. Tokoki kosala nini mpo tósepela lisusu mingi na liyangani?
5 Sololá na bandeko: Biloko ya kitoko ekómaka lisusu elɛngi koleka soki tozali kolya yango elongo na baninga na biso. (Mas. 15:17) Ndenge moko mpe, kozala elongo na bandeko na biso basi mpe mibali esalaka ete tósepela lisusu mingi na liyangani. Na bongo, ekozala malamu mpenza tóluka kokutana na bayangani mosusu mpo na koyebana na bango mpe kosolola na bango liboso to nsima ya eteni mokomoko ya liyangani! (Nz. 133:1) Ntango prezida ya eteni moko ya liyangani asɛngi biso na boboto ete tófanda liboso miziki ebanda, tosengeli kokata masolo mpe kofanda na bisika na biso.
6. Lobelá likambo moko oyo okutanaki na yango mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kopesa litatoli na engumba oyo liyangani ekosalema.
6 Kolekisa te mabaku ya kopesa litatoli: Liyangani ya etúká epesaka biso mabaku mingi ya kopesa bato litatoli. Ntango bayangani mosusu bakendaki kolya na restora nsima ya liyangani, basali ya restora to bato mosusu batunaki bango ntina ya motó ya likambo oyo ekomamaki na makarɔ na bango. Yango epesaki bango nzela ya kosolola na bato yango mpe kopesa bango litatoli ya malamu na ntina etali solo. Babengisaki bato yango mosusu na liyangani mpe bayaki.
7. Mpo na nini tosengeli koyangana na liyangani oyo ekoya?
7 Bandeko balekisi bangonga mingi na kobongisa masukulu, bisika oyo liyangani ekosalema mpe badepartema ndenge na ndenge. Mosala monene oyo esalemi na bolingo mpenza mpo na kobongisa elambo wana ya elimo emonisi ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na basaleli na ye. Tiká ete biso nyonso tózala wana mpo na kolya malamumalamu bilei oyo ebongisami! Soki tosali bongo, tokokesana na bato ya mokili, mpe ‘tokoyemba mpo na esengo ya motema.’—Yis. 65:14.
[Box on page 4]
Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká
◼ Manaka: Mikolo nyonso misato, liyangani ekobanda na ngonga ya 9:20 ya ntɔngɔ. Esika ya liyangani ekofungwama na ngonga ya 8:00 ya ntɔngɔ. Ntango miziki ya Bokonzi ekobanda kobɛta, biso nyonso tosengeli kofanda na bisika na biso mpo programɛ ebanda na molɔngɔ. Na mokolo ya mitano mpe ya pɔsɔ, programɛ ekosuka na ngonga ya 4:55 ya mpokwa, mpe na mokolo ya lomingo, na ngonga ya 4:00 ya mpokwa.
◼ Kokanga bisika ya kofanda: Tokoki kokanga bisika ya kofanda kaka mpo na baoyo toyei na bango motuka moko to baoyo tofandaka na bango ndako moko.
◼ Bilei ya midi: Tosɛngi bino bómema biloko ya kolya ya mindɔndɔ te, kasi oyo ekopesa bino makasi na nzoto, na ndakisa: mampa, mbuma (bitabe), nguba, mikate to gato. Esengeli komema mai, tii to kafe, na milangi oyo ekoki kopasuka te mpo ezokisa bato te. Epekisami komema masanga ya makasi na liyangani. Soki tomemi biloko na biso ya kolya, mai, mpe masanga ya sukali, ntina ya kosomba biloko epai ya batɛki ekozala te. (Liyebisi: Bóyeba ete bato oyo batɛkaka biloko ya kolya bakozwa ndingisa ya kokɔta na esika ya liyangani te, ata na ngonga nini.—Yoa. 2:13-17.) Baoyo bakosalela mbambola mpo na kolamba na esika ya liyangani, basengeli liboso kotuna bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani mpo bálakisa bango esika oyo bakoki kotya yango. Bibongiseli esengeli kozwama mpo makama ebima te.—Luka 10:38-42.
◼ Makabo: Tokomonisa botɔndi na biso soki topesi makabo ya bolingo malamu na Ndako ya Bokonzi na biso to na liyangani mpo na kosunga mosala na mokili mobimba.
◼ Makama mpe lisalisi ya nokinoki: Bandeko ya departema oyo epesaka lisalisi ya nokinoki balobi ete mbala mingi babengaka bango mpo na makambo oyo ezali na ntina mingi te. Soki moto moko akwei na maladi na esika ya liyangani, esengeli naino koyebisa ndeko moko oyo azali koyamba bato pene wana, ye akosolola mbala moko na bandeko ya departema ya Mwa Lisungi ya nkisi mpo bandeko oyo bayebi mosala yango, oyo bazali na esika ya liyangani, bátala soki moto yango azali mpenza na maladi makasi mpe básalisa ye.
◼ Kosalela kura ya liyangani: Esengeli te kotya radio to masini mosusu na bansinga ya kura to na masini ya kokolisa lolaka ya liyangani, mpe biloko yango ekoki kosalelama kaka soki ekobebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Kokanga fɔtɔ: Soki bozali kokanga fɔtɔ ntango liyangani ezali kosalema, tosɛngi bino bósalela mwinda ya fɔtɔ te. Tosɛngi bino bóbengisa te na esika ya liyangani bato oyo basalaka mosala ya kokanga fɔtɔ. Soki bomoni bango, bókangisa fɔtɔ te epai na bango.—Yoa. 2:13-17.
◼ Batelefone ya mabɔkɔ: Tosengeli kosala nyonso mpo batelefone na biso ya mabɔkɔ ebebisa likebi ya bato mosusu te.
◼ Bopɛto: Emonanaka mbala mingi ete baoyo basombaka biloko ya kolya epai ya batɛki, babwakaka nkasa na mabelé. Okomona bipai na bipai na esika mobimba ya liyangani bapapye, basashɛ, babushɔ ya milangi ya masanga ya sukali mpe bongo na bongo. Soki moto moko amoni malamu kosomba biloko ya kolya epai ya batɛki (na ndakisa: bɔmbɔ, bisikiti, gato, mbisi to biloko mosusu), asengeli kobwaka nkasa na yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ, kasi na libándá te. Soki tomoni moto moko abwaki papye to sashɛ na mabelé, tosengeli kolɔkɔta yango mpe kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ. Bandeko, tosɛngi bino bósala milende mpenza mpo na kobatela esika ya liyangani pɛto na kati mpe na libándá. Bopɛto ezali likambo oyo bayangani nyonso basengeli kotyela yango mpenza likebi. Soki mokomoko na biso asali bongo, tokotika esika ya liyangani pɛto na nsuka ya mokolo. Tolingi komonisa bizaleli ya Nzambe oyo tosambelaka, oyo azali mosantu.—1 Pet. 1:15, 16; Ex. 19:10; Det. 23:14.
◼ Na bisika oyo tokolala: (1) Komema bato ebele te na ndako to na esika ya kolala oyo bapesi yo koleka ndenge esengeli to ndenge mokóló ndako asɛngaki. (2) Soki okofanda te na esika oyo osɛngaki, osengeli koyebisa yango libela. (3) Liboso ya kolamba, tuná naino mokóló ndako to bandeko oyo bazali na mokumba ya kotalela bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi makambo oyo okoki kosala mpo likama ebima te. (4) Kobebisa te biloko oyo bapesi yo osalela. Likambo ya ntina koleka ezali ya kozala na bokatikati mpe na makambo makasimakasi te. (5) Bopɛto ezali ndeko ya ezaleli ya kobanga Nzambe. Mikolo nyonso, liboso ya kobima, bongisá esika na yo ya kolala mpe tiká yango pɛto. Yango etaleli mpe Ndako ya Bokonzi, oyo ekoki kokóma esika ya kolala mpo na bandeko oyo bakouta na masangá ya mosika. (6) Monisá mbuma ya elimo na makambo oyo ozali kosalela basusu, ezala moto oyo ayambi yo to bandeko mosusu oyo bakoki kotya yo ná bango esika moko.—Gal. 5:22, 23.