‘Tólanda matambe na ye malamumalamu’
1. Nini ekosalisa biso tókokisa malamu mosala na biso ya baministre?
1 Yesu atángaki na biteyelo ya balabi te; atako bongo, azalaki Ministre oyo aleki baministre nyonso banda mokili ebandá. Likambo ya esengo, lisolo ya mosala ya Yesu ekomamá mpe ebatelamá mpo na kosalisa biso. Mpo na kokokisa malamu mosala na biso ya baministre, tosengeli ‘kolanda matambe na ye malamumalamu.’—1 Pet. 2:21.
2. Nini ekosalisa biso tólinga bato ndenge Yesu alingaki bango?
2 Monisáká ete olingaka bato: Lokola Yesu azalaki kolinga bato mpe komibanzabanza mpo na bango, yango ezalaki kotinda ye asalisa bango. (Mko. 6:30-34) Bato mingi ya teritware na biso ‘bazali konyokwama’ mpe bazali mpenza na mposa ya koyeba solo. (Lom. 8:22) Soki tozali kokanisa mpasi na bango mpe bolingo oyo Yehova alingaka bango, tokokoba kosakwela bango. (2 Pet. 3:9) Lisusu, soki bato bamoni ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bango, bakokakatana te mpo na koyoka nsango na biso.
3. Yesu azalaki kosakwela bato na mabaku nini?
3 Sakoláká na mabaku nyonso: Yesu azalaki koyebisa bato nsango malamu na mabaku nyonso. (Mat. 4:23; 9:9; Yoa. 4:7-10) Ndenge moko, biso mpe tosengeli komibongisa mpo na koyebisa bato mateya ya solo ntango tozali kosala misala na biso ya mokolo na mokolo. Basakoli mosusu bazalaka na Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango na esika ya mosala, na kelasi, na mobembo, ntango bazali kosomba biloko, mpe bongo na bongo, mpo na kopesa bato litatoli.
4. Tokosala nini mpo na kolobela mingi Bokonzi na mosala na biso ya kosakola?
4 Lobeláká mingi Bokonzi: Nsango malamu ya Bokonzi ezalaki likambo ya libosoliboso oyo Yesu azalaki kolobela na mosala na ye ya kosakola. (Luka 4:43) Atako tokolobela Bokonzi mbala moko te na maloba na biso ya ebandeli, kasi tosengeli kobosana te kosalisa bato bámona ntina ya Bokonzi. Ata soki tokolobela makambo mabe oyo ezali koleka na mokili, oyo ezali komonisa ete tozali na mikolo ya nsuka, tosengeli libosoliboso “kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu.”—Lom. 10:15.
5. Na ndenge nini Biblia esalisaka biso tósakola malamu?
5 Saleláká mingi Liloba ya Nzambe: Yesu azalaki ntango nyonso kosalela Makomami na mosala ya kosakola. Azalaki koteya eloko moko te na makanisi na ye moko. (Yoa. 7:16, 18) Azalaki koyekola Liloba ya Nzambe, mpe asalelaki yango ntango Satana amekaki ye. (Mat. 4:1-4) Tosengeli kotángaka Biblia mokolo na mokolo mpe kosalelaka yango mpo na koteya malamu. (Lom. 2:21) Soki batuni biso motuna na mosala ya kosakola, tosengeli kosalela Makomami mpo na kopesa eyano mpe soki likoki ezali, kotánga makambo yango mpenza na Biblia. Tolingi moto amona ete makambo oyo tozali koyebisa ye ezali makanisi na biso moko te, kasi ya Nzambe.
6. Yesu azalaki kosala nini mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye?
6 Lukáká kosimba mitema ntango ozali koteya: Ntango banganga-nzambe bakonzi mpe Bafalisai batunaki bapolisi ntina oyo bakangaki Yesu te, bapolisi balobaki boye: “Naino moto mosusu alobá lokola moto wana te.” (Yoa. 7:46) Yesu azalaki kaka koyebisa bato makambo te, kasi azalaki kosimba mitema ya bato oyo azalaki koteya. (Luka 24:32) Azalaki kosalela bandakisa ya makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya mateya na ye. (Mat. 13:34) Yesu azalaki kosopela bayoki na ye mateya ebeleebele te. (Yoa. 16:12) Azalaki kobenda likebi na bango epai ya Yehova, kasi epai na ye moko te. Lokola Yesu, biso mpe tokokóma bateyi malamu kaka soki tozali ‘kokeba ntango nyonso na mateya na biso.’—1 Tim. 4:16.
7. Mpo na nini Yesu atikaki kosakola te?
7 Kobá kosakola atako bazali kotɛmɛla yo to koboya koyoka yo: Atako Yesu asalaki makamwisi, bato mingi baboyaki koyoka ye. (Luka 10:13) Kutu, bandeko na ye bakanisaki ete “abɛli motó.” (Mko. 3:21) Atako bongo, Yesu alɛmbaki te. Azalaki ntango nyonso na makanisi ya malamu, mpamba te ayebaki malamu ete azalaki koteya bato solo oyo ekokaki kopesa bango bonsomi. (Yoa. 8:32) Na lisalisi ya Yehova, ekateli na biso mpe ezali ete tokotika kosakola te.—2 Kol. 4:1.
8, 9. Ndenge nini tokoki komekola ezaleli ya komipimela ya Yesu mpo na kosakola nsango malamu?
8 Ndimá komipimela makambo mosusu mpo na kosakola mingi: Yesu andimaki komipimela biloko mingi ya malamu mpo na mosala ya kosakola. (Mat. 8:20) Azalaki kosakola mingi, mbala mosusu ata tii na mpokwa. (Mko. 6:35, 36) Yesu ayebaki ete azalaki na ntango mingi te mpo na kokokisa mosala na ye. Lokola “ntango oyo etikali ekómi mokuse,” biso mpe tosengeli kozala na ezaleli ya komipimela lokola Yesu, elingi koloba kosalela ntango na biso, makasi na biso mpe biloko na biso mpo na kosakola mingi.—1 Kol. 7:29-31.
9 Baklisto ya liboso bakokisaki malamu mosala na bango ya baministre mpo bazalaki kolanda ndakisa ya Yesu. (Mis. 4:13) Biso mpe tokokokisa malamu mosala na biso ya baministre soki tolandi ndakisa ya Ministre oyo alekaki baministre nyonso banda mokili ebandá.—2 Tim. 4:5.