Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/06 lok. 1
  • ‘Landá ngai ntango nyonso’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Landá ngai ntango nyonso’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kozala na elimo ya komipesa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Saleláká basusu na ndakisa ya Yesu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Tóbila Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 5/06 lok. 1

‘Landá ngai ntango nyonso’

1 Bato mingi bamipesaka na koluka bolamu na bango moko, atako bongo bazalaka na esengo te. Nzokande, Yesu asɛngi biso tókabaka na motema mobimba mpo yango epesaka esengo ya solo. (Mis. 20:35) Alobaki boye: “Soki moto alingi kolanda ngai, tiká amiboya ye moko . . . mpe alanda ngai ntango nyonso.” (Mko. 8:34) Yango esɛngi kaka te tómipimela makambo mosusu na bantango mosusu. Kasi ezali kosɛnga tósepelisaka Nzambe mokolo na mokolo na esika ya komisepelisa biso moko.​—Lom. 14:8; 15:3.

2 Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Ntango Paulo amonaki “motuya monene ya boyebi ya Klisto Yesu,” atikaki koluka kokokisa bamposa na ye moko mpe amipesaki na koluka matomba ya Bokonzi. (Filp. 3:7, 8) Alobaki ete: “Mpo na ngai, na esengo ya koleka mpenza, nakopesa mpe nakopesama mobimba” mpo na kosalela basusu. (2 Kol. 12:15) Ekozala malamu soki mokomoko na biso amituni boye: ‘Ndenge nini nasalelaka ntango na ngai, makasi na ngai, mayele na ngai, mpe biloko oyo nazali na yango? Namipesaka kaka na koluka bolamu na ngai moko, to nalukaka nde kosepelisa Yehova?’

3 Mabaku ya kopesa: Mbula na mbula, basaleli ya Nzambe balekisaka ngonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola, mosala oyo ebikisaka bato. Na lisangá, mikóló mpe bana basalaka misala ndenge na ndenge mpo na bolamu ya basusu. Basalaka mpe misala mingi na mayangani. Bapesaka mpe mabɔkɔ na misala ya kotonga mpe kobatela bandako oyo esalelamaka mpo na kotombola losambo ya solo. Lisusu, kanisá ndenge bandeko oyo basalaka na Bakomite mpo na boyokani na minganga mpe Bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi, basalisaka bandeko na bolingo mpenza. Milende oyo basalaka mpe ndenge oyo bamipimelaka makambo mosusu ezali mpenza lipamboli mpo na bandeko na biso baklisto na mokili mobimba!​—Nz. 110:3.

4 Tokoki mpe kosalisa basusu ntango likama moko to likambo moko ya mbalakaka ebimi. Nzokande, mbala mingi esɛngaka kaka bososoli mpo na koyeba ete ndeko moko azali na mposa básalisa ye to bálendisa ye. (Mas. 17:17) Ntango tozali komipesa na motema mobimba mpo na kosalela basusu mpe kotombola misala ya Bokonzi, tozali kolanda ndakisa ya Yesu. (Filp. 2:5-8) Tiká ete tókoba kosala yango ntango nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto