Bozongeli ya Liyangani ya mokolo moko
Lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala mwa moke liboso lisangá na bino ekende na liyangani ya mokolo moko mpo na mobu ya mosala 2006 mpe mwa moke nsima na yango. Mokɛngɛli-mokambi akotya yango na programɛ ya Likita ya Mosala liboso ya kokende na liyangani mpe nsima ya liyangani, ndenge Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2004, lokasa 4 emonisaki yango. Na ntango ya bozongeli, esengeli kotuna mituna nyonso, mpe kolobela mingi ndenge oyo tokoki kosalela makambo toyokaki na liyangani.
NA NTƆNGƆ
1. Kobatela liso na yo alima elimboli nini, mpe mpo na nini yango ezali pɛtɛɛ te lelo oyo? (“Mpo na nini kobatela liso na yo alima?”)
2. Matomba nini tozwaka soki tobateli liso na biso alima? (“Mapamboli oyo okozwa soki obateli liso na yo alima”)
3. Likama nini makambo mingi oyo bato bameseni kosala ekoki kobimisa? (“Batelá liso na yo alima na mokili oyo mabe”)
NSIMA YA MIDI
4. Ndenge nini baboti mpe mikóló mosusu balendisaka bilenge bálanda mikano ya elimo? (“Baboti oyo babwakaka mbanzi na bango alima” mpe “Bilenge oyo bamityelaka mikano ya elimo”)
5. Ndenge nini tokoki kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova (a) moto mokomoko? (b) libota mobimba? (c) lisangá mobimba? (“Sala makasi okende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova”)