Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/01 lok. 8
  • “Natikali ngwi! Natikali ngwi! Natikali ngwi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Natikali ngwi! Natikali ngwi! Natikali ngwi!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Bakasɛti video oyo ezali kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Les Témoins de Jéhovah : organisés pour proclamer la bonne nouvelle
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Bato ya sembo mpe ya mpiko balongi monyoko ya Banazi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bisaleli oyo ezali koteya mpe kolendisa
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 6/01 lok. 8

“Natikali ngwi! Natikali ngwi! Natikali ngwi!

1 Ezali maloba ya moklisto moko ya sembo oyo abikaki ntango Banazi bazalaki koboma ebele ya Bayuda na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba; yango ezali komonisa mokano oyo bankóto ya Batatoli ya Yehova​—ezala baoyo bazali na bomoi mpe baoyo bakufá​—bazalaki na yango, baoyo bakangamaki na bindimeli na bango atako Banazi bazalaki konyokola bango. (Ef. 6:11, 13) Lisolo kitoko oyo ezali komonisa mpiko na bango mpe elonga na bango emonisami na kasɛti video ya kolendisa oyo ezali na motó ya likambo La fermeté des Témoins de Jéhovah face à la persécution nazie (Ndenge Batatoli ya Yehova batikalaki ngwi liboso ya minyoko ya Banazi). Biso nyonso na kati ya lisangá tolendisami na kotala yango mpe kosolola makambo oyo tomoni mpe oyo esepelisi biso.

2 Tiká ete mituna oyo etinda yo na kokanisa: (1) Mpo na nini Batatoli ya Yehova bamonisaki mpiko mpo na kotɛmɛla Banazi? (2a) Makanisi nini ya kokesana ebimaki likoló ya ndenge moko boye ya kopesa mbote, mpe mpo na nini? (2b) Ndenge nini likambo yango etungisaki mabota ya Batatoli? (3) Batatoli boni batindamaki na bakaa ya bakangami, ndenge nini bazalaki koyeba bango kuna, mpe ndenge nini Gestapo ezalaki kotalela bango? (4) Likambo nini bandeko na biso baboyaki kosala mpo na kozongela bonsɔmi na bango? (5a) Ndenge nini mpe ntango nini Batatoli ya Yehova bayebisaki na mpiko mpenza ndenge boyangeli ya Hitler ezalaki konyokola bato? (5b) Hitler asalaki nini? (6) Ndenge nini boyokani oyo ezalaki kati na basaleli ya Yehova ebatelaki bomoi na bango mpe ya bato mosusu, na nzoto mpe na elimo? (7) Loyembo nini ya Bokonzi ekomamaki na kaa moko ya bakangami? (8) Bandakisa nini ya mibali, basi mpe bilenge ya sembo epesi yo makanisi ya kotikala sembo epai ya Yehova, ata soki likambo nini eyeli yo? (Talá mpe Annuaire 1999 lokasa 144-147.) (9) Lokola ozali Motatoli ya Yehova, kasɛti video oyo epesi yo makanisi nini mpo na likambo etali koboya kosangana na mokili?

3 Ndakisa ya kolendisa ya Batatoli ya Yehova oyo balobeli na kasɛti video Fermeté ekoki kosalisa bilenge, ata mpe baoyo bazali Batatoli ya Yehova te báyeba ndenge ya kosala liboso ya makambo lokola koyinama, mitungisi ya baninga, mpe makambo oyo etali lisosoli. Soki ozali elenge oyo azali naino na kelasi, ezala ya nse to ya likoló, okoki kopesa balakisi na yo libaku ya kosalela kasɛti video yango na kelasi? Mbala mosusu okoki kopesa bango kasɛti video yango mpe koyebisa bango ete yango ezali lokola likambo moko ya istware oyo eyebani mingi te, to lokola lisolo (documentaire) moko oyo ezali koteya bizaleli malamu.

4 Kasɛti video Fermeté ezali esaleli moko ya malamu mpenza mpo na komonisa ndenge oyo mateya ya Nzambe epesaka biso makasi na elimo mpo na kosepelisa Nzambe na ntango oyo tozali kotikala ngwi mpo na makambo oyo ezali malamu na miso na ye. (1 Kol. 16:13) Lakisá yango epai ya moto nyonso oyo azali kosepela na mateya ya solo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto