Biyano na mituna na bino
◼ Nani azali na mokumba ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi?
Ndako ya Bokonzi oyo ezali pɛto mpe kitoko ebakisaka lokumu ya nsango oyo tozali koteya. (Kokanisá na 1 Petelo 2:12.) Kotya ntango nyonso bopɛto na Ndako ya Bokonzi ezali na ntina mingi, mpe moto nyonso akoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango. Tosengeli te kotika mokumba yango mobimba kaka epai ya mwa bato moke. Mbala mingi bibongiseli ezwamaka mpo ete bituluku nyonso ya Boyekoli ya Mokanda esalaka mosala yango, mpe bandeko oyo batambwisaka Boyekoli ya Mokanda mpe basungi na bango nde basengeli kopesa ndakisa na etuluku na bango. Na Bandako ya Bokonzi oyo masangá mingi eyanganaka wana, bankulutu bakozwa bibongiseli mpo bato nyonso bápesa mabɔkɔ mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi.
Ndenge nini tokoki kokokisa mokumba yango malamumalamu? Esengeli kozala na programɛ ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Esengeli kozala na biloko ya mosala mpo na mosala yango. Liste ya misala oyo esengeli kosalema ekotyama na esika batyaka mayebisi mpo bandeko oyo bakosala mosala bátala ndenge basengeli kosala. Bokoki kozala na baliste mibale, liste moko mpo na kokombola Ndako ya Bokonzi nsima ya likita mokomoko mpe liste mosusu mpo na kosukola Ndako ya Bokonzi pɔsɔ na pɔsɔ. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda asengeli kopona mokolo mpe ngonga oyo ekopesa nzela ete bandeko nyonso oyo baponami básukola Ndako ya Bokonzi. Bosengeli mpe mbala na mbala kobongisa landalanda (pelouse), mpe fololo oyo ezali na lopango ya Ndako ya Bokonzi. Esengeli mpe kokeba ete bosɔtɔ ezala na nzela te to na esika ya kotɛlɛmisa mituka. Mbala moko na mbula, ekoki kozala liboso ya Ekaniseli, bosengeli kosukola Ndako ya Bokonzi malamumalamu. Yango ekosɛnga kosukola maninisa (fenêtre) mpe bifelo (mur), kosukola tapi na sabuni, mpe kosukola barido.
Na ntembe te, biso nyonso tokoki kosala ete mosala yango ezala makasi mingi te. Tosengeli te kobwaka biloko lokola bazoka, manzanza to papye na kati ya Ndako ya Bokonzi to na libanda na yango. Tosengeli kotika twalɛti pɛto soki tosaleli yango, mpo moto oyo akokɔta nsima na biso akuta yango pɛto. Tosengeli te kobebisa biloko ya mosala to bakiti oyo ezali na Ndako ya Bokonzi. Soki tomoni ete tapi ebebi, bakiti ebukani, pompi ezali kosala malamu te, to miinda eziki, to biloko mosusu ebebi, tosengeli koyebisa yango noki epai ya ndeko oyo atalaka makambo ya kobatela Ndako ya Bokonzi.
Tiká ete tózala na bolingo ya kosala mosala na biso. Yango ekosala ete ndako ya losambo ezala esika oyo ekosepelisa mpe oyo ekomonisa ete tozali bato ya pɛto oyo bazali kokumisa Yehova Nzambe.—1 Pet. 1:16.