Tokosala nini mpo makita esepelisa biso?
1 Makita ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso ya elimo. Esengo oyo tozwaka na makita eutaka na makambo tosalaka liboso ya makita, ntango makita ezali kosalema, mpe nsima ya makita. Tokosala nini mpo ete biso moko mpe bato mosusu tózala ntango nyonso na esengo monene ya koyangana na makita?
2 Liboso ya makita: Esengo oyo tozwaka na makita eutaka mingimingi na komibongisa na biso moko. Soki tomibongisi malamu, yango ekosalisa biso tótya likebi na makambo oyo ekolobama na makita mpe tópesa biyano. Lisusu, tosengeli kobongisa malamu mikumba nyonso oyo bapesi biso na makita mpo na kobimisa mateya oyo ezali kati na yango ndenge malako esɛngi mpe mpo na kosimba likebi ya bayangani. Tosengeli kozongela mikumba yango malamu liboso ya kokende kosala yango. Ntango tozali kosala milende ete makita esepelisa mpe etonga elimo ya moyangani mokomoko, bokoli na biso moko ekomonana polele mpe esengo na biso ekobakisama.—1 Tim. 4:15, 16.
3 Na makita: Kopesa biyano na makita ekoki kosalisa biso tósepela na yango mingi. Masolo oyo esɛngaka ete bayangani bápesa biyano esengeli kotalelama lokola mokumba oyo bapesi moto mokomoko ya lisangá. Mbala mingi komantere ya mokuse mpe ya polele ebimisaka matomba malamu. Kolobela na mokuse makambo ya kolendisa oyo bandeko bakutanaka na yango ekoki kopesa biso makasi, kasi tosengeli kolobela yango na ntango oyo tomoni ete ebongi. (Mas. 15:23; Mis. 15:3) Ntango tozali kosala lisolo moko na likita, tosengeli koloba na esengo mpe na komindimisa, tosengeli koyeisa lisolo yango kitoko, komonisa ete makambo oyo tozali koloba ezali solo, kozanga kolekisa ndelo, mpe komonisa ndenge ya kosalela yango.
4 Nsima ya makita: Kosolola na boboto nyonso elongo na basusu, kopesana mbote na esengo, mpe kolobela mwa makambo ya ntina oyo toyoki na makita ekoki kopesa biso nyonso litomba. Koyebisa esengo toyokaka ntango tozali komona bilenge, mikóló, mpe bato ya sika kopesa biyano na makita yango ekokolisa bolingo na biso mpo na bandeko. Na esika ya kotɔnga bandeko oyo bazangisi makita, tosengeli nde koyebisa bango esengo oyo tozwi na makita, mpe na bongo tokolendisa bango ete báyangana na makita.—Ebe. 10:24, 25.
5 Tiká ete tózanga te bibongiseli ya ntina oyo esalemi mpo na koyikisana mpiko. (Lom. 1:11, 12) Soki tozali kosala milende mingi, biso nyonso tokoki kozala ntango nyonso na esengo wana tozali koyangana na makita ya boklisto.