Tósalela malamu bazulunalo na Apríli
1 Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali na nsango ya kolendisa oyo ezali na boyokani na nsango malamu ya seko. Mpo na kosalela malamu bazulunalo, esengeli, kati na makambo mosusu, kozwa ntango ya kotánga yango malamumalamu na kokanisáká na lolenge oyo masoló mazali kati na yango makoki kolamwisa mposa ya bato kati na teritware.
2 Libosoliboso, esengeli na biso komesana na masoló oyo malakisami na ezipeli ya zulunalo. Mingimingi, ezali bililingi ya lokasa ya liboso nde ebendaka bato na kondima bazulunalo. Tópona masolo oyo, engebene biso, ekoki kobenda likebi ya bato oyo tokokutana na bango kati na teritware na biso. Bato mingi bazali kati na lingomba moko? Mabanzo na bango ezali mpenzampenza nini? Soki tozali na makanisi wana na elimo na biso, tokozala na likoki ya kobongisa kolakisama malamu ya bazulunalo. Tótalela oyo epesameli biso awa na nsé.
3 Soki tozali kolakisa “Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli” ya 1 Ɔctɔbrɛ 1994, tokoki kolobela lisoló: “Biblia: wapi motuya na yango mpenza?” [soki yango ezali te, tokolakisa mwa buku “Talá,” paragraphe 8 mpe 9] tokoloba:
◼ “Tokoki kokuta Biblia pene kati na mabota nyonso na esika tofandi. Mingi kati na baoyo bazali na yango bakanisaka ete ezali na motuya mpenza.” Na bongo, tokoki kotuna motuna ya semba, lokola: “Engebene makanisi na yo, nini ezali kosala ete Biblia ekesana na mikanda misusu?” to mpe: “Na makanisi na yo, nini ekoki kosalisa bato mingi na kozwa litomba na Biblia?” Nsima na eyano ya molobani na biso, lisoló ekoki kokóba likoló na makanisi mabongi lokola: “Ezali na bilembo makasi oyo bizali komonisa ete Biblia epemami na Nzambe mpe ezali motambwisi oyo tokoki kotyela motema. Etondi na boyebi oyo ekoki kopesa biso moboi ya seko. [Tángá Yoane 17:3] Bato mingi bazali na limenya mpo na yango, kasi bayebi kosalela yango te. Lisoló oyo ya Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli to mwa [buku] oyo Talá ezali kolimbola lolenge oyo okoki kosalela Biblia mpo na kozwa biyano na mituna oyo omitunaka mpo na mikolo mizali koya. Nalingi kotikela yo zulunalo oyo to mwa buku oyo. Soki osepeli na botángi na yango, nakolimbwela yo na mbala ya nsima lolenge nini okoki kozwa Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli epai na yo mbala na mbala.”
4 Na kosaleláká Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli ya 15 Ɔctóbrɛ 1994 [to mwa buku “Bilimu ya bakufi”], tokolinga mbala mosusu kosalela kolakisama ya pɛtɛɛ lokola oyo:
◼“Biso nyonso tosilá mpenza kokufela molingami moko. Lisoló oyo ezali kotuna motuna oyo: “Ezali ya bakufi ezali nini?” Na makanisi na yo, nini ekolekaka ntango moto akufi? [Tika ete moto yango ayanola.] Soki okolinga koyeba eyano ya Biblia mpo na motuna yango, nakosepela kotikela yo zulunalo oyo.” Tólengela kolakisa trakte Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? soki molobani na biso asepeli kotánga mwa maloba moke.
5 Nimero ya 22 Ɔctóbrɛ 1994 (ebimeli ya Lifralanséé) ya “Lamuká!” elobeli moko na makambo oyo mazali komonisa kozanga kolonga na mangomba. Na kosaleláká lisoló “Quand la religion prend parti dans les guerres” (Ntango mangomba ezali kokɔta na bitumba) [to lisoló “Nani akokamba mabota kino na kimya?” na mwa buku “Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?”], tokoki kotuna motuna oyo:
◼“Na makanisi na yo, soki Yesu azalaki na mabelé na mikolo na biso, akokaki kokanisa nini na mobulu oyo ezingi biso? [Tika ete moto yango ayanola.] Yesu ateyaki biso ete tosengeli kolinga bato nyonso, ata mpe bayini na biso. Nzokande, mangomba mingi oyo emilobaka ya boklisto mazali kokɔta na matáta ya makambo ya politiki. Na meko nini okanisi ete yango ekoki kozala na bopusi likoló na bato oyo balingi komitambwisa engebene mateya ya Yesu? [Tiká ye ete ayanola.] Nimero oyo ya Lamuká! (to mwa buku Mokili mozangi bitumba) ezali kolobela likambo yango mpe ezali komonisa lolenge nini Bokonzi ya Nzambe ekosilisa likambo yango.”
6 Tósala milende na kolakisa bazulunalo na ndako moko na moko, ata soki nzela epesameli biso te ya kobanda lisoló moko ya Biblia. Soki bazulunalo ezali te, tokoki kosalela mwa babuku oyo tozali na yango mpe koyokanisa kolakisama na biso engebene makambo mazwami kati na yango.