Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/8 lok. 31
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Tokokende na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo etatolaka elongo na elimo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • “Tokokende na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/8 lok. 31

Oyebaki yango?

Bakomeli oyo batɛmɛlaki Yesu bazalaki banani?

Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, akutanaki na bakomeli kaka na Yelusaleme te, kasi mpe na bamboka mpe bingumba ya mike. Na libándá ya Yelusaleme​—ata mpe na bingumba ya Bayuda oyo ezalaki libándá ya Palestine—bato yango bazalaki basali ya Leta, bato oyo bayebaki mibeko, mpe ntango mosusu bazalaki kosala lokola bakomeli to mpe basambisi.​—Malako 2:6; 9:14; Luka 5:17-21.

Na Yelusaleme, bakomeli bazalaki kosala elongo na guvɛrnema ya Bayuda. (Matai 16:21) Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) emonisi ete mokumba na bango “ekokaki kozala ya kosala elongo na banganga-nzambe, ezala na makambo ya kosambisa to mpe kosimba mimeseno mpe mibeko ya Bayuda mpe misala ya Sanedrina.” Lokola bazalaki bateyi minene ya Mibeko, bamosusu kati na bango bazalaki na kati ya Sanedrina to esambiselo monene ya Bayuda. Bazalaki kosala elongo na banganga-nzambe bakonzi mpe Bafalisai.

Mbala mingi, Biblia elobelaka bakomeli lokola banguna ya Yesu na makambo ya losambo. Nzokande, bamosusu bazalaki kotɛmɛla ye te. Na ndakisa, mokomeli moko alobaki na Yesu boye: “Nakolanda yo epai nyonso okokende.” Yesu ayebisaki mpe mokomeli moko boye: “Ozali mosika te na bokonzi ya Nzambe.”​—Matai 8:19; Malako 12:28-34.

Na ntango ya kala kopakola moto mafuta elimbolaki nini?

Na ntango ya kala, na Moyen-Orient, kotya moto mafuta na motó ezalaki elembo mpo na komonisa ete andimami to bayambi ye malamu. Mbala mingi, bazalaki kosalela mafuta ya olive oyo basangisi na malasi. Baebele bazalaki mpe kosopela moto mafuta na motó ntango aponami mpo na kokokisa mokumba moko. Na ndakisa, Alona apakolamaki mafuta ntango aponamaki mpo azala nganga-nzambe monene. (Levitike 8:12) Mpo na Mokonzi Davidi, Biblia elobi ete “Samwele azwaki liseke ya mafuta mpe atyaki ye mafuta . . . Mpe elimo ya Yehova ebandaki kosala kati na Davidi banda mokolo wana.”​—1 Samwele 16:13, NW.

Na monɔkɔ ya Liebele, liloba oyo esalelami mpo na kolobela kopakolama yango ezali ma·shachʹ, epai liloba ma·shiʹach to Masiya euti. Liloba ya Grɛki oyo ekokani na yango ezali khriʹo, epai liloba khri·stosʹ, to Klisto euti. Na yango, ezala Alona to Davidi, mokomoko na bango akoki kobengama Masiya, to mopakolami. Moize mpe babengi ye Klisto, to mopakolami, mpo Nzambe aponaki ye mpo azala momonisi na Ye.​—Baebele 11:24-26.

Nzambe aponaki Yesu, moto ya Nazalete mpo akokisa mokumba moko monene. Yesu apakolamaki na mafuta te, kasi nde na elimo santu ya Nzambe. (Matai 3:16) Lokola azali Mopakolami ya Yehova, Yesu abengami Masiya to Klisto.​—Luka 4:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto