Ndenge ya kozala na esengo ntango ozali monzemba
MASOLO mingi oyo babɛtelaka bana mike esukaka na maloba oyo: “Na nsima babalanaki mpe bakobaki kozala na bomoi ya esengo.” Mbala mingi bafilme mpe babuku oyo elobelaka bolingo emonisaka ete soki moto abali, akómaka na esengo libela na libela! Longola yango, mimeseno ya bikólo mingi etindaka bilenge oyo bakoli bábala. Ntango Debby azalaki na mbula soki 25, alobaki boye: “Bato batindaka mwana mwasi ayoka ete esengeli kaka abala. Bamonisaka ete bomoi ebandaka nde ntango moto abali.”
Moto oyo akɔmeli na elimo amonaka te ete kaka libala nde epesaka esengo. Atako kobala ezalaki mobeko epai ya Bayisalaele, Biblia elobeli mibali mpe basi oyo bazalaki minzemba kasi bazalaki na bomoi ya esengo mpenza. Lelo oyo, baklisto mosusu baponaka kotikala minzemba; nzokande basusu bazali minzemba mpo na makambo mosusu ya bomoi. Ata soki ozali monzemba mpo na ntina nini, motuna ezali kaka moko: Ndenge nini moklisto akoki kozala na esengo atako azali monzemba?
Yesu abalaki te; ezalaki bongo mpo na mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Ayebisaki bayekoli na ye ete basusu kati na bango mpe bakotikala minzemba. (Mat. 19:10-12) Na yango, Yesu amonisaki ete mpo na kozala na esengo atako tozali minzemba, tosengeli kondima, to kopesa nzela na bomoi yango na motema mpe makanisi na biso.
Toli ya Yesu etali kaka moto oyo aponi kotikala monzemba mpo na mwa ntango mpo amipesa mingi na mosala ya Nzambe? (1 Kol. 7:34, 35) Mpenza te. Tózwa ndakisa ya moklisto moko oyo asepelaka kobala kasi sikoyo akoki kozwa te molongani oyo abongi na ye. Ana, ndeko mwasi moko monzemba oyo azali na mbula 30 na ndambo alobi boye: “Kala mingi te, moninga moko ya mosala oyo azali Motatoli te ayebisaki ngai na pwasa ete alingi abala ngai. Nakoki koloba ete likanisi na ye esepelisaki ngai, kasi nalongolaki yango nokinoki na motema na ngai mpo nalingi kobala kaka moto oyo akosalisa ngai napusana penepene na Yehova.”
Mposa ya kobala “na kati ya Nkolo” esalisaka baklisto mingi ya basi lokola Ana báboya kobalana na moto oyo azali mondimi te.a (1 Kol. 7:39; 2 Kol. 6:14) Mpo na kotosa toli ya Nzambe, bazali kondima kotikala minzemba, ntango bazwi naino moklisto te. Ndenge nini bakoki kosala yango na esengo?
Yekolá kotala makambo ya malamu
Kondima likambo oyo ezali malamu mingi te etalelaka mingimingi makanisi oyo moto azali na yango. Carmen, moklisto oyo azali na mbula 40 na ndambo mpe oyo azali naino monzemba, alobi boye: “Nasepelaka na oyo nazali na yango, mpe nalɔtaka te eloko oyo nazali na yango te.” Ya solo, ekómaka ete tómiyoka ete tozali kaka biso moko to tózala mawamawa. Kasi, koyeba ete bandeko mingi na mokili mobimba bazali mpe kokutana na makambo ya ndenge wana ekoki kolendisa biso tókende liboso na motema ya kokita. Yehova asalisá bandeko ebele oyo bazali minzemba bázala na esengo mpe bálonga mikakatano mosusu.—1 Pet. 5:9, 10.
Baklisto mingi ya basi mpe ya mibali bamoni malamu ya kozala monzemba. Ester, ndeko ya mbula soki 35 oyo azali monzemba, alobi boye: “Nakanisi ete sɛkɛlɛ ya kozala na esengo ezali nde koyeba kosepela na makambo malamu ya bomoi oyo ozali na yango.” Carmen abakisi ete: “Nakanisi ete nabala to nabala te, soki natye matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, Yehova akoboya te kopesa ngai eloko nyonso ya malamu. (Nz. 84:11) Mbala mosusu bomoi na ngai ezali mpenza te ndenge nakanaki yango, kasi nazali na esengo mpe nakokoba kozala na esengo.”
Bandakisa ya minzemba oyo Biblia elobeli
Mwana mwasi ya Yefeta akanaki kotikala monzemba te. Kasi, ndai ya tata na ye nde esalaki ete akende kosala na tempelo banda bolenge na ye. Na ntembe te, mokumba yango oyo akanaki te ebebisaki makambo ndenge akanaki mpe ezalaki mposa na ye te. Alelaki sanza mibale mobimba ntango ayebaki ete akobala te mpe akobota te. Atako bongo, andimaki likambo oyo ekómelaki ye mpe asalaki na bosembo bomoi na ye mobimba. Basi mosusu ya Yisalaele bazalaki kokende kopesa ye longonya mbula na mbula mpo na elimo na ye ya komipimela.—Bas. 11:36-40.
Mbala mosusu baoyo bazalaki mikube na eleko ya Yisaya bazalaki koyoka mawa mpo na ndenge oyo bazalaki. Biblia elobi te eloko nini ekómisaki bango mikube. Lokola bazalaki bongo, bakokaki te kokɔta na lisangá ya Yisalaele, bakokaki mpe kobala to kobota te. (Det. 23:1) Atako bongo, Yehova ayebaki mitungisi na bango mpe apesaki bango longonya mpo bazalaki kotosa kondimana na ye na molimo na bango mobimba. Ayebisaki bango ete bakozwa “ekaniseli” mpe “nkombo ya seko oyo ekokatama te” na ndako na ye. Na maloba mosusu, mikube yango oyo bazalaki sembo bazalaki na elikya ya kozwa bomoi ya seko na boyangeli ya Yesu Masiya. Yehova akobosana bango soki moke te.—Yis. 56:3-5.
Likambo ya Yilimia ezalaki ya ndenge mosusu mpenza. Ntango Nzambe aponaki Yilimia mosakoli, ayebisaki ye atikala monzemba mpo eleko na bango ezalaki ya mpasi mingi mpe mpo na mokumba oyo azwaki. Yehova alobaki boye: “Yo okobala mwasi te mpe okozala na bana babali mpe na bana basi na esika oyo te.” (Yil. 16:1-4) Biblia elobi te soki Yilimia ayokaki ndenge nini ntango azwaki malako yango, atako eyebisi biso ete Yilimia azalaki moto moko oyo azalaki kosepela na liloba ya Yehova. (Yil. 15:16) Na bambula oyo elandaki, ntango Yilimia anyokwamaki na boumeli ya sanza 18 oyo Yelusaleme ezingamaki na banguna, na ntembe te amonaki bwanya ya kotosa mitindo oyo Yehova apesaki ete atikala monzemba.—Bil. 4:4, 10.
Ndenge ya kokómisa bomoi na yo malamu mingi
Bandakisa ya Biblia oyo touti kotánga elobeli bato oyo bazalaki minzemba, kasi Yehova asungaki bango mpe bamipesaki mobimba na mosala na ye. Lelo oyo mpe, kosala mosala oyo ezali na ntina ekoki kosalisa mingi mpo tókómisa bomoi na biso malamu mingi. Biblia esakolaki ete basi oyo basakolaka nsango malamu bakokóma mingi mpenza. (Nz. 68:11) Bankóto kati na bango bazali minzemba. Lokola mosala na bango ebotaki mbuma, mingi kati na bango bazwá bana mibali mpe bana basi na elimo.—Mko. 10:29, 30; 1 Tes. 2:7, 8.
Nsima ya mbula 14 na mosala ya mobongisi-nzela, Loli alobi boye: “Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka ngai nayeba kotambwisa bomoi na ngai. Lokola nazali monzemba, nazalaka na makambo mingi ya kosala, mpe yango esalisaka ngai namiyoka ngai moko te. Na nsuka ya mokolo nyonso, nayokaka esengo mpo namonaka ete mosala ya kosakola oyo nasali ezali mpenza kosalisa bato. Epesaka ngai esengo mingi.”
Baklisto mingi ya basi bayekolá monɔkɔ mosusu, mpe bakómá kosakola epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu. Ana, oyo tolobelaki liboso, asepelaka kosakwela bato oyo balobaka Lifalanse. Alobi boye: “Na engumba na biso, ezali na bato ebele mpenza oyo bautá na mikili mosusu. Koyekola monɔkɔ oyo nakoki kosalela mpo na kosolola na mingi kati na bango efungweli ngai ekuke mosusu ya mosala mpe ekómisi mosala na ngai ya kosakola elɛngi mingi.”
Lokola mbala mingi bato oyo bazali minzemba bazalaka na mikumba mingi te, basusu basalelaki libaku yango mpo na kokende kosala esika mposa ezali makasi. Lidiana, ndeko mwasi moko ya monzemba ya mbula soki 35, oyo akendaki kosakola na mikili oyo mposa ezali makasi, alobi boye: “Nandimi mpenza ete soki ozali kosala mingi na mosala ya Yehova, okokóma na baninga mingi ya motema mpe bakobanda kolinga yo. Nakómi na baninga mingi ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge, mpe boninga yango esalisi ngai nakóma na bomoi ya esengo mpenza.”
Biblia elobeli Filipo mopalanganisi ya nsango malamu oyo azalaki na bana basi minei oyo bazalaki minzemba mpe bazalaki kosakola. (Mis. 21:8, 9) Na ntembe te, bana yango bazalaki na molende lokola tata na bango. Ekoki nde kozala ete basalelaki likabo na bango ya kosakola mpo na bolamu ya baklisto ya Kaisalia? (1 Kol. 14:1, 3) Lelo mpe ebele ya bandeko basi oyo bazali minzemba bazali kolendisa basusu na ndenge bayanganaka na makita nyonso mpe bapesaka biyano.
Lidia, azalaki moko ya baklisto ya liboso ya lisangá ya Filipi, mpe Biblia ekumisi ye mpo na ezaleli na ye ya kokaba. (Mis. 16:14, 15, 40) Lidia—oyo mbala mosusu azalaki monzemba to mwasi akufelá mobali—azalaki na elimo ya kokaba, yango wana azwaki libaku ya koyamba bakɛngɛli-batamboli, lokola Paulo, Silasi, mpe Luka. Kozala na elimo ya ndenge wana ememaka mpe mapamboli ya ndenge moko lelo oyo.
Ndenge ya kokokisa mposa ya kozala na moto oyo azali kolinga yo
Longola kozala na mosala ya ntina mpo bomoi na biso ezala kaka mpamba te, biso nyonso tozalaka na mposa bálinga biso. Ndenge nini monzemba akoki kokokisa mposa yango? Ya liboso, Yehova azali wana ntango nyonso mpo na kolinga biso, kopesa biso makasi, mpe koyoka biso. Na ntango mosusu, Mokonzi Davidi ayokaki ete ‘azali bobele ye moko mpe azali na mpasi,’ kasi ayebaki ete akoki ntango nyonso koluka lisungi epai ya Yehova. (Nz. 25:16; 55:22) Akomaki boye: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nz. 27:10) Nzambe azali kobenga basaleli na ye nyonso bápusana penepene na ye, bákóma baninga na ye ya motema.—Nz. 25:14; Yak. 2:23; 4:8.
Longola yango, na kati ya lisangá ya bandeko na mokili mobimba, tokoki mpe kozwa batata, bamama, bandeko basi mpe mibali ya elimo oyo bolingo na bango mpo na biso ekoki kosala ete tózala na esengo. (Mat. 19:29; 1 Pet. 2:17) Baklisto mingi oyo bazali minzemba bazwaka esengo mingi na kolanda ndakisa ya Dolokasi oyo “atondaki na misala ya malamu mpe na makabo ya motema mawa.” (Mis. 9:36, 39) Ndeko Loli alobi boye: “Esika nyonso oyo nakendaka, nalukaka baninga ya malamu na lisangá, oyo bakolinga ngai mpe bakosunga ngai ntango nalɛmbi nzoto. Mpo na kokómisa boninga yango makasi, ngai mpe nalukaka kolinga basusu mpe kotyela bango likebi. Nasalá na masangá mwambe, mpe nazalaki ntango nyonso kozwa baninga ya malamu. Mbala mingi, bazalaki bandeko basi ya mbula na ngai te, ntango mosusu ezalaki bankɔkɔ to bilenge.” Na masangá nyonso, ezali na bato oyo bazali na mposa bálinga bango mpe bázala na baninga. Kotyela bato ya ndenge wana likebi ekoki kosalisa bango mpe kosalisa biso tókokisa mposa ya kolinga basusu mpe ya kozala na moto oyo azali kolinga biso.—Luka 6:38.
Nzambe akobosana te
Biblia emonisi ete lokola tozali na ntango ya mpasi, baklisto nyonso basengeli komipimela eloko moko to mosusu. (1 Kol. 7:29-31) Na ntembe te, baoyo bazali kotikala minzemba mpo bazali na ekateli ya kotosa mobeko ya Nzambe ya kobala kaka na kati ya Nkolo babongi mpenza kozwa lokumu mpe limemya. (Mat. 19:12) Kasi, ndenge bandimi kotikala minzemba elimboli te ete bakoki kozala mpenza na bomoi ya esengo te.
Lidiana alobi boye: “Nazali na bomoi ya esengo oyo euti na boyokani na ngai ná Yehova mpe mosala oyo nazali kosalela ye. Nayebi bato babalá oyo bazali na esengo mpe bamosusu oyo bazali na esengo te. Yango endimisaka ngai ete esengo na ngai ezali kouta te na likanisi ete nakobala to nakobala te.” Ndenge Yesu amonisaki yango, esengo eutaka libosoliboso na kopesa mpe kosalela basusu; mpe baklisto nyonso bakoki kosala yango.—Yoa. 13:14-17; Mis. 20:35.
Ya solo, esengo na biso makasi euti nde na koyeba ete Yehova akopambola biso mpo na makambo nyonso oyo tozali komipimela mpo na kosala mokano na ye. Biblia epesi biso elaka oyo: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”—Ebe. 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako na lisolo oyo tozali kolobela baklisto ya basi, mitinda oyo ezali awa etaleli mpe bandeko mibali.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 25]
“Nasepelaka na oyo nazali na yango, mpe nalɔtaka te eloko oyo nazali na yango te.”—Carmen
[Elilingi na lokasa 26]
Loli ná Lidiana basepelaka kosala esika mposa ezali makasi
[Elilingi na lokasa 27]
Nzambe azali kobenga basaleli na ye nyonso bápusana penepene na ye