Kobongola Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Portugais esɛngaki mpiko
“YE OYO akoyika mpiko akolonga.” Maloba wana ezali na lokasa ya liboso ya mwa buku moko ya makambo ya losambo oyo ebimaki na ekeke ya 17, oyo ekomamaki na João Ferreira de Almeida. Maloba wana ebongi mpenza mpo na kolobela moto oyo amipesaki bomoi na ye mobimba mpo na kobongola mpe kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Portugais.
Almeida abotamaki na 1628 na Torre de Tavares, mboka moko na Nɔrdi ya Portugal. Baboti na ye bakufaki ntango azalaki mwana moke. Abɔkɔlamaki na Lisbonne, mboka-mokonzi ya Portugal, na papa leki na ye oyo azalaki sango. Balobaka ete lokola alingaki kokóma sangó, Almeida akɔtaki bakelasi ya malamu mpenza, yango wana ayebaki koloba minɔkɔ mingi ntango azalaki kaka na mbula 16.
Soki Almeida atikalaka kaka na Portugal, tondimi te ete alingaki kosalela boyebi wana mpo na kobongola. Ntango mbongwana oyo ebimisaki mangomba ya Protesta esalaki ete Babiblia ebima na minɔkɔ ya Mpoto ya Nɔrdi mpe ya Ntei, ekólo Portugal ezalaki kaka kotambwisama na mibeko ya Katolike. Soki bakuti moto ata na Biblia moko ya monɔkɔ na ye na mabɔkɔ, basengelaki komema ye na tribinale monene ya Katolike.a
Ntango mosusu mpo na kokima boombo wana, Almeida akendeki na Pays-Bas, ntango azalaki na mbula 14. Mwa moke na nsima, kaka ntango azalaki na mbula 14 wana, asalaki mobembo na Azia; aleki na Batavia (oyo ekómá Jakarta), na Indonésie, epai biro monene ya kompanyi moko monene ya Pays-Bas (Companie hollandaise des Indes orientales) ezalaki.
Mobongoli moko ya elenge
Na nsuka ya mobembo na ye na Azia, mbongwana monene ekɔtaki na bomoi ya Almeida. Ntango autaki na Batavia mpe azalaki kokende na masuwa na Malacca (oyo ekómá Melaka), na Wɛsti ya Malaisie, azwaki trakte moko ya Baprotesta oyo ekomamaki na monɔkɔ ya Espagnol. Trakte yango ezalaki na motó ya likambo Bokeseni na kati ya mangomba (Diferencias de la Cristiandad). Longola komonisa polele lokuta ya Lingomba ya Katolike, trakte yango elobaki mpe likambo moko oyo ebendaki mpenza likebi ya elenge Almeida: “Kosalela monɔkɔ oyo bato bayebi te na Lingomba, ata soki ezali mpo na kokumisa Nzambe, ezali na litomba moko te mpo na moto oyo azali koyoka kasi azali kokanga ntina te.”—1 Bakolinti 14:9.
Almeida amonaki ete mpo na kobimisa polele lokuta ya Lingomba ya Katolike, esengeli kosalisa bato nyonso báyeba Biblia. Ntango akómaki na Malacca, akɔtaki na lingomba moko ya Protesta ya Pays-Bas mpe abandaki mbala moko kobongola Baevanzile oyo ezalaki na monɔkɔ ya Espagnol na monɔkɔ ya Portugais mpe kokabola yango epai ya “bato oyo balingaki mpenza koyeba solo.”b
Mbula mibale na nsima, Almeida abandaki mosala moko ya monene: kobongola Makomami ya Grɛki ya boklisto na mobimba na yango, na kolanda Biblia ya Latin oyo babengi Vulgate. Asilisaki mosala yango na mwa basanza kaka. Ezalaki likambo monene mpenza mpo na mwa mwana wana ya mbula 16 mpamba asilisaki mosala monene oyo na boumeli ya mwa basanza kaka. Na mpiko nyonso, atindaki Biblia moko oyo abongolaki epai ya guvɛrnɛrɛ monene ya Pays-Bas na Batavia mpo abimisa yango. Ekoki kozala ete Lingomba ya Batavia etindaki maniskri yango na Amsterdam, kasi pastɛrɛ ya mobange oyo basimbisaki Biblia yango akufaki mpe mosala wana oyo Almeida asalaki, elimwaki.
Kaka ntango basɛngaki ye na 1651 asalela Lingomba ya Ceylan (ekómá Sri Lanka) kopi ya Biblia oyo abongolaki nde Almeida ayaki koyeba ete Biblia oyo asalaki liboso elimwaki na mabombo ya Lingomba. Na mpiko ya mwana mobali, alukaki mpe amonaki kopi moko, ekoki kozala moko ya oyo abongolaki liboso, mpe na mbula oyo elandaki asilisaki kobongisa Baenvanzile mpe Mokanda ya Misala. Bakambi ya lingombac ya Batavia bafutaki ye florins 30 (mbongo oyo bazalaki kolya na Pays-Bas). Moko ya baninga ya Almeida akomaki ete: “Na kotalela mosala monene oyo Almeida asalaki, mbongo oyo bapesaki ye ezalaki moke mingi.”
Atako bamonaki mosala na ye mpamba, Almeida azongaki nsima te mpe akobaki mosala na ye tii ntango asilisaki kobongisa libongoli na ye ya Kondimana ya Sika na 1654 mpe na nsima apesaki bakambi ya lingomba bátánga yango. Na mbala wana mpe, asɛngaki bábimisa yango, kasi basalaki eloko moko te, longola kaka mwa bakopi oyo bakomaki na mabɔkɔ mpo básalelaka yango na bandako-nzambe.
Bakateli ye etumbu ya liwa
Na bambula oyo elandaki, Almeida amipesaki na mosala ya pastɛrɛ mpe ya misionɛrɛ na lingomba wana ya Protesta. Akómaki pastɛrɛ na 1656 mpe asalaki liboso na Ceylan, epai etikalaki moke nzoku eboma ye, mpe na nsima asalaki na Inde, lokola moko ya bamisionɛrɛ ya Protesta ya liboso oyo bakendaki na ekólo yango.
Almeida azalaki kosala mosala ya misionɛrɛ mpo na ekólo mosusu. Yango wana, bato mingi ya Portugal oyo ye azalaki kokende kotala bazalaki komona ye lokola mopɛngwi mpe motɛki. Lokola azalaki kotondola misala mabe ya basango mpe bindimeli ya lingomba, yango esalaki ete azala ntango na matata na bamisionɛrɛ ya Katolike. Matata yango ekómaki makasi na 1661, ntango basambisaki ye na tribinale ya Lingomba ya Katolike na Goa, na Inde, epai balobaki ete azali mopengwi mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa. Lokola ye moko azalaki te, batumbaki fɔtɔ na ye. Nsima ya likambo yango, guvernɛrɛ mokambi ya Pays-Bas azongisaki Almeida mbala moko na Batavia, ntango mosusu mpo azalaki kobanga ye lokola azalaki molangi mpɛmbɛ.
Almeida azalaki misionɛrɛ moko ya molende, kasi abosanaki te ete bato basengelaki na Biblia na monɔkɔ ya Portugais. Almeida azwaki lisusu makasi ya kokoba mosala na ye mpo amonaki ete ezala basango to bandimi bayebaki Biblia te. Na maloba ya ebandeli ya trakte moko oyo Almeida abimisaki na 1668, alobaki na batángi na ye boye: “Nazali kolikya ete . . . mosika te nakosepelisa bino na Biblia mobimba na monɔkɔ na bino mpenza, likabo eleki monene mpe motuya oyo moto ata moko te apesá bino.”
Almeida ná komite oyo ezalaki kobongisa Biblia na ye
Na 1676, Almeida apesaki eteni ya nsuka ya libongoli na ye ya Kondimana ya Sika epai ya bakambi ya lingomba mpo bábongisa yango. Banda kaka na ebandeli, Almeida ná babongisi yango bazalaki koyokana te. Ndenge Jan L. Swellengrebel, moto oyo akomaki lisolo ya bomoi na ye alobaki, ekoki kozala ete baninga ya Almeida ya mosala oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya néerlandais bazalaki koyeba mpenza te ntina ya maloba mpe bilobeli mosusu. Bazalaki mpe kowelana na likambo etali kopona maloba ya kosalela. Esengelaki bábongola Biblia na Portugais oyo bato nyonso balobaka to na Portugais ya makasi, oyo bato mingi bayebi mpenza te? Lisusu, lokola Almeida alingaki mosala esila noki, yango ezalaki kobimisa ntango nyonso matata ná baninga na ye ya mosala.
Mosala ezalaki kokende malɛmbɛmalɛmbɛ, ntango mosusu mpo na ndenge bazalaki kowelana ntango nyonso to mpo bato oyo bazalaki kobongisa yango bazalaki mpenza kopesa yango motuya mingi te. Mbula minei na nsima, babongisi yango bazalaki naino kobundana na mikapo ya liboso ya Luka. Lokola alɛmbaki kozela, Almeida atindaki kopi moko ya maniskri na ye na Pays-Bas kozanga ete bataleli yango báyeba mpo bábimisa yango.
Atako bakambi ya lingomba balingaki kopekisa Kondimana ya Sika na ye ebima, babimisaki yango na Amsterdam na 1681, mpe na mbula oyo elandaki, ebandaki kokóma na Batavia. Kanisá naino mpasi oyo Almeida ayokaki ntango bataleli ya Pays-Bas babebisaki makambo mosusu na Biblia na ye! Lokola bayebaki mpenza monɔkɔ ya Portugais te, Almeida amonaki ete bato yango bakɔtisaki “elobeli ya mabe mpe ya bongolabongola oyo ebebisaki mpenza ndimbola ya Elimo Santu.”
Guvernɛma ya Pays-Bas esepelaki te mpe ezwaki meko ete bábebisa Babiblia na ye nyonso oyo ebimaki. Atako bongo, Almeida abondelaki bakonzi ete bátika mwa bakopi mpo bábongisa bafoti ya minene na mabɔkɔ. Basengelaki kosalela bakopi yango tii ntango bakobongisa Biblia yango.
Babongisi ya Biblia na Batavia basanganaki lisusu mpo bákoba kobongisa Makomami ya Grɛki ya boklisto, mpe babandaki kobongisa mikanda ya Makomami ya Liebele oyo Almeida azalaki kosilisa kobongola. Lokola bazalaki kobanga ete Almeida akokanga motema ntango molai te, bakambi ya lingomba bamonaki malamu bábombaka biteni oyo bazalaki kosilisa na kati ya ndako-nzambe. Likambo ya mawa, Almeida aboyaki likanisi wana.
Na ntango wana, lokola asalaki mosala makasi na boumeli ya bambula mingi mpe afandaki na mokili oyo molunge ezalaka, nzoto na ye ekómaki kobeba. Na 1689, lokola azalaki lisusu nzoto malamu te, Almeida atikaki mosala ya misionɛrɛ mpo amipesa kaka na kobongola Makomami ya Liebele. Likambo ya mawa, akufaki na 1691, ntango azalaki kobongola mokapo ya nsuka ya Ezekiele.
Ebimeli ya mibale ya Kondimana ya Sika, oyo esilaki mwa moke liboso Almeida akufa, ebimaki na 1693. Emonani ete na mbala wana lisusu, bataleli wana babebisaki yango. Na buku na ye Biblia em Portugal (Biblia na Portugal), Guilherme. L. Santos Ferreira alobi ete: “Babongisi . . . babebisaki makambo mingi na mosala kitoko oyo Almeida asalaki, mpe yango elongolaki ata mwa makambo ya kitoko oyo bato ya liboso batikaki.”
Biblia na monɔkɔ ya Portugais esili
Nsima ya liwa ya Almeida, mosala ya kobongisa mpe kobimisa Biblia na monɔkɔ ya Portugais na Batavia esukaki. Ebongiseli moko na Londres oyo mokano na yango ezalaki ya kosalisa bato báyeba Klisto malamu nde ebimisaki mbongo mpo libongoli ya Almeida ya Kondimana ya Sika ebima mpo na mbala ya misato na 1711, mpamba te bamisionɛrɛ ya Danermark oyo bazalaki kosala na engumba Tranquebar, na sudi ya Inde basɛngaki yango.
Ebongiseli yango emonaki malamu kotya masini ya kobimisa mikanda na engumba Tranquebar. Kasi, ntango masuwa oyo ezalaki komema masini ya kobimisa na yango mikanda mpe Babiblia na monɔkɔ ya Portugais ezalaki kokende na Inde, bato moko ya France bayibaki masuwa yango mpe nsukansuka bakendaki kosundola yango na libongo ya Rio de Janeiro, na Brésil. Santos Ferreira akomi ete: “Mpo na ntina oyo eyebani te, mpe na lolenge oyo ekamwisaki bato mingi, bakɛsi oyo ezalaki na masini ya kobimisa mikanda ebebaki te mpe ekobaki mobembo na yango kaka na masuwa wana tii na Tranquebar.” Bamisionɛrɛ ya Danemark babongisaki malamumalamu libongoli ya Almeida ya mikanda ya Biblia oyo etikalaki mpe babimisaki yango. Volimi ya nsuka ya Biblia na Portugais ebimaki na 1751, mbula soki 110 na nsima, kobanda ntango oyo Almeida abandaki kobongola Biblia.
Libula ya libela
Banda bolenge na ye, Almeida asosolaki ete esengeli Biblia ebima na monɔkɔ ya Portugais mpo bato nyonso oyo balobaka monɔkɔ yango báyekola solo na monɔkɔ na bango moko. Asalaki mosala yango na mpiko nyonso na bomoi na ye mobimba, atako akutanaki na mikakatano mingi. Na ndakisa, Lingomba ya Katolike ezalaki kotɛmɛla ye makasi, baninga na ye bazalaki kopesa mosala na ye motuya mingi te, bato oyo basengelaki kobongisa yango bazalaki kobebisa yango mbala na mbala mpe nzoto na ye ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ te. Molende na ye ezwaki mbano.
Bato mingi oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Portugais oyo Almeida azalaki koteya bazali lisusu te, kasi Biblia na ye ezali tii lelo. Na ekeke ya 19, ebongiseli moko ya Angleterre (British and Foreign Bible Society) ná mosusu ya Amerika (American Bible Society) bakabolaki bankotó ya Babiblia ya Almeida na Portugal mpe na bingumba oyo ezali na pembeni ya mbu na Brésil. Na yango, tii lelo oyo Babiblia oyo eutá na libongoli na ye ya ebandeli ezali na kati ya Babiblia oyo eyebani mingi mpe ezali kotɛkama mingi na mikili oyo balobaka monɔkɔ ya Portugais.
Na ntembe te, bato mingi basengeli mpenza kozala na botɔndi epai ya babongoli ya libosoliboso ya Biblia lokola Almeida. Kasi, tosengeli kozala na botɔndi lisusu koleka mpo na Yehova, Nzambe oyo ayebisaka bato makambo na ye, oyo “mokano na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:3, 4) Ye nde mpenzampenza abatelaki Liloba na ye mpe asali ete epalangana bipai nyonso mpo na bolamu na biso. Tiká ete tólinga mpe tóyekolaka ntango nyonso na molende ‘likabo yango ya motuya mpenza’ oyo Tata na biso ya likoló apesi biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bambula ya 1600, Lingomba ya Katolike ebimisaki buku moko oyo eyebisaki mikanda nyonso oyo epekisamaki. Na kati ya buku yango, bapekisaki makasi kosalela Babiblia na minɔkɔ ya mboka. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete kobima ya buku wana “esalaki ete Bakatolike bátika kobongola mikanda na boumeli ya mbula 200 oyo elandaki.”
b Biblia ya liboso oyo Almeida abongolaki ezali kobenga ye Padre (Tata), yango wana bato mosusu bakanisaka ete azalaki nganga-nzambe na Lingomba ya Katolike. Nzokande, bato ya Pays-Bas oyo bazalaki kobimisa Biblia ya Almeida bazalaki kosalela liloba yango na libunga, mpo bazalaki kokanisa ete ezalaki ebɛngeli ya lokumu oyo bazalaki kobenga na yango bapastɛrɛ to bakonzi mosusu ya Lingomba ya Protesta.
c Bakambi ya lingomba moko ya Protesta.
[Etanda/Elilingi na lokasa 21]
NKOMBO YA NZAMBE
Likambo moko oyo emonisi ete Almeida azalaki mobongoli ya sembo ezali ndenge azalaki kotya nkombo ya Nzambe na bisika oyo azalaki komona Tetragrame (balɛtrɛ minei) ya Liebele.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Biblioteca da Igreja de Santa Catarina (Igreja dos Paulistas)
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MAI MONENE YA ATLANTIQUE
PORTUGAL
Lisbonne
Torre de Tavares
[Elilingi na lokasa 18]
Batavia na ekeke ya 17
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na buku Oud en Nieuw Oost-Indiën, ya Franciscus Valentijn, 1724
[Elilingi na lokasa 19]
Lokasa ya liboso ya Kondimana ya Sika ya liboso na monɔkɔ ya Portugais, oyo ebimaki na 1681
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya Biblioteca Nacional, Portugal