Mobembo ya Paulo tii na Beloya
Mosala ya bamisionɛrɛ mibale ebotaki mpenza mbuma, mpamba te bato mingi bakómaki bandimi. Na nsima ebele ya bato batombokelaki bango. Yango wana, bandeko bazwaki ekateli moko. Esengelaki ete bamisionɛrɛ yango bálongwa nokinoki na mboka yango, na butu wana kaka, mpo na kobatela bomoi na bango mpe kobatela lisangá oyo ebotamaki sika. Ezali na ndenge yango nde, na mobu soki 50 ya ntango na biso (T.B.), Paulo ná Silasi balongwaki na Tesaloniki, engumba moko ya etúká ya Masedonia oyo ezalaki pembeni ya mbu. Basalaki mobembo tii na engumba Beloya, basakolaki mpe kuna.
NA NTANGO ya kala, ata mpe lelo oyo, moto oyo azali komona na mosika Ngomba Bermios, akoki mpe komona engumba Beloya (Véria) pembeni na yango, na ɛsti. Beloya ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 65 na sudi ya Tesaloniki mpe, ezali na kilomɛtrɛ 40 kobanda na Mbu ya Égée. Ngomba Olympe, oyo bazalaki kokanisa ete ezali mboka ya banzambe minene ya Bagrɛki, ezali na sudi na yango.
Beloya esengeli kobenda likebi ya bayekoli ya Biblia mpo batángaka ete Paulo ateyaki na engumba yango mpe bato mingi ya engumba yango bakómaki baklisto. (Misala 17:10-15) Tiká tólanda nzela oyo Paulo atambolaki mpe tótalela lisolo ya engumba yango.
Ebandeli na yango
Moto moko te ayebi mpenza ntango oyo engumba Beloya etongamaki. Na siɛklɛ ya 7 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya Masedonia babenganaki bafandi na yango ya liboso, ekoki kozala bato ya Filigia. Mbula nkama misato na nsima, lokola Alesandala Monene abɔtɔlaki bamboka mingi, ekólo Masedonia ekómaki na bozwi mingi. Batongaki bandako minene mpe bifelo ya minene, bakisa mpe batempelo ya Zeusi, Alatemisi, Apollon, Athéna, mpe banzambe mosusu ya Bagrɛki.
Buku moko ya masolo ya kala elobi ete na boumeli ya bankama ya bambula, Beloya “ezalaki engumba ya ntina mingi na etúká wana mpe na nɔrdi mobimba ya Grèce.” Engumba yango ekómaki na lokumu mingi na boyangeli ya bato ya libota ya Antigonide (kobanda na mobu 306 tii mobu 168 L.T.B.); baoyo bazalaki bakonzi ya nsuka ya Masedonia liboso Loma elonga mboka yango.
Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete ntango Baloma balongaki Mokonzi Filipe V na mobu 197 L.T.B., “makambo ebongwanaki mpe Loma ekómaki ekólo oyo eleki makasi na ɛsti mobimba ya Mbu ya Meditelane.” Na mobu 168 L.T.B., etumba moko makasi esalemaki na Pydna, mboka moko oyo ezali na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na sudi ya Beloya, mokonzi moko ya basoda ya Loma alongaki Persée, mokonzi ya nsuka ya Masedonia. Ndenge Biblia esakolaki yango, Loma ezwaki esika ya Grèce mpe ekómaki ekólo oyo eleki makasi na mokili. (Danyele 7:6, 7, 23) Beloya ezalaki na kati ya bingumba ya liboso oyo endimaki komipesa na mabɔkɔ ya Loma nsima ya etumba yango.
Na siɛklɛ ya yambo L.T.B., etumba moko esalamaki na etúká ya Masedonia na ntango matata ezalaki kati na Pompée mpe Jules César. Kutu, Pompée atongaki kaa na ye pembeni ya Beloya mpo na kotambwisa bitumba.
Mboka monene na ntango ya Baloma
Na ntango ya Pax Romana, to eleko oyo Loma etyaki kimya, mopaya oyo ayei na Beloya azalaki komona banzela na yango oyo etongamá na mabanga mpe makonzí ya minene pembenipembeni. Na engumba yango ezalaki na bapisini ya bato nyonso, bisika ya masano, bandako ya kobomba mikanda, mpe bisika oyo bato ya makasi bazalaki kobunda. Basalelaki batiyo mpo na kobenda mai ya komɛla na engumba, ezalaki mpe na batelase na nse ya mabelé mpo na kolekisa mai ya salite. Beloya eyebanaki lokola esika ya mombongo oyo ezalaki koyamba bakomelesa, bato ya misala ya ntɔki, bato ya masano; bato mosusu bazalaki kokende kuna mpo na kotala masano mpe milulu mosusu. Mopaya nyonso akokaki komona bisika ya losambo epai akoki kosambela banzambe na ye. Losambo ya bikólo nyonso oyo Loma ezalaki koyangela ezalaki na engumba yango.
Banzambe mosusu oyo bato ya Beloya bazalaki kosambela ezalaki nde bakonzi ya Loma oyo, nsima ya liwa na bango, bakómaki kobengama banzambe. Yango ezalaki likambo ya sika te mpo na bato ya Beloya mpamba te liboso bákóma kosambela bakonzi ya Loma, bazalaki kokumisa Alesandala Monene lokola nzambe. Buku moko ya Bagrɛki elobi boye: “Lokola [Bagrɛki] ya Ampire ya ɛsti bamesanaki kokumisa ata mokonzi oyo azali naino na bomoi lokola nzambe, bakakatanaki te kokumisa bakonzi ya Loma lokola banzambe. . . . Mbongo na bango ya bibende ezalaki na elongi ya amperɛrɛ alati ekɔti ya bokonzi oyo ezali kongɛnga. Bazalaki kokumisa ye na mabondeli mpe na banzembo kaka ndenge bazalaki kosala mpo na nzambe.” Batongaki bitumbelo mpe batempelo mpe bazalaki kopesa ye bambeka. Ata baamperɛrɛ oyo bazali koyangela bazalaki kosangana na bafɛti ya losambo ya amperɛrɛ, oyo ezalaki kosangisa makambo lokola mimekano na masano, na misala ya ntɔki, mpe na mikanda.
Mpo na nini losambo ya banzambe ya lokuta ezalaki makasi na Beloya? Mpamba te ezalaki kuna nde Koinon ya Masedonia ezalaki koyangana. Koinon ezalaki likita ya badepite ya bingumba ya Masedonia. Badepite yango bazalaki kokutana mbala na mbala na Beloya mpo na kolobela makambo etali bingumba mpe etúká mobimba mpe koluka kosilisa yango na kolanda mitindo ya bakonzi ya Loma. Moko na misala ya ntina ya Koinon ezalaki ya kotambwisa milulu ya losambo ya amperɛrɛ.
Yango nde makambo ezalaki na engumba oyo Paulo ná Silasi bakendaki nsima ya kokima engumba Tesaloniki. Na ntango wana, elekaki mbula nkama mibale banda Loma ekómaki koyangela Beloya.
Nsango malamu ekómi na Beloya
Na Beloya, Paulo abandaki mosala na ye ya kosakola na kati ya sinagoga moko. Ndenge nini bato bayambaki nsango na ye? Lisolo ya Biblia elobi ete Bayuda ya engumba yango “bazalaki na makanisi ya malamu koleka baoyo ya Tesaloniki, mpo bayambaki liloba na mposa makasi mpenza koleka, kotaleláká Makomami malamumalamu mokolo na mokolo mpo na koyeba soki makambo yango ezalaki bongo.” (Misala 17:10, 11) Lokola bazalaki na “makanisi ya malamu,” batingamaki te na bonkɔkɔ na bango, lokola bato bakufá miso. Atako bateyaki bango makambo ya sika, bazalaki kokanisela bato mabe te mpe basilikaki te. Na esika báboya nsango ya Paulo, bafungolaki matoi mpe bazalaki koyoka ye malamu.
Ndenge nini Bayuda yango bakokaki koyeba ete Paulo azali koteya makambo ya solo? Balukaki koyeba yango na lisalisi ya buku oyo ezali na makanisi oyo eleki na motuya. Bato yango bazalaki kotánga Makomami malamumalamu mpe na etingya. Matthew Henry, molimboli moko ya maloba ya Biblia, alobaki boye: “Lokola Paulo azalaki kososola na lisalisi ya Makomami, mpe azalaki kotánga maloba ya Testama ya Kala mpo na kondimisa maloba na ye, bato yango bazalaki kofungola Babiblia na bango moko, koluka bisika oyo makambo yango ezali, kotánga lisolo mobimba oyo elobeli yango, kotalela yango na bozindo, kokokanisa yango na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, kotalela soki maloba ya Paulo elongobani mpe ezali sembo mpe soki makanisi na ye ezali kondimisa, mpe na nsima, bazalaki kozwa ekateli.”
Bazalaki kotalela makambo likolólikoló te. Bato ya Beloya bamipesaki na koyekola mpe bazalaki kozwa ntango ya kosala yango mokolo na mokolo, kasi kaka na mokolo ya Sabata te.
Kanisá mbuma oyo yango ebotaki. Bayuda mingi na Beloya bandimaki nsango mpe bakómaki bandimi. Bagrɛki mwa mingi, mbala mosusu mpe baoyo bazalaki Baprozelite, bakómaki bandimi. Nsango ya makambo yango etambolaki. Ntango Bayuda ya Tesaloniki bayokaki yango, bakendaki nokinoki na Beloya “mpo na kopusa mpe kotombokisa bibele ya bato.”—Misala 17:4, 12, 13.
Paulo akokaki lisusu kofanda na Beloya te, kasi akobaki kosakola na bamboka mosusu. Akɔtaki na masuwa oyo ezalaki kokende na Atene. (Misala 17:14, 15) Atako bongo, akokaki kosepela na ndenge mateya ya Klisto ekɔtaki na Beloya mpo na mosala oyo ye asalaki. Lelo oyo mpe mosala yango ezali kobota mbuma.
Lelo oyo, na Beloya (Véria) ezali na bato oyo bazali koyekola Makomami mpo na ‘kotalela malamumalamu makambo nyonso’ mpe ‘kokangama makasi’ na oyo ezali malamu mpe solo. (1 Batesaloniki 5:21) Masangá mibale ya minene ya Batatoli ya Yehova ezali na engumba yango mpe, na ndakisa ya Paulo, bazali koyebisa bato mosusu nsango ya Biblia. Bazali koluka bato ya mitema sembo mpe bazali kokanisa na bango na lisalisi ya Biblia, bazali kotika ete nguya na yango esalisa bato nyonso oyo balingi koyeba Yehova, Nzambe ya solo.—Baebele 4:12.
[Karte na lokasa 13]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bisika mosusu oyo Paulo alekaki na mobembo ya mibale
MISIA
Toloasi
Neapolisi
Filipi
MASEDONIA
Amifipolisi
Tesaloniki
Beloya
GRÈCE
Atene
Kolinti
AKAYA
AZIA
Efese
LODE
[Elilingi na lokasa 13]
Mbongo ya ebende oyo ezali na elongi ya Alesandala Monene amonisami lokola nzambe ya Bagrɛki
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mbongo ya ebende: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 14]
Porte mpo na kokende na kartye ya Bayuda na Beloya (Véria)
[Elilingi na lokasa 15]
Sinagoga moko ya kala na Beloya (Véria) lelo oyo