Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/5 lok. 3
  • Bato bazali koluka kosepelisa Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bazali koluka kosepelisa Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Mateya ya solo—okoki kozwa yango wapi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nini ekómelaka moto soki akufi?
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Okoki kosepelisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nani andimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/5 lok. 3

Bato bazali koluka kosepelisa Nzambe

NA BUKU Mwa lisolo ya makambo ya Nzambe (na Lingelesi), mokomi John Bowker alobaki boye: “Ezali na mboka moko te oyo bato na yango batángaka nkombo ya Nzambe te, mingimingi balobaka ete ye nde motambwisi ya molɔ́ngɔ́ mpe mokeli ya biloko nyonso. Ezali bongo ata na mikili oyo bato bazali kokipe lisusu mpenza makambo ya Nzambe te.” Ezala na ndenge nini, banda kala bato nyonso bazalaka kaka na mposa ya koyeba Nzambe mpe kosepelisa ye. Na mokili mobimba, ebele ya bato bazali mpenza na mposa ya kosepelisa Nzambe. Kasi, bato na bato bazali na ndenge na bango oyo balukaka kosepelisa Nzambe, na kolanda bindimeli na bango.

Bato mosusu bakanisaka ete mpo moto asepelisa Nzambe, asengeli kaka kosalaka malamu na bomoi na ye. Bamosusu bakanisaka ete mpo Nzambe asepela na moto, asengeli kosalisaka babola. Ebele mpe bamonaka ete kosambela mpe kokokisa milulu ya mangomba ezali na ntina mpo na kosepelisa Nzambe.

Kasi, ezali mpe na baoyo bakanisaka ete moto akoki koyeba Nzambe te; Nzambe azali mosika mingi to mpe azali na makambo mingi ya kosala, yango wana, atyelaka bato likebi te. Balobaka ete Épicure, filozofe moko ya Grèce ya kala, azalaki koloba ete ‘banzambe bazali mosika mpenza, yango wana bakoki kosala bato mabe moko to mpe bolamu moko te.’ Atako bongo, bato mingi oyo bakanisaka ndenge wana basambelaka. Bamosusu kutu bapesaka bambeka to basalaka milulu na makanisi ete yango ekokitisa mitema ya bankɔkɔ na bango oyo bakufá.

Yo okanisaka nini? Nzambe amonaka mpenza milende nyonso oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye? Biso bato tokoki mpenza kobenda likebi ya Nzambe mpe kosepelisa ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto