Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 nk. 8-9
  • Liboso mpe nsima ndenge oyo Biblia ebongolaki ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liboso mpe nsima ndenge oyo Biblia ebongolaki ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • “Liloba na Nzambe lizali na bomoi mpe na nguya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Bópusana penepene na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lolenge nini okoki kobɛlɛma epai na Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • “Akopusana penepene na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 nk. 8-9

“Bópusana penepene na Nzambe, mpe Ye akopusana penepene na bino”

Liboso mpe nsima ndenge oyo Biblia ebongolaki ye

ROLF-MICHAEL amipesaki mobimba na miziki. Azalaki moombo ya bangi. Ntango azalaki elenge na Allemagne, azalaki komɛla masanga mingi mpe bangi lokola LSD, cocaïne, haschisch, mpe biloko mosusu oyo epesaka kwiti.

Bakangaki Rolf-Michael ntango alingaki kokɔtisa bangi na ekólo moko ya Afrika mpe azwaki etumbu ya bolɔkɔ ya sanza 13. Etumbu yango epesaki ye libaku ya kokanisa ntina mpenza ya bomoi.

Rolf-Michael ná mwasi na ye Ursula, babandaki koluka solo mpe bomoi oyo ezali mpenza na ntina. Bakɔtaki na mangomba ndenge na ndenge ya boklisto mpe bamonaki makambo mabe kati na yango, atako bongo, bazalaki kaka na mposa makasi ya koyeba Nzambe. Kasi, na mangomba ndenge na ndenge oyo bakɔtaki, bazwaki biyano ya solosolo te na mituna oyo bazalaki komituna. Lisusu, mangomba yango ezalaki mpenza kolendisa bango te na kobongwana.

Nsukansuka, Rolf-Michael ná Ursula bakutanaki na Batatoli ya Yehova. Ntango Rolf-Michael abandaki koyekola Biblia, alendisamaki mingi na maloba oyo: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Azwaki ekateli ya ‘kolongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na ye ya liboso mpe kolata bomoto ya sika oyo ezalisami engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.’​—Baefese 4:22-24.

Nini esalisaki Rolf-Michael na kolata bomoto ya sika? Balakisaki ye na kati ya Biblia ete “na nzela ya boyebi ya solosolo” moto akoki kobongola bomoto na ye mpe “kokómisama sika engebene elilingi ya Oyo azalisaki yango,” elingi koloba Yehova Nzambe.​—Bakolose 3:9-11.

Ntango Rolf-Michael azwaki boyebi ya solosolo, alukaki kotosa mitinda ya Liloba ya Nzambe na bomoi na ye. (Yoane 17:3) Rolf-Michael azalaki na mokakatano monene mpo na kotika bangi, kasi amonaki litomba ya kobondela Yehova mpe kozwa lisalisi na ye. (1 Yoane 5:14, 15) Azwaki lisalisi mosusu na ndenge akómaki na baninga oyo bazali Batatoli ya Yehova, mpe azalaki kosala makasi mpo na kosala mokano ya Nzambe.

Koyeba ete mokili ezali koleka mpe ete baoyo bazali kosala mokano ya Nzambe bakotikala libela na libela esalisaki Rolf-Michael. Esalisaki ye alanda te bisengo ya ntango mokuse ya mokili oyo, kasi nde akóma moninga ya Yehova Nzambe mpo na kozwa mapamboli ya seko. (1 Yoane 2:15-17) Maloba ya Masese 27:11 esimbaki mpenza motema ya Rolf-Michael: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” Na botɔndi mpenza alobi ete: “Vɛrsɛ yango emonisi bonene ya bolingo ya Yehova, mpamba te azali kopesa bato libaku ya kosepelisa motema na ye.”

Mitinda ya Biblia esalisi bankóto na bankóto ya bato lokola Rolf-Michael, mwasi na ye mpe bana na bango. Okoki komona bato ya ndenge wana na masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Nzokande, ezali mawa ete na bikólo mosusu, bazali kokosela Batatoli ete bazali mwa lingomba moko ya mabe oyo ezali kokabola mabota. Lisolo ya Rolf-Michael ezali komonisa lokuta ya bato wana.​—Baebele 4:12.

Rolf-Michael alobi ete Matai 6:33, oyo ezali kolendisa biso na koluka liboso matomba ya elimo, ezali “boussole” oyo elakisaka libota na ye nzela. Ye ná libota na ye bazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo libota na bango ezali na bomoi ya esengo. Bazali na likanisi moko na mokomi ya nzembo oyo ayembaki ete: “Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”​—Nzembo 116:12.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Nzambe apesaka bato libaku ya kosepelisa motema na ye

[Etanda na lokasa 9]

Mitinda ya Biblia ezali kobongola bato

Na kati ya mitinda ya Biblia oyo elongolaki bato na boombo ya biloko oyo ebebisaka nzoto, tokoki kotánga oyo:

“Bino baoyo bakolingaka [Yehova], bóyina mabe.” (Nzembo 97:10) Soki moto andimi ete misala ya mabe ememaka na liwa mpe ayini misala yango, ezalaka lisusu mpasi te asala oyo esepelisaka Nzambe.

“Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Mpo na kotika bangi mpe biloko mosusu ya mabe, moto asengeli kopona baninga na ye malamumalamu. Kokóma moninga ya baklisto oyo bakolendisa yo na ekateli na yo ezali mpenza malamu.

“Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya ya elimo mpe ya makanisi motindo wana ekokani na eloko mosusu te. Lisusu, kotyela Nzambe motema ndenge wana mpe kobondela ye esalisaka moto alonga mikakatano ya bomoi kozanga ete amipesa na komɛla bangi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto