Lisolo ya bomoi
Napesaki mabɔkɔ na mosala ya koteya bato Biblia
YA ROBERT NISBET
Mokonzi Sobhuza II ya Swaziland ayambaki ngai ná ndeko na ngai George na ndako na ye. Ezalaki na 1936, kasi tii lelo nabosanaka te lisolo oyo tosololaki na ye. Nazwaki libaku ya kosolola ntango molai na mokonzi yango kaka mpo na mosala ya koteya Biblia oyo nasalaka banda ebele ya bambula. Lelo oyo, lokola nakómi na mbula 95, nazalaka na esengo soki nakanisi ndenge natambolaki na bakɔntina mitano mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala yango.
NYONSO wana ebandaki na 1925, ntango Dobson, mobali moko oyo azalaki kotɛka ti abandaki koya kotala libota na biso na Edimbourg, na Écosse. Na ntango wana nakomaki na mbula pene na ntuku mibale mpe nazalaki koyekola mosala ya kosala nkisi ya monganga (pharmacien). Atako nazalaki naino elenge, nazalaki komituna ndenge etumba ya mokili mobimba ya 1914-1918 ekɔtisaki mbongwana na mabota mpe na makambo ya losambo. Mokolo mosusu Dobson ayaki kotala biso mpe atikelaki biso buku Le divin Plan des Âges. Lokola buku yango ezalaki kolobela Mozalisi moko ya mayele, oyo azali na “mokano” moko ya sikisiki, namonaki ete makanisi yango ezali malamu mpenza mpo ezalaki kolobela Nzambe oyo ngai nazalaki koluka.
Mwa moke na nsima, ngai ná Mama tobandaki koyangana na makita ya Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1926, na liyangani oyo esalemaki na Glasgow, ngai ná Mama tozwaki batisimo ya mai mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova. Bapesaki moto mokomoko oyo asengelaki kozwa batisimo elamba moko ya kolata likoló na oyo alataki mpo na kokɔta na yango na mai; elamba yango ezalaki molai tii na makolo mpe ezalaki na mwa bibende na nse mpo mai etombola yango te ntango bazali kobatisa moto. Na ntango wana bazalaki komona ete yango nde ezali ndenge malamu ya kolata mpo na batisimo, mpamba te ezalaki molulu moko ya ntina mingi.
Na ntango wana, tozwaki naino boyebi ya sikisiki te na makambo mingi. Bandeko mingi na lisangá, naloba ata bandeko nyonso, bazalaki kosepela eyenga ya mbotama. Kaka mwa bato moke nde bazalaki kosala mosala ya kosakola. Ata mpe bankulutu mosusu bazalaki koboya ete basakoli bákabolaka bazulunalo mokolo ya lomingo, mpo bazalaki komona ete yango ezali kobuka mobeko ya Sabata. Kasi na 1925, masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandaki kolobela mingimingi bavɛrsɛ lokola Malako 13:10: “Na kati ya bikólo nyonso nsango malamu esengeli kosakolama liboso.”
Ndenge nini mosala yango oyo esengelaki kosalema na mokili mobimba ekokaki kokokisama? Mbala ya liboso oyo namekaki kosakola ndako na ndako, nasukaki kaka na koyebisa nkolo ndako ete nazali kotɛka babuku ya kitoko oyo ezali kolobela makambo ya Nzambe, mpe nazalaki kolakisa buku La harpe de Dieu, buku oyo ezalaki kolimbola mateya zomi ya ntina na kati ya Biblia mpe ezalaki kokokanisa yango na nsinga zomi ya nzɛnzɛ. Na nsima, bapesaki biso kalati ya litatoli, oyo ezalaki na mwa lisolo moko ya Biblia oyo tozalaki kotángisa bato. Tozalaki mpe kosalela badiskɛ oyo ezalaki na masukulu ya miniti minei na ndambo, oyo tozalaki kobɛta yango na bafono oyo tozalaki komema na mabɔkɔ. Bafono ya kala ezalaki kilo mingi, kasi oyo ebimaki na nsima ezalaki pɛpɛlɛ, mpe mosusu ekokaki kobɛta ata ntango totɛlɛmisi yango.
Banda 1925 tii na bambula ya 1930, tozalaki kosala mosala na biso ya kosakola na ndenge oyo biso moko tozalaki komona ete eleki malamu. Na nsima, na ebandeli ya bambula ya 1940, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekómaki kosalema na masangá nyonso. Toyekolaki ndenge oyo biso moko tosengeli koyebisa bato oyo balingi koyoka biso nsango ya Bokonzi. Toyekolaki mpe ete ezali na ntina mingi tóyekolaka Biblia na bato oyo bakosepela na mateya na biso. Tokoki koloba ete yango ezalaki ebandeli ya mosala ya koteya bato Biblia oyo ezali kosalema lelo na mokili mobimba.
Ndeko Rutherford alendisi ngai
Lokola nazalaki na mposa ya kosala mingi na mosala yango ya koteya bato Biblia, na 1931 napesaki nkombo mpo nasala mosala ya mobongisi-nzela. Nasengelaki kobanda mbala moko nsima ya liyangani oyo esalemaki na Londres. Kasi, mokolo moko na ntango ya bopemi, Ndeko Joseph Rutherford, oyo azalaki kotambwisa mosala na ntango wana, alobaki ete alingi kosolola na ngai. Azalaki koluka mobongisi-nzela moko oyo akondima kokende na Afrika. Atunaki ngai ete: “Okondima kokende?” Atako motuna yango eyelaki ngai na mbalakaka, nayanolaki na mpiko mpenza ete: “Ɛɛ, nakokende.”
Na bambula wana, mposa na biso mpenza ezalaki ete tókabolaka mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia, mpe yango ezalaki kosɛnga ete tósalaka mibembo mingi. Balendisaki ngai ete natikala monzemba lokola bandeko mingi oyo bazalaki na mikumba ya bakɛngɛli na ntango wana. Teritware na ngai ezalaki banda na Cape Town, na sudi mpenza ya Afrika, mpe ezalaki kozwa epai ya ɛsti mobimba ya Afrika, mpe kokende tii na bisanga ya Océan Indien. Mpo na kokóma na ndelo ya wɛsti ya teritware na ngai, nasengelaki koleka Esobe ya Kalahari oyo zɛlɔ na yango ezalaka mɔtɔ mpe kokende tii na Laki Victoria, epai Ebale Nil ebandi. Na mbula moko, ngai ná moninga na ngai tozalaki kolekisa sanza motoba na ekólo moko ya Afrika to koleka, oyo ezali na kati ya teritware monene wana.
Kartɔ nkama mibale ya bozwi ya elimo
Ntango nakómaki na Cape Town, balakisaki ngai kartɔ 200 ya mikanda oyo batindaki mpo na Afrika ya Ɛsti. Mikanda yango ekomamaki na minɔkɔ minei ya Mpoto mpe na minɔkɔ minei ya Azia, kasi ata moko te ezalaki na monɔkɔ moko ya Afrika. Ntango natunaki mpo na nini mikanda yango ekómaki kuna liboso na ngai, bayebisaki ngai ete batindaki yango mpo na Frank ná Gray Smith, babongisi-nzela mibale oyo bautaki kokende na Kenya mpo na kosakola. Ntango kaka bakómaki na Kenya, bango nyonso mibale babɛlaki malaria, mpe Frank akufaki.
Atako nsango yango ebangisaki ngai mingi, ezongisaki ngai nsima te. Ngai ná moninga na ngai David Norman, tolongwaki na Cape Town na masuwa mpo na kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 5 000 tii na esika batindaki biso liboso, na Tanzanie. Na Mombassa, na ekólo Kenya, totikaki bakartɔ na biso ya mikanda epai ya moto moko oyo azalaki kosala na kompanyi moko oyo esalisaka bato na makambo ya mibembo, mpe azalaki kotindela biso bakartɔ yango na esika nyonso tozalaki kosɛnga ye atinda. Na ebandeli, tozalaki kosakola na bakartye ya bato ya mosala—na bamagazini mpe na babiro—ya engumba nyonso. Mikanda oyo tozalaki na yango, ezalaki babuku ndenge 9 mpe mwa babuku ndenge 11, oyo bakómaki kobenga Collections Arc-en-ciel (Monama) mpo ezalaki na langi ndenge na ndenge.
Na nsima, tomonaki malamu kokende na esanga ya Zanzibar, oyo ezali na kilomɛtrɛ 30 banda na libongo ya ɛsti. Na boumeli ya bankama ya bambula, Zanzibar ezalaká esika ya kotɛka baombo, kasi eyebanaki mpe mpo na bikelakela ya kotya na bilei, oyo babengi clou de girofle, oyo tozalaki koyoka nsolo na yango bipai nyonso na kati ya engumba. Tozalaki na mokakatano mpenza ya koyeba babalabala, mpo batongá bandako mobulumobulu na engumba yango. Lokola babalabala ezali semba te mpe ezali mobulumobulu, tozalaki kobunga mingi. Tofandaki na otɛlɛ moko ya mwa malamu, kasi baporte na yango ezalaki na bibende ya nsɔngɛnsɔngɛ na likoló mpe ezalaki na bifelo mineneminene, mpe ezalaki komonana lokola otɛlɛ te, kasi lokola nde bolɔkɔ. Atako bongo, tobukaki mbuma malamu na mosala na biso kuna na Zanzibar mpe tozalaki na esengo ya komona ete Baarabe, Ba-Indiens mpe bato mosusu bazalaki kosepela kozwa mikanda na biso.
Bingbunduka, masuwa mpe mituka
Kotambola na Afrika ya Ɛsti na ntango wana ezalaki pɛtɛɛ te. Na ndakisa, ntango toutaki na Mombassa mpo na kokende na bangomba ya Kenya, engbunduka na biso etɛlɛmaki na nzela mpo na mayoyo. Mayoyo etondaki na mabelé mpe likoló ya bibende oyo engbunduka etambolaka likoló na yango, mpe ekómisaki yango mosɛlu, mpe engbunduka ezalaki kokoka lisusu kotambola te. Mpo engbunduka eleka, esengelaki kozwa mai ya mɔtɔ na kati ya engbunduka mpe kosukola na yango bibende wana. Na ndenge yango nde totambolaki malɛmbɛmalɛmbɛ tii ntango tolekaki esika mayoyo yango ezalaki. Mitema ekitaki mpenza ntango engbunduka ebandaki komata ngomba mpe ntango tobandaki koyoka malili oyo ezalaka na mikili ya bangomba!
Tokokaki kokóma na bingumba oyo ezali pembenipembeni ya mbu na engbunduka mpe na masuwa, kasi mpo na kokóma na bamboka ya zamba esengelaki kokende na motuka. Nasepelaki mingi ntango leki na ngai George alandaki ngai, mpo koya na ye epesaki biso makoki ya kosomba motuka moko oyo ezalaki lokola ndako; motuka yango ezalaki monene mpenza mpe totyaki bambeto, mwa esika ya kolamba, esika ya kobomba biloko, mpe maninisa oyo ekoki kokɔtisa ngungi te. Totyaki mpe bikoliseli-lolaka likoló ya motuka yango. Lokola tozalaki na motuka mpe biloko wana nyonso, tozalaki kosakola ndako na ndako na moi mpe kobenga bato mpo báya kolanda masukulu oyo tozalaki kosala na mpokwa na bazando. Diskɛ oyo tozalaki koyokisa bato ezalaki na lisolo oyo motó ya likambo na yango ezalaki “Lifelo ezali esika ya mɔtɔ?” Mbala moko tosalaki mobembo molai ya kilomɛtrɛ 3 000 na motuka na biso wana, banda na Afrika ya Sudi tii na Kenya, mpe tosepelaki na mobembo yango mpamba te tomemaki mikanda oyo ezalaki na minɔkɔ ebele ya Afrika, mpe bato ya mboka bazalaki kozwa yango na esengo.
Likambo oyo ezalaki kosepelisa biso na mibembo lokola oyo wana ezali ete tozalaki komona ebele ya banyama oyo ezalaka na zamba ya Afrika. Kasi, mpo na komibatela, tozalaki kobima libándá ya motuka te na butu; kasi komona, na kati ya zamba mpenza banyama ndenge na ndenge oyo Yehova akelá, ezalaki kolendisa kondima na biso mpenza.
Botɛmɛli ebandi
Atako toyebaki komibatela liboso ya banyama ya zamba, yango ekesanaki mpenza na oyo tosengelaki kosala ntango tozalaki kokutana na bakonzi ndenge na ndenge ya Leta mpe na bakonzi ya mangomba ya mitema mabe oyo bakómaki mpenza kotɛmɛla mosala na biso ya kosakola Bokonzi. Mokakatano moko ya monene oyo tokutanaki na yango eutaki epai ya mokonzi ya lingomba moko, nkombo na ye Mwana Lesa, oyo elingi koloba “Mwana ya Nzambe”; nkombo ya lingomba na ye ezalaki Kitawala oyo, na mawa mingi mpenza, elimboli “Watchtower.” Mwa moke liboso tókóma kuna, moto yango abomisaki ebele ya bato ya Afrika na mai, wana azalaki koloba ete azali kobatisa bango. Nsukansuka bakangaki ye mpe babomaki ye na nsinga na nkingo likoló ya nzete. Na nsima, nazwaki libaku ya kosolola na moto oyo abomaki ye mpo na koyebisa ye ete Société Watch Tower eyebi moto wana ata moke te.
Mikakatano mosusu ezalaki kouta epai ya mindɛlɛ oyo bazalaki kosepela na mosala na biso ya kolakisa bato Biblia te, mingimingi mpo na likambo ya mbongo. Nkolo ya depo moko amilelaki boye: “Mpo mindɛlɛ bátikala na mboka oyo, bato moindo basengeli koyeba te ete mindɛlɛ bazali kolyela bango na mosala oyo bazali kosalela bango.” Kaka mpo na ntina yango, mokonzi ya kompanyi moko oyo ezalaki kosala mosala ya koluka wolo alobaki na ngai polele ete alingi komona ngai na biro na ye te. Mpe na nkanda nyonso abimisaki ngai tii na balabala.
Ntembe ezali te ete bato yango ya mangomba mpe ya mimbongo oyo bazalaki kotɛmɛla biso nde batyaki sɔngisɔngi epai ya bakonzi ya guvɛrnema ya Rhodésie (lelo oyo Zimbabwe), oyo nsima basɛngisaki biso ete tólongwa na ekólo yango. Tomemaki likambo yango na tribinale, mpe tribinale ekataki ete tokoki kotikala na ekólo yango, kasi tosengeli nde koteyaka bato ya Afrika lisusu te. Mokonzi moko alimbolaki ete bazalaki koboya tóteya bato ya Afrika mpo mikanda na biso “ezali malamu te mpo na bato ya Afrika.” Kasi, na bikólo mosusu ya Afrika, bapekisaki mosala na biso ya koteya bato Biblia te; kutu bazalaki nde koyamba biso na esengo. Moko ya bikólo yango ezalaki Swaziland.
Mokonzi ya Swaziland ayambi biso
Swaziland ezali mwa ekólo moko moke, oyo ezali na kati ya Afrika ya Sudi, kasi ezali na guvɛrnema na yango moko; ezali na bonene ya kilomɛtrɛ-kare 17 364. Ezali na ekólo yango nde tokutanaki na Mokonzi Sobhuza II, oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Mokonzi yango ayebaki koloba malamu, ayebaki mpe Lingelesi malamu mpenza mpo atángaki na iniversite moko na Angleterre. Alataki bilamba ya bokonzi te, mpe ayambaki biso malamu mpenza.
Lisolo ya biso na ye elobelaki Paladiso oyo Nzambe akani kotya awa na mabelé mpo na bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi. Atako amonisaki mpenza te ete asepelaki na likambo yango, abombaki te ete ye mpe amibanzabanzaka mingi mpo na likambo moko ya ndenge wana. Mokonzi yango amipesaki mpenza mpo na kosalisa babola mpe bato oyo batángá te. Azalaki kosepela te na misala ya bamisionɛrɛ mingi ya mangomba ya boklisto, mpo ezalaki komonana ete bazalaki koluka libosoliboso nde ete bato bátonda na mangomba na bango, kasi bazalaki ata moke te koluka kopesa bato boyebi. Nzokande, mokonzi yango ayebaki malamu mpenza mosala oyo babongisi-nzela na biso bazalaki kosala, mpe apesaki biso longonya mpo na mosala na biso ya koteya bato Biblia, mingimingi mpo tozalaki kosala mosala yango kozanga kosɛnga ete bato báfuta mbongo to kosɛnga bango makambo mosusu.
Mosala ya koteya bato Biblia ezali kokola nokinoki
Na 1943, bafungolaki Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpo na kobongisa bamisionɛrɛ. Babendaki likebi mingi na likambo ya kozongela bato oyo basepelaka na mateya na biso mpo na kosolola na bango, na esika ete tómipesaka kaka na kokabola mikanda. Na 1950, babengaki ngai ná George na kelasi ya mbala ya 16 ya Gileadi. Ezali kuna nde, mpo na mbala ya liboso, nakutanaki na Jean Hyde, ndeko mwasi moko malamu mpenza ya Australie, oyo batindaki na mosala ya misionɛrɛ na Japon nsima ya kozwa diplome na Gileadi. Na ntango wana, bazalaki naino kolendisa na kotikala monzemba, yango wana tosukaki kaka na kozala baninga.
Ntango tosilisaki kolanda mateya na Gileadi, batindaki ngai ná George na île Maurice, esanga moko ya Océan Indien. Tokómaki baninga ya bato mingi ya mboka yango, toyekolaki monɔkɔ na bango mpe toteyaki bango Biblia. Na nsima, leki na ngai ya mobali William ná mwasi na ye Muriel, bazwaki mpe diplome na Gileadi. Batindaki bango na Kenya, teritware na ngai ya kala.
Mbula mwambe elekaki nokinoki, mpe na nsima, na liyangani ya mikili mingi oyo esalemaki na New York na 1958, nakutanaki lisusu na Jean Hyde. Tozongelaki boninga na biso mpe nsima tolakanaki ete tokobalana. Balongolaki ngai na île Maurice mpe batindaki ngai na Japon, mpe kuna, ngai ná Jean tobalanaki na 1959. Tobandaki sikoyo eleko moko ya esengo na mosala ya misionɛrɛ na Hiroshima, oyo ezalaki kaka na lisangá moko ya moke na ntango wana. Lelo oyo, engumba yango ezali na masangá 36.
Sayonara na Japon
Nsima ya bambula, biso mibale tokómaki kobɛla mingi, mpe tokómaki na mokakatano ya kosala mosala na biso ya misionɛrɛ malamu, mpe nsukansuka esɛngaki ete tólongwa na Japon mpe tókende kofanda na Australie, ekólo ya Jean. Mokolo oyo tolongwaki na Hiroshima ezalaki mokolo ya mawa mpenza. Na esika oyo engbunduka etɛlɛmaka, topesaki baninga na biso nyonso sayonara, to mbote ya bokabwani.
Lelo oyo tozali na Australie mpe, na mwa makasi oyo totikali na yango, tozali kokoba kosalela Yehova elongo na bandeko ya lisangá ya Armidale, na etúká ya New South Wales. Ezalaki esengo mpenza kokabola bozwi oyo ezali na kati ya Biblia na ebele ya bato, pene na mbula 80 mobimba! Namoni ndenge mosala ya kolakisa bato Biblia ekoli na ndenge moko ya kokamwa, mpe na miso na ngai moko, namoni bibongiseli minene oyo esalemi na makambo ya elimo. Makambo yango esalemi na makasi ya moto moko te, ata mpe ya etuluku moko ya bato te. Ya solo mpenza, lokola mokomi ya nzembo akomaki, “yango euti mpenza na Yehova ye moko; ezali likambo monene mpenza na miso na biso.”—Nzembo 118:23, NW.
[Elilingi na lokasa 28]
Ndeko na ngai George na motuka na biso oyo ezalaki mpe ndako
[Elilingi na lokasa 28]
Ngai, na Laki Victoria
[Elilingi na lokasa 29]
Bayekoli ya eteyelo ya ntei oyo balandaki lisukulu ya bato nyonso na Swaziland na 1938
[Elilingi na lokasa 30]
Ngai ná Jean mokolo tobalanaki na 1959 mpe lelo oyo