Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/8 nk. 3-4
  • Bato bazali na makanisi malamu te na oyo etali kozala sembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bazali na makanisi malamu te na oyo etali kozala sembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bato oyo bazali konyokolama mpo na kozanga bosembo bazali se kobakisama
  • Kozala sembo ezalaka mpasi mpenza?
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/8 nk. 3-4

Bato bazali na makanisi malamu te na oyo etali kozala sembo

EZALAKI mokolo moko ya mitano na mpokwa; molunge ezalaki makasi na engumba Tel Aviv, na ekólo Israël; elenge mobali moko ayaki kotɛlɛma pene na bilenge mosusu oyo bazalaki kozela na libándá ya nganda moko. Mwa moke na nsima, lokito moko eyokanaki na kati na bango.

Ezalaki nde moto moko oyo alataki bɔmbi na kati ya bilamba na ye; andimaki akufa mpo na koboma bato mosusu mpe abomisaki bilenge 19 na ndenge moko ya nsɔmɔ. Monganga moko alobaki na bapanzi-nsango boye: “Biteni ya nzoto epanzanaki bisika nyonso, bango nyonso bazalaki bilenge mpenza; naino namoná likambo ya nsɔmɔ ndenge wana te.”

Thurstan Brewin akomaki na zulunalo moko (The Lancet) ete: “Bizaleli oyo bato nyonso basepelaka na yango, lokola kozala sembo . . . , mbala mingi yango nde ekoki kobimisa bitumba mpe mpo na yango ezalaka mpasi mpo na kosilisa bitumba.” Bato babomá ebele ya bazalani na bango, ezala na bitumba ya Croisades oyo baklisto babundaki to ntango Banazi babomaki ebele ya Bayuda; nyonso wana mpo na komonisa ete bazali sembo.

Bato oyo bazali konyokolama mpo na kozanga bosembo bazali se kobakisama

Ntembe ezali te ete bato oyo basalaka makambo kozanga kokanisa mpo bazali sembo na likambo moko boye to epai ya moto moko boye, bakoki komema likama; kasi kozala sembo te ekoki mpe kobebisa boyokani kati na bato. Kozala sembo elimboli kokangama na moto moko to na likambo moko ata soki omekami ete osundola to oboya ye to yango. Atako bato mingi balobaka ete basepelaka na kozala sembo ndenge wana, ezaleli yango emonanaka te na esika ya liboso mpenza oyo esengeli kozala: na kati ya libota. Motángo ya mabala oyo ezali kokufa ezali se kobakisama nokinoki, mpo bato bamipesi na bamposa na bango moko, mpo na mikakatano ya bomoi, mpe mpo na ekobo. Mpe, ndenge moko na bato oyo bakufaki ntango bɔmbi epanzanaki na Tel Aviv, mingimingi bilenge oyo basali eloko te nde bazali konyokwama.

Lapolo moko elobi ete: “Soki libala ekufi to mwasi na mobali bakabwani, to soki moboti moko azali kobɔkɔla bana ye moko, bana babɔkwamaka lisusu malamu te.” Mingimingi, bana mibali oyo babɔkwami kaka na bamama na bango bazalaka na likama ete bákɔta kelasi malamu te, bámiboma, mpe bákóma bilenge ya mobulu. Na États-Unis, mbula na mbula, milio moko ya bana bazali komona baboti na bango bazali koboma libala; mpe ata na mbula nini oyo ezali koya, mwana moko kati na bana mibale oyo abotami na ekólo yango akomona baboti na ye bazali kokabwana liboso kutu akokisa mbula 18. Balapolo ezali komonisa ete mpasi ya ndenge wana ezali kokómela mpe bilenge mingi ya bikólo mosusu na mokili mobimba.

Kozala sembo ezalaka mpasi mpenza?

Na kotalela ndenge oyo bato bazali lisusu sembo te na makambo oyo bazalaki na yango sembo kala, maloba ya Mokonzi Davidi ebongi mpenza mpo na ntango na biso: “Bikisá [ngai], Ɛ Yehova, mpo ete moto ya sembo akómi na nsuka na ye; mpo ete bato ya sembo bazali lisusu te kati na bana ya bato.” (Nzembo 12:​1, NW) Mpo na nini bato mingi bazali sembo te? Roger Rosenblatt akomaki na kati ya zulunalo moko (Time) ete: “Atako kozala sembo ezali ezaleli oyo bato bakumisaka mpenza, ezali mpasi mpo tómonisa yango mpamba te tosalemá na kobanga mingi, tomityelaka mpenza motema te, tolukaka kaka bolamu na biso moko mpe tozali na mposa ya kozwa lokumu mingi.” Biblia elobeli polele mikolo na biso na maloba oyo: “Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, . . . bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota.”​—⁠2 Timote 3:​1-5, NW.

Na kotalela ndenge oyo bato basalaka makambo mpo bazali sembo to bazali sembo te epai ya moto to likambo moko, tokoki kotuna, ‘Ebongi mpenza kozala sembo epai ya nani? Talá oyo lisolo oyo elandi elobi mpo na likambo yango.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Fɔtɔ oyo ezali likoló: © AFP/CORBIS

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto