Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/2 nk. 3-4
  • Mitinda oyo oponaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mitinda oyo oponaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mitinda ya lolenge nini tosengeli kopona?
  • Mitinda ya Nzambe ekoki komemela yo matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Landá mitinda ya Nzambe na bomoi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ndenge nini mitinda ya Biblia esalisaka biso?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Mpo na nini mitinda ya Biblia ezali na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/2 nk. 3-4

Mitinda oyo oponaka

OLANDAKA mitinda ya bizaleli malamu? To otalelaka yango lokola makambo ya kala? Mpo na koloba solo, moto nyonso azali na mitinda oyo ye alandaka, mitinda oyo ye amonaka ete ezali na ntina. Mitinda ezali mibeko oyo moto amityelaka mpo na kosala oyo ye amoni malamu. Ndenge moko na busɔle, mitinda na biso nde esalaka ete tózwa ekateli boye to boye; ezali yango nde elakisaka biso nzela nini tosengeli kolanda na bomoi na biso.

Na ndakisa, Yesu alendisaki bayekoli na ye bátosaka Lilako Lileki Malamu oyo ezali na Matai 7:12 (NW); vɛrsɛ yango elobi boye: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” Bato oyo bandimaka mateya ya Confucius batosaka mitinda babengi li mpe jen oyo elendisaka bizaleli lokola boboto, komikitisa, limemya mpe bosembo. Ata bato oyo basambelaka te bazalaka na makambo oyo batyaka na esika ya liboso to malako oyo elakisaka bango etamboli nini basengeli kolanda.

Mitinda ya lolenge nini tosengeli kopona?

Kasi, tosengeli kobosana te ete mitinda ekoki kozala ya malamu to ya mabe. Na ndakisa, bato mingi bakómi kolanda etinda moko oyo, eleki sikoyo mbula soki zomi, bapesaki yango nkombo “ngai naino.” Ata soki ntango mosusu bato mingi bayebi nkombo yango te to bakoki kokanisa ete ezaleli yango etali bango te, “ngai naino” ezali ezaleli oyo bato mingi bakómaka na yango ntango baboyi mitinda ya bizaleli malamu. Ata soki ebengami ndenge nini, “ngai naino” emonisaka kaka ezaleli ya moimi, mpe mbala mingi etambolaka nzela moko na mposa makasi ya kozwa biloko mingi. Moto moko oyo azali mokonzi ya televizyo moko na ekólo Chine alobaki boye: “Tozali se na mitinda mibale. Ya liboso, kosepelisa bakiliya na biso. Ya mibale, konduka mbongo.”

“Ngai naino” ekoki kozala lokola emá. Emá esalaka ndenge nini soki batii yango pembeni ya busɔle? Esalaka boye: likonga ya busɔle ekotika kolakisa epai oyo yango elakisaka; ekobanda kolakisa epai mosusu. Ndenge moko mpe, ezaleli ya “ngai naino” ekoki kobulunganisa mitinda ya bizaleli malamu, oyo ezali lokola busɔle ya moto; ekoki kotinda ye atya bamposa na ye liboso ya makambo nyonso.

Okoki nde kokamwa na koyoka ete “ngai naino” ezali ezaleli oyo ebandi lelo te? Ezaleli yango ebandaki na elanga ya Edene ntango baboti na biso ya liboso baboyaki kolanda mitinda ya bizaleli malamu oyo Mozalisi atyelaki bango. Na bongo, busɔle na bango ya bizaleli malamu ebebaki. Lokola bato bazali bakitani ya Adama na Eva, lolenge wana ya kotambwisa bomoi, oyo na mikolo euti koleka, ezwi nkombo ya “ngai naino,” ememeli bango mikakatano.​—⁠Genese 3:​6-8, 12.

Ezaleli yango ekómi makasi mpenza, mingimingi na mikolo oyo bisakweli ya Biblia ebengi yango “mikolo ya nsuka,” oyo ezali “ntango ya mpasi.” Bato mingi bazali “bato oyo bamilingaka bango moko.” Yango wana, tosengeli kokamwa te soki mpe biso tokómi kobendama mpo tómekola ezaleli yango ya “ngai naino.”​—⁠2 Timote 3:​1-5, NW.

Ntango mosusu okozala na likanisi moko na oyo ya elenge mobali moko, nkombo na ye Olaf; ye akomelaki filiale moko ya Batatoli ya Yehova na Mpoto ete: “Ezali mpasi mpenza mpo na kozala ntango nyonso na bizaleli malamu, mingimingi mpo na biso bilenge. Nasɛngi bino bótika te kokundwelaka biso ntina ya kokangama na mitinda ya Biblia.”

Olaf amonisaki likanisi moko ya mayele mpenza. Mitinda ya Nzambe ekoki kosalisa biso​—⁠bana mike to mikóló​—⁠mpo tólanda kotosa mitinda ya bizaleli malamu. Ekoki mpe kosalisa biso na koboya “ngai naino,” ata soki bapesi yango nkombo mosusu. Soki olingi koyeba makambo mingi mpo na ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki mpenza kosalisa yo, tosɛngi yo otánga na likebi mpenza lisolo oyo elandi.

[Bililingi na lokasa 4]

Bato mingi lelo batalelaka bamposa ya bamosusu te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto