Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/7 nk. 24-30
  • Tomekaki Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tomekaki Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakutani na Bayekoli ya Biblia mpo na mbala ya liboso
  • Tokuti mateya ya solo na kati ya mwa babuku yango
  • Nazwi mokano ya kokóma mobongisi-nzela
  • “Nakomeka Yehova”
  • Mosala ya mobongisi-nzela monene na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
  • Bokatikati kati ya mikumba ya libota mpe mosala ya kosakola
  • Makambo oyo toyekoli na boumeli ya bambula oyo eleki
  • Nzambe azali mobandisi ya bampasi oyo tozali komona?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/7 nk. 24-30

Lisolo ya bomoi

Tomekaki Yehova

YA PAUL SCRIBNER

“Mbote, Mama Stackhouse. Na ntɔngɔ ya lelo nazali kozwa bakomande ya bato oyo balingi ete naya kotikela bango bagato ya Pasika; nakanisi ete yo mpe okosepela kozwa moko mpo na libota na yo.” Ezalaki na 1938, na ebandeli ya eleko ya molunge; nazalaki na engumba Atco, na etúká ya New Jersey na États-Unis, nazalaki kosolola na kiliya moko ya malamu mpenza koleka bakiliya mosusu oyo nazalaki kotikela bango mampa oyo kompanyi na biso ezalaki kosala. Nakamwaki mpenza ndenge Mama Stackhouse aboyaki kosala komande.

ALOBAKI ete: “Nandimi te ete ekosepelisa ngai. Biso tosalaka fɛti ya Pasika te.”

Sikoyo nayebaki eloko ya kosala te. Nazalaki koloba ngai moko na nse ya motema, ete: ‘Ya solo mpenza, bango basalaka fɛti ya Pasika te? Likambo te, mobeko ya liboso ya mombongo elobaka ete likambo nyonso oyo kiliya alobaka ezalaka kaka ya solo. Bongo, sikoyo ngai nakosala nini?’ Namekaki koloba boye: “Ezali gato moko ya kitoko mpenza, mpe nayebi ete olingaka biloko na biso. Okanisi te ete libota na yo ekoki mbala mosusu kosepela na yango, ata soki bosalaka na bino fɛti ya Pasika te?”

Abakisaki ete: “Nandimi te, Papa Scribner; kasi nalingaki kosolola na yo likambo moko, mpe nakanisi ete sikoyo ekoki kozala ntango malamu ya kosala yango.” Lisolo yango nde ebongolaki bomoi na ngai mobimba! Mama Stackhouse, oyo azalaki na lisangá ya Batatoli ya Yehova na Berlin, na etúká ya New Jersey, alimbolaki esika oyo fɛti ya Pasika ebandaki mpe apesaki ngai mwa babuku misato. Batitre na yango ezalaki: Sécurité, Dévoilées, mpe Protection. Nakendaki na mwa babuku yango na ndako; nazalaki mpenza na mposa ya koyeba nini ezalaki na kati, kasi nazalaki kobanga mwa moke. Na makambo oyo Mama Stackhouse alobaki, ezalaki na makambo mosusu oyo nayebaki na bomwana na ngai.

Nakutani na Bayekoli ya Biblia mpo na mbala ya liboso

Nabotamaki na mokolo ya 31 Yanuali 1907, mpe na 1915, ntango nazalaki na mbula mwambe, tata na ngai akufaki na maladi ya kansɛr. Yango wana, ngai na mama tokendaki kofanda epai ya baboti na ye, na ndako moko ya monene na engumba Malden, na etúká ya Massachusetts. Nɔkɔ Benjamin Ransom na mwasi na ye bazalaki mpe kofanda wana, na etaze ya mibale. Mwa bambula liboso ete ekeke ya 20 ebanda, nɔkɔ Ben abandaki kosangana na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo Batatoli ya Yehova bayebanaki na yango na ntango wana. Nazalaki kosepela mingi na nɔkɔ Ben, kasi bandeko ya Mama nyonso oyo batikali bazalaki Bametodiste mpe bakanisaki ete ntango mosusu nɔkɔ Ben azwi ligboma. Nsima ya bambula, liboso ete mwasi na ye aboma libala, asalaki nyonso mpo na kokɔtisa nɔkɔ Ben mpo na mwa ntango moke na lopitalo oyo esalisaka bato ya ligboma to ya maladi ya motó; nyonso wana kaka mpo na mateya ya Biblia oyo azalaki kondimela! Lokola minganga bamonaki noki ete bɔɔngɔ ya nɔkɔ Ben ezalaki na maladi ata moko te, babimisaki ye mpe basɛngaki ye bolimbisi.

Nɔkɔ Ben azalaki komema ngai na engumba Boston, na makita ya ebongiseli ya mokili mobimba ya Bayekoli ya Biblia, mingimingi ntango balobi-bapaya bazalaki koya to na ntango ya mabaku mosusu ya ntina mingi. Mokolo moko boye, molobi-mopaya ezalaki nde Charles Taze Russell, oyo azalaki kokamba mosala ya kosakola na ntango wana. Mokolo mosusu, libaku ya ntina mingi ezalaki nde kolakisama ya “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Atako natalá yango na 1915, tii lelo, nazali komikundola ndenge bamonisaki Abalayama azali komema Yisaka na ngomba mpo na kokaba ye lokola mbeka. (Genese, mokapo ya 22) Tii lelo, nabosaná te ndenge balakisaki Abalayama na Yisaka bazali komata na ngomba yango na mpasi mpenza mpo bamemaki nkoni; nyonso wana kaka mpo Abalayama azalaki mpenza kotya elikya na ye nyonso epai ya Yehova. Lokola nazalaki elenge mobali oyo akufelá tata, likambo yango esimbaki mpenza motema na ngai.

Na nsima, nɔkɔ Ben na mwasi na ye bakendaki na etúká ya Maine, mpe Mama abalaki mobali mosusu mpe amemaki biso na etúká ya New Jersey. Na bongo, elekaki ntango molai, ngai na nɔkɔ Ben tozalaki komonana lisusu mingi te. Na New Jersey, ntango nazalaki naino elenge, nakutanaki na elenge mwasi moko nkombo na ye Marion Neff. Nazalaki kosepela mingi kokende kotala libota na bango, ezalaki na bana mwambe mpe bango nyonso bazalaki kosambela na Lingomba ya Presbytérien. Bampokwa mingi ya mokolo na lomingo nazalaki kolekisa yango elongo na libota yango mpe na etuluku ya bilenge ya lingomba na bango; yango wana, nsukansuka ngai mpe nakómaki moto ya Lingomba ya Presbytérien. Atako bongo, nabosanaki te makambo nyonso oyo nayekolaki na makita ya Bayekoli ya Biblia. Ngai na Marion tobalanaki na 1928, mpe bana na biso Doris na Louise babotamaki, moko na 1935 mpe mosusu na 1938. Lokola libota na biso ekómaki na bana mike mibale, tomonaki ete esengeli tózwa litambwisi ya elimo mpo tóbɔkɔla bana na biso malamu.

Tokuti mateya ya solo na kati ya mwa babuku yango

Ngai na Marion tozalaki koluka lingomba ya kokɔta mpe kotikala wana; yango wana tobongisaki ndenge ya kosala bolukiluki yango. Tozalaki kosala boye: mikolo nyonso ya lomingo, moko na biso azalaki kotikala na bana na ndako mpe mosusu azalaki kokende kokɔta na lingomba moko boye mpo na koyeba soki ezali malamu. Mokolo moko ya lomingo, ezalaki ngala ya Marion ya kotikala na ndako mpo na kokɛngɛla bana, kasi ngai naponaki kotikala mpo nakoka kotánga mwa buku Sécurité, mwa buku ya liboso kati na mwa babuku misato oyo Mama Stackhouse apesaki ngai. Ntango kaka nabandaki kotánga yango, mposa ya kotika ezalaki te! Namonaki mpenza ete nazwi eloko moko oyo lingomba ata moko te ekokaki kopesa ngai. Likambo yango esalemaki lisusu na pɔsɔ oyo elandaki ntango naponaki kotikala na bana; na mbala wana natángaki mwa buku ya mibale oyo ezalaki na nkombo Dévoilées. Makambo oyo nazalaki kotánga ezalaki komonana lokola nasili koyeba yango. Ezalaki nde makambo oyo nɔkɔ Ben abandaki koteya. Libota na biso ekanisaki ete azalaki na lingomba ya bato ya ligboma. Bongo Marion, alingaki kokanisa nini? Nasengelaki kutu komitungisa te, mpo mwa mikolo nsima ya kotánga Dévoilées, ntango nautaki mosala, Marion akamwisaki ngai ntango alobaki ete: “Natángaki mwa babuku oyo omemaki na ndako. Esepelisi ngai mpenza.” Motema na ngai ekitaki mpenza!

Na lokasa ya nsuka ya mwa babuku yango, bayebisaki mwa makambo etali buku Banguna (na Lingelesi), oyo ebimaki sika; buku yango etandaki mpenza makambo nyonso ya mabe oyo mangomba ya lokuta ezalaki kosala. Tozwaki mokano ya koluka buku yango. Nzokande, liboso ete tótinda mokanda mpo na kosɛnga buku yango, Motatoli ya Yehova moko abɛtaki na ekuke na biso mpe alakisaki biso se buku yango. Buku yango esalisaki biso mpo na kozwa ekateli! Totikaki momeseno na biso ya kokendaka na mangomba mpe tokómaki koyangana na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na Camden, na etúká ya New Jersey. Nsima ya mwa basanza, na mokolo ya lomingo, mwa 31 Yuli 1938, tozalaki etuluku moko ya bato soki 50 oyo toyanganaki na lopango ya Ndeko mwasi Stackhouse​—na ndako oyo nalukaki kotɛka bagato ya Pasika​—mpo na kolanda kasɛti ya lisukulu ya batisimo oyo esalemaki na Ndeko Rutherford. Nsima na yango, tokɔtaki na ndako mpo na kolata bilamba mosusu, mpe biso bato 19 tozwaki batisimo na liziba moko ya mai oyo ezalaki pene wana.

Nazwi mokano ya kokóma mobongisi-nzela

Mwa moke nsima ya batisimo na ngai, ndeko mwasi moko ya lisangá ayebisaki ngai makambo mwa mingi oyo etali babongisi-nzela, elingi koloba bandeko oyo bakómisá mosala ya kosakola mosala na bango ya liboso. Kaka na ntango wana, nalingaki koyeba ndenge mosala yango ezalaka, mpe mosika te, nayaki koyeba libota moko oyo ezalaki kaka na babongisi-nzela. Ezalaki libota ya Ndeko Konig; ndeko yango ya mobange, mwasi na ye, mpe mwana na bango ya mwasi oyo asilaki kokóma mokóló, bazalaki bango nyonso babongisi-nzela na lisangá moko pene na biso. Lokola nazalaki tata ya libota moko ya sika, esengo makasi oyo libota ya Ndeko Konig ezalaki komonisa na mosala ya kosakola esimbaki mpenza motema na ngai. Mbala mingi nazalaki kotɛlɛmisa motuka na ngai ya mampa epai na bango, mpo na kobima elongo na bango na mosala ya ndako na ndako. Eumelaki te, nayokaki mposa ya kokóma mobongisi-nzela. Kasi ndenge nini nakokaki kobanda mosala yango? Ngai na Marion tozalaki na bana mibale ya mike, mpe mosala na ngai ezalaki kozwa ngai ntango mingi. Kutu, lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Mpoto mpe bana mibali mingi bakɔtaki mosala ya soda na États-Unis, misala ekómaki ebele mpo na biso oyo totikalaki na misala ya basivili. Na mosala, bazalaki ntango nyonso kobakisela ngai bakiliya oyo nasengelaki kotikelaka bango mampa, mpe nayebaki ete na programɛ wana nakokaki soki moke te kokóma mobongisi-nzela.

Ntango nayebisaki Ndeko Konig mpo na mposa na ngai ya kokóma mobongisi-nzela, alobaki boye: “Landá kaka kosala mingi na mosala ya Yehova, mpe yebisaká ye mokano na yo na mabondeli. Akosalisa yo okokisa yango.” Koleka mbula mobimba, nalandaki kaka kosala bongo. Mbala mingi nazalaki kokanisa mokapo ya Matai 6:8, oyo endimisaka biso ete Yehova ayebaka bamposa na biso, liboso kutu ete tósɛnga ye. Mpe natikaki te kosala makasi mpo na kolanda toli ya Matai 6:33, oyo esɛngaka biso tólukaka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye. Ndeko Melvin Winchester, oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga, alendisaki mpe ngai.

Nayebisaki mwasi na ngai Marion mikano na ngai. Tosololaki na ntina ya maloba ya Malaki 3:10, oyo elendisaka biso tómeka Yehova mpo na komona soki akosopela biso mapamboli te. Eyano na ye elendisaki ngai: “Soki olingi kokóma mobongisi-nzela, kozonga nsima te mpo na ngai. Nakoki kobatela bana na ntango yo okozala na mosala ya mobongisi-nzela. Kutu, tozali na mposa ya kozala na biloko mingi ya mosuni te.” Nsima ya mbula 12 ya libala, nasilaki koyeba ete Marion azali mwasi oyo ayebi malamu kobatela mbongo mpe mwasi moko oyo azali kosala makambo na likebi mingi. Na boumeli ya bambula, azali moninga na ngai mobongisi-nzela ya malamu mpenza, mpe moko ya basɛkɛlɛ mpo na bolongi na biso na boumeli ya mbula pene na 60 oyo tosali na mosala ya ntango nyonso, ezali likoki na ye ya kosepela na biloko moke oyo tozali na yango mpe kosala ete biloko yango emonana lokola ezali ebele.

Na eleko ya molunge ya 1941, nsima ya basanza mingi ya mabondeli mpe ya komibongisa, ngai na Marion tobombaki ndambo ya mbongo, mpe tosombaki wagɔ moko oyo motuka ebendaka, mpo esalisaka biso na mobembo; ezalaki na bolai ya mɛtrɛ mitano na ndambo. Wagɔ yango nde ekómaki ndako ya libota na biso. Na sanza ya Yuli 1941 nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza nsima ya kolongwa na mosala oyo nazalaki kosala, mpe banda wana nazali kaka na mosala ya ntango nyonso. Teritware na ngai ya liboso ezalaki na esika ya zomi oyo bisi etɛlɛmaka, na nzela oyo euti na etúká ya New Jersey mpo na kokende na Saint Louis, na etúká ya Missouri, esika oyo liyangani na biso esengelaki kosalema na ebandeli ya sanza ya Augusto. Batindelaki ngai bankombo mpe baadrɛsi ya bandeko oyo bazalaki kofanda na nzela yango mpe nakomelaki bango liboso mpo na koyebisa bango mokolo oyo nasengelaki kokóma epai na bango. Lisusu, ntango tokokóma na esika ya liyangani, esengelaki nakende na departema oyo etalaka makambo ya babongisi-nzela mpo nakozwa teritware mosusu.

“Nakomeka Yehova”

Totyaki mikanda na mwa wagɔ na biso ya mobembo mpe tokendaki na makita na biso ya nsuka na Camden mpo na kopesa bandeko mbote ya bokabwani. Ndenge tozalaki na bana mibale ya mike oyo tosengelaki kobɔkɔla, mpe lokola toyebaki te esika oyo bakotinda biso nsima ya liyangani, bandeko mosusu bamonaki lokola ete mikano na biso ekokokisama te; mpe mingi kati na bango balobaki ete: “Bokozonga na bino kaka sikoyo.” Nakanisi lisusu ndenge oyo nazongiselaki bango: “Nalobi te ete naboyi kozonga awa. Yehova alobaki ete akobatela ngai, yango wana nakomeka Ye.”

Nsima ya mbula 60 na mosala ya mobongisi-nzela na bingumba 20, kobanda na etúká ya Massachusetts tii na etúká ya Mississippi, tokoki koloba ete Yehova akokisaki mpenza elaka na ye. Mapamboli oyo asopeli ngai, na Marion, mpe bana na biso mibale, eleki mosika makambo nyonso oyo nakokaki kokanisa na ntango oyo tozalaki na 1941. Moko na mapamboli yango oyo: bana na biso bazali babongisi-nzela ya sembo na masangá oyo ezali pene, mpe tii na moi ya lelo tozwi bana ya elimo pene na 100, oyo bazwami na bokula nyonso ya ɛsti ya États-Unis. Nayekolaki Biblia na bato 52 oyo bapesaki bomoi na bango epai ya Yehova Nzambe, mpe Marion ayekolaki na bato 48.

Na sanza ya Augusto 1941, tokendaki na Saint Louis, mpe kuna nakutanaki na Ndeko Thomas Sullivan, oyo autaki na Betele. Amemelaki ngai mokanda moko oyo la Société azalaki kosalela moto mpo na komonisa ete moto yango azali ministre oyo andimami; nazalaki na mposa ya mokanda yango, mpamba te etumba ekómaki pene mpe Leta akómaki kokɔtisa bato na mosala ya soda na makasi. Nayebisaki Ndeko Sullivan ete mwasi na ngai azalaki mpe kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola ndenge moko na ngai; nabakisaki ete mwasi na ngai mpe alingi kokóma mobongisi-nzela elongo na ngai. Atako departema oyo etalaka makambo ya babongisi-nzela etyamaki naino te na liyangani yango, mbala moko Ndeko Sullivan atyaki sinyatili na mokanda oyo epesaki Marion ndingisa ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela, mpe atunaki biso boye: “Nsima ya liyangani, esika nini bokokenda kosala lokola babongisi-nzela ?” Toyebaki te. Alobaki boye: “Bómitungisa te; na liyangani oyo, bokokutana na moto moko oyo auti esika oyo bazali na mposa ya babongisi-nzela, mpe likambo na bino ekozwa eyano na yango. Bókomela kaka biso mokanda mpo na koyebisa biso esika bozali, mpe tokotindela bino mokanda mpo na kondima bino lokola babongisi-nzela na esika yango.” Esalemaki bobele bongo. Eyaki kosalema ete Ndeko Jack DeWitt, oyo azalaká mokɛngɛli ya zongazonga, ayebaki bandeko mosusu na New Market, na etúká ya Virginie, oyo bazalaki na ndako mpo na babongisi-nzela mpe bazalaki na mposa ya babongisi-nzela mosusu na ndako yango. Na bongo, nsima ya liyangani, tokendaki na New Market.

Na New Market, tokutanaki na likambo moko ya kosepelisa oyo tozalaki kokanisa yango ata moke te. Bókanisa naino likambo oyo: Benjamin Ransom nde moto asengelaki kouta na Philadelphie mpo na kosangana na biso na mosala ya mobongisi-nzela. Ɛɛ, nɔkɔ Ben. Oyo nde esengo tozalaki na yango ya kosala elongo na ye na mosala ya ndako na ndako, nsima ya mbula koleka 25, banda ntango oyo alonaki mboto ya mateya ya solo na kati ya motema na ngai, ntango tozalaki na Boston! Atako na boumeli ya bambula bandeko na ye moko baboyaki koyoka makambo na ye, batyolaki ye, ezala ata konyokola ye, nɔkɔ Ben abungisaki ata moke te bolingo na ye mpo na Yehova mpe mpo na mosala na ye.

Tosepelaki mingi na sanza mwambe oyo tolekisaki elongo na ndako ya babongisi-nzela na New Market. Na boumeli ya ntango yango, toyekolaki makambo ebele; na ndakisa toyekolaki ndenge ya kosombitinya mikanda na nsoso mpe na maki. Na nsima, ngai, nɔkɔ Ben, na Marion, elongo na bandeko mosusu mibale na mwana na bango, totindamaki mpo na kosala lokola babongisi-nzela minene na Hanover, na etúká ya Pennsylvanie​—teritware ya liboso kati na bateritware motoba oyo tozwaki na Pennsylvanie, kobanda na 1942 tii na 1945.

Mosala ya mobongisi-nzela monene na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba

Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na bantango mosusu tozalaki kokutana na bato oyo bazalaki koyina biso mingi mpo tozalaki komikɔtisa na makambo ya politiki te, kasi Yehova atikaki te kosunga biso. Motuka na biso ekómaki ya kala, mokolo moko na Provincetown, na etúká ya Massachusetts, motuka yango ekufaki, mpe mpo na kozongela moto moko oyo asepelaki na nsango na biso, esengelaki natambola bakilomɛtrɛ ebele na kartye moko ya Bakatolike oyo bazalaki koyina biso. Nalekaki pene ya etuluku moko ya bilenge ya mobulu; lokola bayebaki ngai, bakómaki koganga. Natambolaki nokinoki, wana mabanga oyo bazalaki kobwakela ngai ezali koleka ngai pembeni ya matoi na mbangu nyonso; na motema nazalaki kobanga ete bakolanda ngai na nsima. Nsukansuka nakómaki na ndako ya moto yango, kozanga ete nazoka. Kasi moto yango, oyo azalaki moto moko ya lokumu ya limpinga ya basoda ya kala ya États-Unis, asɛngaki bolimbisi mpe alobaki ete: “Butu ya lelo, nakoki koyamba yo te mpo nabosanaki ete tozali na programɛ ya kokende kotala sinema.” Ntango nakanisaki lisusu ete bilenge yango ya mobulu, oyo babwakelaki ngai mabanga bakozela ngai na balabala ntango nakozonga, nakómaki kobanga. Kasi, nazwaki lisusu makasi ntango moto yango ya lokumu abakisaki ete: “Mpo na nini otamboli kaka nzela moko na biso te? Tokoki kosolola na nzela.” Na bongo napesaki ye litatoli, mpe nalekaki na esika yango oyo ezalaki kobangisa ngai kozanga kokutana ata na likambo moko ya mabe.

Bokatikati kati ya mikumba ya libota mpe mosala ya kosakola

Nsima ya etumba, batindaki biso na bisika ebele na etúká ya Virginie, ezala mpe na engumba Charlottesville, esika oyo tolekisaki mbula mwambe lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela minene. Na 1956, bana na biso bakolaki mpe babalaki bango; bongo, ngai na Marion tozongelaki lisusu kokende bipai na bipai; tozalaki babongisi-nzela na Harrisonburg, na etúká ya Virginie, mpe tosalaki lokola babongisi-nzela minene na Lincolnton, na etúká ya Caroline ya Nɔrdi.

Na 1966, batindaki ngai na mosala ya zongazonga, elingi koloba kolongwa na lisangá moko mpo na kokende na lisangá mosusu mpo na kolendisa bandeko, kaka ndenge Ndeko Winchester alendisaki ngai ntango nazalaki na New Jersey na bambula ya 1930. Na boumeli ya mbula mibale, nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga na masangá oyo ezalaki na etúká ya Tennessee. Na nsima, basɛngaki ngai na Marion ete tózonga na mosala oyo tolingaka mingi, elingi koloba mosala ya mobongisi-nzela monene. Kobanda na 1968 tii na 1977, tosalaki lokola babongisi-nzela minene na sudi ya États-Unis, na bisika ndenge na ndenge kolongwa na etúká ya Géorgie tii na etúká ya Mississippi.

Na Eastman, na etúká ya Géorgie, bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya lisangá (oyo abengami lelo mokɛngɛli-mokambi) na esika ya Powell Kirkland, ndeko molingami moko ya mobange oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na boumeli ya bambula ebele, kasi nzoto na ye ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ te. Azalaki ndeko moko oyo ayebaki mpenza ndenge ya komonisa botɔndi na ye mpe ndenge ya kosunga bamosusu. Lisungi na ye ezalaki mpenza na ntina mpo mwa kozanga koyokana oyo ezalaki na kati ya lisangá mpe na kati ya likambo yango, ezalaki na bandeko mosusu oyo bazalaki lokola mitó ya lisangá. Likambo yango eyaki ndongo, mpe nalekisaki ntango mingi na kobondela Yehova mpo na likambo yango. Mokapo lokola Masese 3:5, 6 oyo elobaka ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo” eyelaki ngai na makanisi. Tosalaki nyonso mpo na kosolola likambo yango polelepolele; yango nde esalaki ete tózongisa bomoko na kati ya lisangá mpe moto nyonso azwelaki yango bolamu.

Kobanda 1977, toyokaki ete bobange ebandi koya, mpe batindaki biso lisusu na teritware ya engumba Charlottesville, esika bana na biso nyonso mibale bazalaki kofanda na mabota na bango. Na mbula 23 oyo euti koleka, tozwi esengo ya kosala na esika yango, kopesa mabɔkɔ na kofungwama ya lisangá ya Ruckersville, na etúká ya Virginie, mpe komona ndenge bana mpe bankɔkɔ ya bato oyo toyekolaki na bango Biblia liboso, bakoli mpe bakómi bankulutu ya lisangá, bamosusu babongisi-nzela, mpe bamosusu bakɔti na Betele. Ngai na Marion tozali kaka na programɛ malamu ya kobima na mosala ya kosakola, mpe nazali na libaku malamu ya kozala nkulutu na lisangá ya Charlottesville Ɛsti; natambwisaka boyekoli ya mokanda mpe nasalaka masukulu ya bato nyonso.

Na boumeli ya bambula, lokola bato nyonso, biso mpe tokutanaki na mikakatano. Na ndakisa, atako milende nyonso tozalaki kosala, Doris alɛmbaki na elimo ntango akómaki elenge oyo akoli mpe akɔtaki libala epai ya mobali moko oyo azalaki Motatoli te. Kasi abungisaki libela te bolingo na ye mpo na Yehova, mpe Bill, mwana na ye ya mobali, azali kosala na Betele na Wallkill, na New York, ekómi sikoyo mbula 15. Sikoyo, Doris na Louise bango nyonso mibale bazali na mibali te, mibali na bango bakufá. Atako bongo, bazali kaka kosala na esengo lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza; mpe bazali te mosika na biso.

Makambo oyo toyekoli na boumeli ya bambula oyo eleki

Nayekoli mwa makambo oyo ekoki kosalisa moto asalela Yehova na ndenge esengeli; mwa makambo yango ezali makasi te yango oyo: Zalá na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ; zalá ndakisa malamu na makambo nyonso oyo asalaka, ezala mpe na bomoi na yo moko; na makambo na yo nyonso, landá toli ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”​—Matai 24:45.

Marion abongisi mwa liste ya makanisi ya ntina oyo ekoki kosalisa moto na kosala mosala ya mobongisi-nzela na ntango oyo azali kobɔkɔla bana. Makanisi yango yango oyo: Salá programɛ moko oyo ezangi mindɔndɔ mpe landá yango. Salá ete mosala ya mobongisi-nzela ekóma mpenza mosala ya bomoi na yo mobimba. Lyaká bilei oyo etongaka mpenza nzoto. Pemaká malamu. Ominanolaka, kasi kolekisa ndelo te. Salá ete bana na yo, na bomoi na bango, básepela na solo mpe na lolenge nyonso ya kosakola nsango malamu epai ya bato. Mpe likanisi ya nsuka, salá ete bámonaka ntango nyonso mosala ya kosakola lokola mosala moko ya malamu mpenza.

Sikoyo bambula na biso ya kobotama eleki 90. Mbula 62 esili koleka banda toyoká lisukulu na biso ya batisimo na lopango ya Ndeko mwasi Stackhouse, mpe tosili kolekisa mbula 60 na mosala ya ntango nyonso. Ngai na Marion tokoki koloba na bosembo mpenza ete tozali kosepela mingi na liponi oyo tosalaki na bomoi na biso. Nazali na botɔndi mingi mpo na elendiseli oyo nazwaki ntango nazalaki elenge mpe tata ya libota, ya kotya matomba ya elimo na esika ya liboso mpe kolanda kosala makambo nyonso oyo eyokani na matomba yango. Nazali mpe na botɔndi epai ya Marion, mwasi na ngai ya bolingo, mpe epai ya bana na biso mpo na lisungi oyo bapesi ngai na boumeli ya bambula oyo nyonso. Atako tozali na biloko mingi ya mosuni te, mbala mingi nasalelaka Mosakoli 2:25 (NW) mpo na ngai moko: “Nani alyaka mpe nani amelaka malamu koleka ngai?”

Ya solo, mpo na biso, Yehova akokisi, na lolenge eleki mpenza, elaka na ye oyo ezwami na Malaki 3:10. ‘Asopelaki biso lipamboli kino esika ezangaki mpo na yango’!

[Etanda/​Elilingi na lokasa 29]

MAKAMBO OYO TOKUTANAKI NA YANGO NA NTANGO YA ETUMBA YA MIBALE YA MOKILI MOBIMBA

Mbula pene na 60 nsima ya etumba yango, libota na biso mobimba ebosani te makambo oyo tokutanaki na yango na ntango wana.

Doris azongisi makanisi na ye na nsima mpe alobi boye: “Mbala mosusu, malili ezalaki mpenza na Pennsylvanie. Mokolo moko na butu, malili ezalaki makasi (degre Celsius 35 na nse ya zero).” Louise abakisi boye: “Tofandaki na kiti ya nsima na kati ya motuka na biso oyo ekómaki ya kala; ngai na Doris tofandelanaki na makolo mpo tóyoka malili te.”

Doris alobi boye: “Kasi, tomiyokaki ata mbala moko te ete tozali babola to tozali kokelela. Toyebaki ete, koleka bato mosusu, esika na biso ya kofanda ezalaki kobongwana mbala na mbala mpo na mibembo oyo tozalaki kosala, kasi tozalaki ntango nyonso kolya malamu mpe tozalaki na bilamba ya kitoko oyo baninga na biso mosusu ya etúká ya Ohio bapesaki biso; atako ezalaki bilamba oyo bana na bango oyo balekaki biso mwa moke na bambula basilaki kolata, kasi bilamba yango ezalaki kaka komonana lokola ezali ya sika.”

Louise abimisi likanisi oyo ete: “Tata na Mama bazalaki ntango nyonso kosala ete tómona ete balingi biso mpe bazali kosepela na biso, mpe tozalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango na mosala ya kosakola. Yango esalaki ete tómona ete tozali na ntina mingi mpe tózala na boyokani makasi na bango.”

Paul akanisi lisusu: “Nazalaki na motuka moko ya 1936 nkombo na yango Buick Special, mpe bavuatire yango eyebanaki na ndenge na yango ya kobukaka ba axe na yango. Nakanisi motɛrɛ ya motuka yango nde elekaki makasi. Emonanaki lokola ete likambo yango ezalaki kosalema mingi na butu ya mikolo ya malili makasi; yango wana, esɛngaki na ngai nakendaka mbala na mbala na esika oyo bato bazalaki kosundola mituka na bango mpo na koluka axe mosusu. Na ndenge yango, nayebaki malamumalamu ndenge ya kotya axe mosusu soki oyo nazalaki na yango ebukani.”

Marion alobi boye: “Kobosana te bakalati oyo Leta azalaki kopesa mpo moto azwa ndingisa ya kozwa motango moko boye ya biloko ya kolya to ya biloko mosusu. Na biloko nyonso​—ezala nyama ya kolya, esansi to mazuti, pine ya motuka​—Leta atyaki ndelo oyo moto asengelaki kolekisa te.” Mbala nyonso oyo tozalaki kokóma na teritware ya sika, esengelaki tókende epai ya basali ya Leta ya esika yango mpo na kosɛnga kalati yango. Esengelaki mbala mosusu kozela basanza mingi mpo na kozwa kalati yango, mpe emonanaki lokola ete mbala nyonso oyo tozalaki kozwa kalati na biso, ezalaki nde ntango oyo tosengelaki kokende na teritware mosusu; ntango tokokóma kuna esengelaki kobandela lisusu koluka kalati yango epai ya basali ya Leta ya esika wana. Kasi Yehova azalaki ntango nyonso kokokisa bamposa na biso.”

[Elilingi]

Ngai, Marion, Doris (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Louise, na 2000

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai na mama na 1918, ntango nazalaki na mbula 11

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai, Louise, Marion mpe Doris na 1948, ntango bana na biso bazwaki batisimo

[Elilingi na lokasa 26]

Fɔtɔ ya libala na biso, na Ɔkɔtɔbɛ 1928

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai na bana na ngai (na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi mpe na nsuka na lobɔkɔ ya mobali) na Yankee Stadium, na 1955

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto