Mokolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu lokola moto
Tozali na mpokwa ya mokolo ya mitano, mwa 14 Nisana ya mobu 33 T.B. Etuluku moko ya mibali na basi balingi kokunda moninga na bango oyo balingaki mingi. Nikodeme, moko na mibali yango, ayei na biloko ya nsolo mpo na kopakola nzoto ya mowei liboso bákunda ye. Mobali mosusu, nkombo na ye Yosefe, ye ayei na molikani (elamba ya mpɛmbɛ) mpo na kozinga nzoto ya mowei, nzoto yango ezali na bampota mpe bilembo na bisika oyo babɛtaki ye.
BATO yango banani? Mpe bazali kokunda nani? Makambo nyonso oyo etali yo na nini? Mpo na kozwa biyano na mituna oyo, tózonga naino na ebandeli ya mokolo monene wana.
Mokolo ya minei na mpokwa, mwa 14 Nisana
Sanza ekómi na ntango oyo ezali komonana mobimba, ezali kobima mokemoke mpe ezali kongɛnga na likoló ya mboka Yelusaleme. Bato bazalaki na misala mingi na mokolo yango; sikoyo, kimya ebandi kokɔta na mboka oyo etondi na bato. Na mpokwa yango, bipai nyonso tozali koyoka nsolo ya meme oyo bazali kotumba. Ɛɛ, bato ebele bazali kobongisa feti moko monene: Elambo ya Elekeli oyo basalaka mbala moko na mbula.
Na ndako moko monene ya koyamba bapaya, tokuti Yesu Klisto na bantoma na ye 12 bafandi na mesa oyo etandami malamu. Yoká! Yesu azali koloba. Alobi ete: “Nazalaki na mposa mingi na kolya Elekeli oyo na bino elongo, naino ezwi ngai mpasi te.” (Luka 22:15) Yesu ayebi ete banguna na ye, elingi koloba bakonzi ya mangomba, bazali kokana koboma ye. Kasi, liboso ya kokufa, likambo moko ya ntina mingi ekosalema na mpokwa oyo.
Nsima ya elambo ya Elekeli, Yesu alobi ete: “Moko kati na bino akokaba ngai.” (Matai 26:21) Likambo yango esali bantoma mpasi na motema. Nani akoki kozala na makanisi mabe boye? Nsima ya kolobana mwa moke, Yesu alobi na Yuda Mokeliota ete: “Yango ekosala yo, salá nokinoki.” (Yoane 13:27) Bantoma mosusu bakangi ntina te, nzokande moto oyo akokaba Yesu ezali nde Yuda. Abimi mpo na kokokisa mokumba na ye mabe mpenza na likita oyo bafandeli Yesu.
Ekaniseli ya ntina mingi
Sikoyo, Yesu asali likambo moko ya sika. Likambo oyo bakobanda kosala mpo na kokanisa liwa na ye. Yesu akamati limpa, apesi matɔndi epai ya Nzambe mpe akaboli yango. Alobi ete: “Bókamata, bólya.” “Oyo ezali nzoto na ngai esili kopesama mpo na bino.” Ntango mokomoko na bango alei ndambo ya limpa yango, Yesu akamati kɔpɔ ya vinyo motane mpe apamboli yango. Yesu alobi na bango ete: “Bómɛla na yango, bino nyonso.” Mpe alimboleli bango ete: “Kɔpɔ oyo ezali kondimana na sika na makila na ngai masili kosopana mpo na bino.” Alaki bayekoli na ye 11 oyo batikali sembo ete: “Bósalaka boye mpo na kokanisa ngai.”—Matai 26:26-28; Luka 22:19, 20, NW; 1 Bakolinti 11:24, 25.
Na mpokwa wana, Yesu asololi na bayekoli na ye ya sembo mpo na kobongisa makanisi na bango na makambo oyo ekokómela ye mpe amonisi bango ete alingi bango mingi. Alobi ete: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye. Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino.” (Yoane 15:13-15) Ɛɛ, bantoma 11 bamonisi ete bazali baninga ya solosolo na ndenge batiki Yesu te na ntango oyo azali konyokwama.
Na butu yango, mbala mosusu nsima ya midi ya butu, Yesu asali libondeli moko mozindo, mpe na nsima na yango bayembi nzembo mpo na kosanzola Yehova. Na nsima, wana sanza ebimi na mobimba na yango mpe ezali kongɛngisa butu, batiki mboka mpe bakatisi Lobwaku ya Kidolono.—Yoane 17:1–18:1.
Na elanga ya Getesemane
Mwa moke na nsima, Yesu na bantoma na ye bakómi na elanga ya Getesemane. Yesu atiki bantoma mwambe na ebandeli ya elanga, mpe akamati Petelo, Yakobo, na Yoane mpe bakei mwa mosika na kati ya banzete ya olive. Alobi na bango misato ete: “Molimo na ngai ezali koyoka mawa, kino mawa na kufa; bóumela awa mpe bókɛngɛlaka.”—Malako 14:33, 34.
Bantoma misato bazali kozela wana Yesu apusani mwa mosika na kati ya elanga mpo na kobondela. Wana azali konganga mpe azali kotangisa mpisoli, asɛngi ete: “Tata, soko okani boye, longolá kɔpɔ oyo na ngai.” Azali na mokumba moko monene. Azali komitungisa soki akanisi ndenge oyo banguna ya Yehova bakoloba ntango Mwana-bobele-moko na Ye akokakisama na nzete lokola mosali na mabe! Likambo mosusu oyo ezali kotungisa Yesu mingi mpenza ezali ete soki alongi komekama makasi yango te, ekozala nsɔni mpo Tata na ye ya likoló. Yesu azali kobondela na bozindo mpe amitungisi makasi na boye ete motoki na ye ekómi lokola matanga ya makila oyo ezali kokwea na mabelé.—Luka 22:42, 44.
Yesu asilisi kobondela mpo na mbala ya misato. Mbala moko, mibali basimbi miinda bazali koya epai bango bazali. Yuda azali kotambola liboso na bango, akei epai ya Yesu mpe alobi: “Mbote, Labi!” mpe apesi ye lipwɛpwɛ (baiser) ya bolingo mpenza. Yesu alobi na ye ete: “Yuda, ozali kokaba Mwana na moto na lipwɛpwɛ?”—Matai 26:49; Luka 22:47, 48; Yoane 18:3.
Mbala moko, bantoma bakangi ntina ya makambo oyo ezali koleka. Balingi kokanga Nkolo mpe moninga na bango ya motema! Petelo abimisi mopanga mpe akati litoi ya moombo ya nganga monene. Yesu alobi na ye mbala moko ete, “Tiká básala na bango.” Asimbi moombo mpe abikisi ye mpe alobi na Petelo ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango. Zambi baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga.” (Luka 22:50, 51; Matai 26:52) Bakapitene na basoda basimbi Yesu mpe bakangi ye na nsinga. Lokola kobanga ekangi bango mpe bayebi eloko ya kosala te, bantoma basundoli Yesu mpe bakimi na molili wana.—Matai 26:56; Yoane 18:12.
Mokolo ya mitano na ntɔngɔ, mwa 14 Nisana
Midi ya butu esilaki koleka mpe ntɔngɔ elingi kotana na mokolo ya mitano. Liboso, bakei na Yesu na ndako ya Ana, oyo azalaká nganga monene mpe azali naino na lokumu epai ya Bayuda. Ana atuni Yesu mituna mpe na nsima atindi bámema ye na ndako ya Nganga Monene Kayafa epai Sanedrina eyangani.
Sikoyo, bakonzi ya mangomba bazali koluka batemwe oyo bakokosela Yesu makambo. Kasi, batemwe yango ya lokuta bazali koyokana te na maloba na bango. Na ntango nyonso wana, Yesu afandi nyɛɛ. Kayafa azwi mayele mosusu; atuni ete: “Nazali kokatisa yo ndai na Nzambe na bomoi ete oloba na biso soko yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe.” Yesu akoki kowangana likambo yango te, yango wana ayanoli na mpiko nyonso ete: “Ngai nazali, mpe bokomona Mwana na moto kofanda na lobɔkɔ mobali na nguya mpe koya kati na mapata na Likoló.”—Matai 26:63; Malako 14:60-62.
Kayafa agangi ete: “Asili kotuka! Tozali lisusu na bosɛnga na matatoli mpo na nini?” Babandi kobɛta Yesu bambata na elongi mpe kobwakela ye nsoi. Bato mosusu bazali kotya ye misapi na elongi mpe bazali kofinga ye. (Matai 26:65-68; Malako 14:63-65) Na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo ya mitano, Sanedrina eyangani lisusu. Na ntembe te ezali mpo na komonisa ete basambisi ye na bosembo. Balingi nde kobomba lisambisi oyo basalaki butubutu epai bazwaki ekateli na bango ezangi sembo. Na mbala oyo lisusu Yesu amonisi ete azali Klisto, Mwana ya Nzambe.—Luka 22:66-71.
Na nsima, banganga bakonzi mpe mikóló batindi Yesu akende kosamba epai ya Ponto Pilata, guvernere Moloma na etúká ya Yudea. Bafundi ye ete azali kobebisa ekólo mobimba, azali kopekisa bato kofuta mpako ya Kaisala, mpe “kolobáká ete ye mpenza azali Klisto, mokonzi.” (Luka 23:2; talá Malako 12:17.) Nsima ya kotuna Yesu mituna, Pilata ayebisi bato ete: “Nazwi likambo na moto oyo te.” (Luka 23:4) Ntango Pilata ayoki ete Yesu azali moto ya Galilai, atindi ye epai ya Elode Antipata, mokonzi ya Galilai, oyo azali na Yelusaleme mpo na Elekeli. Elode azali na mposa te ete likambo ya Yesu ekatama na bosembo. Azali nde na mposa ete Yesu asala ekamwiseli moko. Lokola Yesu akokisi mposa na ye te mpe afandi nyɛɛ, Elode na basoda na ye basakani na ye mpe bazongisi ye epai ya Pilata.
Pilata atuni lisusu: “Kasi moto oyo asali mabe nini? Nazwi likambo moko libongi na kufa kati na ye te, na bongo nakobɛta ye [fimbo] mpe [nakotika] ye.” (Luka 23:22) Atindi bábɛta Yesu fimbo ya nsingansinga esalemi na mposo ya nyama mpe ekoswa makasi na mokɔngɔ ya Yesu. Bongo, basoda balatisi ye ekɔti ya nzube na motó. Basakani na ye mpe babɛti ye na nkɛkɛlɛ ya makasi, mpe bafini lisusu malamumalamu ekɔti yango ya nzube na moto na ye. Atako azali komona mpasi makasi mpe bazali kosambwisa ye, Yesu abateli limemya mpe mpiko ya kokamwa.
Pilata abimisi ye lisusu na miso ya bato; mbala mosusu akanisi ete soki bamoni ndenge akómi nsima ya kobɛtama, bakoyokela ye mawa. Pilata alobi na mongongo makasi ete: “Talá, nazali koya na ye epai na bino ete bóyeba ete namoni likambo kati na ye te.” Kasi banganga bakonzi bagangi ete: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!” (Yoane 19:4-6, NW) Lokola bato batii ye mbamba, Pilata alɛmbi nzoto mpe atiki ete bábaka Yesu na nzete.
Liwa ya nsɔmɔ
Sikoyo, ekoki kozala ete tolingi kokóma na midi. Babimisi Yesu na Yelusaleme, bakei na ye tii na esika babéngaka Golgota. Babaki Yesu na nzete na bansɛtɛ minene na mabɔkɔ mpe na makolo. Maloba ezali te mpo na kolimbola mpasi oyo azali koyoka ntango batɛlɛmisi nzete mpe kilo ya nzoto na ye ezali kofungola bampota ya bansɛtɛ. Bato batondi wana mpo na kotala ndenge bazali kobaka Yesu na basali na mabe mibale na nzete. Bato mingi bazali kofinga Yesu. Banganga bakonzi na bato mosusu bazali kosɛka, bazali koloba ete: “Abikisaki bamosusu, ayebi komibikisa te!” Ata basoda mpe basali na mabe mibale oyo babaki bango elongo na ye bazali kotyola Yesu.—Matai 27:41-44.
Mbala moko ntango midi ebɛti, nsima ya koumela mwa moke na nzete, Nzambe atindi molili moko ya nsɔmɔ oyo eumeli ngonga misato.a Ekoki kozala yango nde epusi mosali na mabe moko ete apamela moninga na ye. Na nsima, abaloli elongi epai ya Yesu mpe alobi na ye ete: “Wana ekokóma yo na bokonzi na yo, kanisá ngai.” Moto yango, oyo etikali moke akufa amonisi mpenza kondima monene! Yesu ayanoli ete, “Ya solo nazali koloba na yo lelo ete, okozala na ngai na Paladiso.”—Luka 23:39-43, NW.
Na ngonga ya misato nsima ya midi, Yesu amoni ete etikali moke akufa. Alobi ete, “Nazali na mposa na komɛla.” Na nsima, agangi na mongongo makasi ete: “Ɛ Nzambe na ngai, Ɛ Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai?” Yesu amonaki mpenza ete Tata na ye “atiki” kobatela ye mpo ete bosembo na ye emekama tii na nsuka, mpe na bongo, azongeli maloba ya Davidi. Moto moko atii linyuka oyo ezali na mai ya ngai na monɔkɔ ya Yesu. Ntango ameki mai ya ngai, Yesu alobi na malɛmbɛ ete: “Esili!” Na nsima, agangi makasi ete: “Tata, nazali kotika [elimo, NW] na ngai na mabɔkɔ na yo,” akitisi motó, mpe akati motema.—Yoane 19:28-30; Matai 27:46; Luka 23:46; Nzembo 22:1.
Lokola tokómi na mpokwa, bibongiseli ya mbangumbangu ekamatami mpo na kokunda Yesu liboso ya Sabata (15 Nisana), ekobanda soki moi elali. Yosefe moto ya Alimataya, moto ya Sanedrina oyo ayebani mingi mpe azali moyekoli ya Yesu kasi alingaka te bato báyeba yango, azwi ndingisa ya kokunda ye. Nikodeme, ye mpe moto ya Sanedrina oyo andimelaki Yesu kasi alingaka te ete bato báyeba, ayei na kilo 33 ya mola na aloe. Babongisi nzoto ya Yesu malamu mpe balalisi yango na lilita moko ya sika oyo ezali mosika te na esika oyo babomaki ye.
Azongi na bomoi!
Tozali naino na ntɔngɔntɔngɔ ya mokolo ya lomingo, molili esili naino te. Malia Magadala na basi mosusu balingi kokóma na lilita ya Yesu. Kasi, talá! libanga oyo bazipaki monɔkɔ ya lilita elongolami. Likambo ya kokamwa, nzoto ya mowei ezali na kati ya lilita te! Malia Magadala akei mbangu koyebisa Petelo na Yoane. (Yoane 20:1, 2) Ntango kaka apesi mokɔngɔ, anzelu moko abimeli basi mosusu oyo batikalaki wana. Alobi: “Bóbanga te.” Ayebisi bango lisusu ete: “Bókenda mbangu koloba na bayekoli na ye ete asili kosekwa na bakufi.”—Matai 28:2-7.
Ntango bazali kokende nokinoki, bakutani na Yesu na nzela! Alobi na bango ete: “Bókenda koyebisa bandeko na ngai.” (Matai 28:8-10) Na nsima, Yesu abimeli Malia Magadala wana azali kolela liboso ya lilita. Mwaye ya kobomba esengo na ye ezali te, asimbi nzela mpe akei mbangu koyebisa bayekoli mosusu nsango malamu yango. (Yoane 20:11-18) Ɛɛ, na mokolo ya lomingo yango, oyo tokoki kobosana yango te, Yesu nsima ya kosekwa, amonani mbala mitano na bayekoli mingi mpo na kondimisa bango ete azongi na bomoi!
Makambo yango etali yo na nini
Ndenge nini makambo oyo masalemaki eleki sikoyo mbula 1 966 makoki kotalela yo moto oyo ozali na bomoi na ebandeli ya ekeke ya 21? Moto moko oyo amonaki na miso na ye ndenge makambo yango elekaki alobi boye: “Bolingo na Nzambe emonani mpo na biso, mpamba te Nzambe atindaki Mwana na ye mobotami-bobele-moko na mokili ete tózwa bomoi na nzela na ye. Bolingo ezali boye te ete biso nde tolingaki Nzambe, kasi ezali boye ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu na biso.”—1 Yoane 4:9, 10, NW.
Na ndimbola nini liwa ya Klisto ezali “mbeka mpo na bolimbisi”? Ezali mpo na bolimbisi mpamba te epesi bato nzela ya kozala na boyokani malamu na Nzambe. Adama, moto ya liboso atombokelaki Nzambe mpe atikelaki bana na ye lisumu mpe liwa. Nzokande, Yesu apesaki bomoi na ye lokola mbeka mpo na kosikola bato na lisumu mpe na liwa. Na bongo, akokisaki likambo oyo esengeli mpo Nzambe ayokela biso mawa mpe amonisela biso ngɔlu. (1 Timote 2:5, 6) Soki omonisi kondima na mbeka ya Yesu mpo na bolimbisi ya masumu, okoki kosikwama na etumbu oyo Adama moto ya masumu atikelaki yo. (Baloma 5:12; 6:23) Na nsima, yango ekopesa yo libaku malamu ya kokóma moninga ya Yehova Nzambe, Tata na biso ya likoló oyo atondi na bolingo. Na mokuse, mbeka ya Yesu oyo eleki mbeka nyonso ekoki kopesa yo bomoi oyo ezangi nsuka.—Yoane 3:16; 17:3.
Makambo oyo mpe makambo mosusu mayokani na yango makolobelama na mokolo ya minei, mwa 1 Aprili, na bisika ebele oyo bamilio ya bato bakoyangana na mokili mobimba mpo na kokanisa liwa ya Yesu Klisto. Tobéngisi yo ozala wana. Batatoli ya Yehova na mboka oyo ofandi bakosepela koyebisa yo esika mpe ngonga oyo likita yango ekosalema. Na ntembe te, koyangana na molulu yango ekobakisa botɔndi na yo mpo na likambo oyo Tata na biso ya bolingo na Mwana na ye oyo alingi mingi basalaki na mokolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu lokola moto.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala te ete sanza nde ezipaki kongɛnga ya moi mpo molili wana ekɔta (eclipse solaire) mpamba te Yesu akufaki na mikolo oyo sanza emonanaka na mobimba na yango. Soki sanza ezipi kongɛnga ya moi, molili wana eumelaka se mwa miniti moke mpe esalemaka soki sanza eleki na kati ya moi mpe mabelé, mpe na ntango oyo sanza ebimi sika.
[Chart/Pictures 7]
LIWA MPE LISEKWA YA YESU
NISANA MOBU 33 T.B. MAKAMBO MOTO OYO ALEKAKI BATO NYONSOb
14 Mwaminei Elambo ya Elekeli; Yesu asukoli 113, par. 2 na
mpokwa makolo ya bantoma; Yuda abimi 117, par. 1
mpo na kokaba Yesu; Klisto abandisi
Ekaniseli ya liwa na ye (na mbula
oyo ekosalema mokolo ya minei,
mwa 1 Aprili, nsima ya kolala ya moi);
liboso ete atika bantoma, alendiseli
bango mpo etemakanisi na bango
ebulungana te
Midi ya butu Nsima ya libondeli mpe nzembo ya 117 to 120
liboso ntɔngɔ masanzoli, Yesu na bantoma bakei na
etana elanga ya Getesemane; Yesu abondeli na
koganga makasi mpe na mpisoli na miso;
Yuda Mokeliota ayei elongo na bato
ebele mpe akabi Yesu; bantoma bakimi
wana bakangi Yesu mabɔkɔ na nsinga
mpe bakei na ye epai ya Ana; bakei na
Yesu epai ya Nganga Monene Kayafa mpo
na kosamba liboso ya Sanedrina;
bakateli ye etumbu ya liwa; bafingi ye
mpe babɛti ye; Petelo awangani Yesu
mbala misato
Mwamitano Na ntɔngɔntɔngɔ, bamemi lisusu Yesu 121 to 124
na ntɔngɔ liboso ya Sanedrina; bakei na ye epai
ya Pilata; batindi ye epai ya Elode;
bazongisi ye epai ya Pilata; babɛti
Yesu fimbo, bafingi ye, mpe basambwisi
ye; lokola batii Pilata mbamba, apesi
Yesu na mabɔkɔ ya bato oyo bakoboma ye;
bamemi Yesu na Golgota mpo na koboma ye
liboso ete midi ebɛta
Midi Mwa moke liboso ya midi, babaki Yesu na 125, 126
tii nsima ya nzete; molili ekɔti na mokili banda
midi na midi tii na ngonga ya misato nsima
ya midi,Yesu akufi; mabelé eningani
makasi; rido ya tempelo epasuki na
ndambo mibale
Na mpokwa Bakundi ebembe ya Yesu na lilita oyo 127, pars.
ezali na elanga liboso Sabata ebanda 1-7
15 Mwamitano Sabata ebandi
na mpokwa
Mwapɔsɔ Pilate apesi ndingisa ete bákɛngɛla 127, pars.
lilita ya Yesu 8-9
16 Mokolo Na ntɔngɔntɔngɔ, bakuti lilita ya 127, par. 10
ya lomingo Yesu etikali mpamba; Yesu nsima ya to 129, par.
kosekwa amonani na (1) etuluku ya 10
bayekoli ya basi, kati na bango Salome,
Yoana, mpe Malia mama ya Yakobo; (2) Malia
Magadala; (3) Keleopa na moninga na ye;
(4) Simona Petelo; (5) bantoma na bayekoli
mosusu oyo bayangani esika moko
[Maloba na nse ya lokasa]
b Mituya oyo mipesami awa mizali kolakisa mikapo na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Talá buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” lokasa 290, ezali na etanda oyo ezali na makambo mingi mauti na Makomami mpe malobeli ndenge oyo Yesu asukisaki mosala na ye. Babuku yango ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.