Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/12 nk. 8-13
  • Bayinami mpo na kondima na bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bayinami mpo na kondima na bango
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Motuya ya kofuta’ ntango moto azali moyekoli
  • Bayini mpe bayinami
  • Banani bayinaki baklisto ya liboso?
  • Mpo na nini Baloma bayinaki baklisto ya liboso?
  • Baanganaki kondima na bango te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto mpe mokili ya ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Tólongisa kondima na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baklisto ya liboso mpe mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/12 nk. 8-13

Bayinami mpo na kondima na bango

“Bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” —MATAI 10:22.

1, 2. Yebisá mwa makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango mpo ete balandaki bindimeli ya lingomba na bango.

NA ESANGA Crète, bakangi nkolo ya magazini moko oyo asalaka mosala na ye na bosembo mbala ebele mpe asambi mbala na mbala na bisambiseli ya ekólo Grèce. Soki tosangisi mikolo nyonso oyo azalaki kokɔta bolɔkɔ mbala na mbala, esali mbula koleka motoba, mosika na mwasi na ye mpe bana mitano. Na ekólo Japon babengani mwanakelasi moko ya mibu 17 na eteyelo, atako azali na etamboli malamu mpe alongaka esika ya liboso na kelasi na bango oyo ezali na bana 42. Na ekólo France, bazali kolongola bato mingi na mosala na mbalakaka, atako bayebani ete bazali basali ya malamu mpe ya molende. Boyokani nini ezali na kati ya bato nyonso oyo tolobeli?

2 Bango nyonso bazali Batatoli ya Yehova. “Mabe” nini basalaki? Bobele mpo basalelaka makambo oyo lingomba na bango eteyaka bango. Mpo na kotosa etinda ya Yesu Klisto, nkolo ya magazini wana azalaki koteya bindimeli na ye epai ya bato mosusu. (Matai 28:19, 20) Akweaki na mobeko moko ya kalakala ya ekólo Grèce oyo elobi ete koteya bindimeli ya lingomba epai ya bato mosusu ezali mabe oyo ebongi kopesamela etumbu. Babenganaki mwanakelasi wana mpamba te lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia epekisaki ye kobunda kendo (bitumba ya mipanga ya bato ya Japon) oyo esɛngisamaka na mwanakelasi nyonso. (Yisaya 2:4) Mpe bato oyo balongolamaki na mosala na France bayebisaki bango ete balongoli bango mpo ete bazali Batatoli ya Yehova.

3. Mpo na nini konyokola Batatoli ya Yehova ezali likambo oyo esalemaka mingi te?

3 Makambo ya mawa motindo oyo ezali ndakisa ya makambo oyo Batatoli ya Yehova bakutanaki na yango na mikili mosusu na mikolo mileki. Nzokande, mpo na Batatoli ya Yehova mingi, konyokwama makasi na mabɔkɔ ya bato ezali likambo oyo emonanaka mpenza te. Basaleli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na etamboli malamu na bango—likambo oyo emonisi ete ntina ya konyokola bango ezali te. (1 Petelo 2:11, 12) Bayangaka myango ya kosala botomboki te to mpe basanganaka na misala ya mabe te. (1 Petelo 4:15) Kutu, basalaka makasi mpo na kolanda toli ya Biblia oyo etali kotosa libosoliboso Nzambe, mpe na nsima baguvernema ya mokili. Bafutaka mpako oyo mibeko esɛngi mpe basalaka nyonso mpo na kofanda na “bato nyonso kimya.” (Baloma 12:18; 13:6, 7; 1 Petelo 2:13-17) Na mosala na bango ya koteya Biblia, balendisaka bato bátosa mibeko, bábatela libota, mpe bázala na etamboli malamu. Baguvernema mingi ekumisi bango mpo ete bazali banamboka oyo batosaka mibeko. (Baloma 13:3) Kasi, lokola paragrafe ya liboso emonisi yango, mbala mingi bazali konyokwama; na mikili mosusu kutu mosala na bango epekisami. Tosengeli nde kokamwa na likambo yango?

‘Motuya ya kofuta’ ntango moto azali moyekoli

4. Yesu alobaki makambo nini oyo ekoki kokómela moto nyonso oyo akómi moyekoli na ye?

4 Yesu Klisto amonisaki polele makambo oyo moyekoli na ye nyonso akokutana na yango. Alobaki na bayekoli na ye ete: “Moombo aleki nkolo na ye te. Soko basili konyokola ngai, bakonyokola bino lokola.” Yesu ayinamaki “mpamba.” (Yoane 15:18-20, 25; Nzembo 69:4; Luka 23:22) Bayekoli na ye basengelaki kolikya ete bakokutana na likambo ya ndenge yango: botɛmɛli atako basali mabe moko te. Mbala mingi azalaki koyebisa bango ete: “Bakoyina bino.”​—Matai 10:22; 24:9.

5, 6. (a) Mpo na nini Yesu asɛngaki na baoyo bakokóma bayekoli na ye ete ‘bátánga motuya’? (b) Na yango, mpo na nini tosengeli kokamwa te ntango bazali kotɛmɛla biso?

5 Mpo na yango, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bátánga motuya’ ya kozala moyekoli. (Luka 14:28) Mpo na nini? Ezali te mpo na kopona kokóma bayekoli to te, kasi mpo na kozwa ekateli ya kokokisa oyo esɛngami. Tosengeli komilɛngela mpo na koyika mpiko na komekama to minyoko oyo eyaka nzela moko na libaku malamu ya kozala moyekoli ya Yesu. (Luka 14:27) Moto moko te azali kotindika biso na makasi ete tósalela Yehova lokola bayekoli ya Klisto. Ezali ekateli oyo moto azali kozwa na motema na ye; ezali mpe ekateli oyo moto azali kozwa na koyebáká malamu makambo ekokómela ye. Toyebi malamu ete atako tokozwa mapamboli mingi na ndenge tomipesi epai ya Nzambe, ‘bakoyina’ biso. Yango wana, tokamwaka te soki bazali kotɛmɛla biso. ‘Totángaki motuya,’ mpe tondimi kofuta yango.​—1 Petelo 4:12-14.

6 Mpo na nini bato mosusu, bakisa mpe bakonzi ya Leta, balukaka kotɛmɛla baklisto ya solo? Mpo na kozwa eyano, ezali malamu tótalela mangomba mibale ya ekeke ya yambo T.B. Mangomba yango mibale mayinamaki, kasi mpo na bantina ekeseni mpenza.

Bayini mpe bayinami

7, 8. Mateya nini elakisaki Bayuda kotyola bato ya mabota mosusu, mpe yango ekolisaki elimo nini epai ya Bayuda?

7 Na ekeke ya yambo T.B., bokonzi ya Loma ezalaki koyangela Yisalaele, mpe bakambi lokola Bafalisai mpe Bakomeli oyo bazalaki konyokola bato bazalaki kotambwisa Lingomba ya Bayuda. (Matai 23:2-4) Bakonzi yango oyo bazalaki na molende mabe babongolaki Mibeko ya Mose oyo esɛngisaki Bayuda ete bámikabola na bato ya bikólo mosusu mpo na koteya ete esengeli kotyola bato oyo bazali Bayuda te. Na nsima, lingomba na bango ekolisaki elimo ya koyina bato ya mabota mosusu, na bongo, bato ya mabota mosusu bakómaki mpe koyina Bayuda.

8 Ezalaki mpasi te mpo na bakonzi ya mangomba koteya Bayuda ete bátyolaka bato ya mabota mosusu, mpamba te na ntango wana, Bayuda bazalaki komona ete bato ya mabota bazali mbindo. Bakonzi ya mangomba bazalaki koteya ete mwasi Moyuda akoki soki moke te kofanda esika moko na bato ya mabota mosusu soki azali ye moko, mpamba te “bazalaki kokanisa ete bazali bato ya misala ya mbindo.” Mobali Moyuda asengeli ‘kozala ye moko na bango te mpamba te bazalaki kokanisa ete basopaka makila.’ Bakokaki kosalela miliki oyo ekamolami na moto oyo azali Moyuda te, bobele soki Moyuda azalaki wana mpo na kotala ndenge azalaki kokamola yango. Bakonzi ya mangomba bapusaki Bayuda na komitangola mpe kokabwana mpenza na bato mosusu.​—Talá Yoane 4:9.

9. Mateya ya bakonzi ya mangomba ya Bayuda ebotaki mbuma nini na ndenge bazalaki kotalela bato ya mabota mosusu?

9 Mateya motindo wana na ntina na bato oyo bazali Bayuda te ekokaki kolendisa boyokani malamu te kati na Bayuda mpe bato ya mabota mosusu. Bato ya mabota mosusu bakómaki komona ete Bayuda bayinaka bato nyonso. Tacite, Moloma mpe mokomi ya makambo ya kala (abotamaki soko na mobu 56 T.B.) alobaki ete Bayuda “bayinaka bato mosusu nyonso lokola banguna na bango.” Tacite alobaki lisusu ete bateyaki bato ya mabota mosusu oyo bakómaki baprozelite ete báboya bikólo na bango mpe bátalela mabota mpe baninga na bango lokola biloko mpamba. Baloma bazalaki kopekisa losambo ya Bayuda te, mpamba te lokola bazalaki mingi, bazalaki kobanga bango. Kasi, ntango Bayuda batombokaki na mobu 66 T.B. Baloma basilisaki botomboki yango na ndenge ya nsɔmɔ, mpe yango ememaki na kobomama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B.

10, 11. (a) Mibeko ya Mose esɛngaki kosalela bapaya makambo ndenge nini? (b) Likambo oyo ebimaki na Lingomba ya Bayuda ezali koteya biso nini?

10 Boyokani nini ezalaki kati na lolenge wana ya kotalela bapaya mpe losambo oyo emonisami na Mibeko ya Mose? Mibeko esɛngisaki kokabwana na mabota ya bapaya, kasi ezalaki mpo na kobatela Bayisalaele, mingimingi mpo na kobatela losambo na bango ya pɛto. (Yosua 23:6-8) Atako bongo, Mibeko esɛngaki kosalela bapaya makambo na bosembo mpe na kolongobana mpe koyamba bango malamu—soki babuki mibeko ya Yisalaele te. (Levitike 24:22) Na ndenge batikaki ndimbola ya solosolo mpe ya bokatikati ya Mibeko mpo na bapaya, bakonzi ya mangomba ya Bayuda na ntango ya Yesu basalaki losambo oyo ebimisaki koyinana mpe esalaki ete báyina Bayuda. Nsukansuka, na ekeke ya liboso, Yehova asundolaki libota ya Bayuda.​—Matai 23:38.

11 Tokoki kozwa liteya na likambo yango? Ɛɛ. Elimo ya komitombola mpe kotyola bato ya mangomba mosusu eyokani na losambo ya pɛto ya Yehova te, mpe esepelisaka ye te. Tótalela ndakisa ya baklisto ya sembo na ekeke ya liboso. Bazalaki koyina bato ya mangomba mosusu te, mpe batombokelaki bokonzi ya Loma te. Atako bongo, ‘bayinaki baklisto.’ Mpo na nini? Mpe banani bayinaki bango?

Banani bayinaki baklisto ya liboso?

12. Ndenge nini Makomami mamonisi polele ete Yesu alingi ete bayekoli na ye bázala na bokatikati na ndenge ya kotalela bato oyo bazali baklisto te?

12 Mateya ya Yesu mamonisaki polele ete alingaki ete bayekoli na ye bázala na bokatikati na ndenge ya kotalela bato oyo bazali baklisto te. Alobaki ete bayekoli na ye bakokabwana na mokili—elingi koloba, bakoboya elimo mpe etamboli oyo eyokani te na banzela ya sembo ya Yehova. Basengelaki komikɔtisa na makambo ya politiki mpe na bitumba te. (Yoane 17:14, 16) Nzokande, na esika ateya bango ete bátyolaka bato oyo bazali baklisto te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bálinga bayini na bango.’ (Matai 5:44) Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete: “Soko moyini na yo akoyoka nzala, leisá ye bilei. Soko akoyoka mposa na mai, melisá ye.” (Baloma 12:20) Lisusu, ayebisaki baklisto ete ‘básalela bato nyonso malamu.’—Bagalatia 6:10.

13. Mpo na nini mpenza bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kotɛmɛla bayekoli ya Klisto?

13 Nzokande, eumelaki te, bituluku misato ekómaki ‘koyina’ bayekoli ya Klisto. Ya liboso ezalaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda. Tokoki kokamwa te ete baklisto baumelaki te kobenda likebi na bango! Baklisto bazalaki na bizaleli malamu mpe bazalaki sembo, mpe lisusu bazalaki kosakola nsango ya elikya na molende mpenza. Bato mingi batikaki Lingomba ya Bayuda mpe bakómaki baklisto. (Misala 2:41; 4:4; 6:7) Na miso ya bakonzi ya mangomba, Bayuda oyo bakómaki bayekoli ya Yesu bazalaki bapɛngwi! (Talá Misala 13:45.) Bakonzi yango bazalaki na nkanda mpamba te bamonaki ete baklisto babwakaki bonkɔkɔ na bango. Ɛɛ, baboyaki kolanda ndenge oyo bango bazalaki kotalela bato ya mabota mosusu! Kobanda mobu 36 T.B., bato ya mabota bakokaki kokóma baklisto, kozala na kondima mpe na mikumba ya boklisto ndenge moko na Bayuda.​—Misala 10:34, 35.

14, 15. (a) Mpo na nini bapakano bayinaki baklisto? Pesá ndakisa. (b) Etuluku nini ya misato ‘eyinaki’ baklisto ya liboso?

14 Ya mibale, bapakano bayinaki baklisto. Na ndakisa, na engumba Efese ya kala, kosala mwa bisambelo ya palata mpo na nzambe-mwasi Alatemi ezalaki mombongo ya malamu. Kasi, ntango Paulo ateyaki kuna, bato mingi ya Efese bandimaki mpe batikaki kosambela Alatemi. Lokola mombongo na bango ekómaki na likama, batuli na palata batombokaki. (Misala 19:24-41) Likambo ya ndenge wana mpe esalemaki ntango mateya ya boklisto ekómaki na etúká ya Bitunia (lelo oyo na nɔrdi-wɛsti ya ekólo Turquie). Mwa moke nsima wana basilisaki kokoma Makomami ya Greke ya boklisto, Pline le Jeune, guvernere ya etúká ya Bitunia, akomaki ete bato bazalaki lisusu kokende mingi te na batempelo ya bapakano mpe matiti ya koleisa banyama oyo bazalaki kopesa lokola mbeka ezalaki lisusu kotɛkama mingi te. Bazalaki kozomela baklisto—mpe banyokolaki bango—mpamba te losambo na bango ezalaki na milulu ya kokaba mbeka ya banyama te mpe bazalaki kosalela bikeko te. (Baebele 10:1-9; 1 Yoane 5:21) Emonani polele ete kopalangana ya boklisto ebebisaki matomba mosusu oyo bato bazalaki kozwa na losambo ya bapakano, mpe baoyo babungisaki mombongo mpe mosolo na bango basepelaki te.

15 Ya misato, Baloma oyo bapusaki kolinga ekólo na bango bakómaki ‘koyina’ baklisto. Na ebandeli, Baloma bazalaki kotalela baklisto lokola mwa lingomba mpe mbala mosusu lingomba ya bato ya bindimandima. Kasi, na nsima, ekómaki soki moto alobi bobele ete azali moklisto akokaki kozwa etumbu ya liwa. Mpo na nini batalelaki baklisto, oyo bazalaki bato ya sembo, lokola bato babongi na monyoko mpe na liwa?

Mpo na nini Baloma bayinaki baklisto ya liboso?

16. Baklisto bakabwanaki na mokili na makambo nini, mpe mpo na nini likambo yango esepelisaki bokonzi ya Loma te?

16 Ya liboso, Baloma bayinaki baklisto mpo na bindimeli na bango. Na ndakisa, baboyaki kosangana na mokili. (Yoane 15:19) Na yango, bazalaki kosala mosala ya politiki te, mpe baboyaki kosala mosala ya soda. Yango wana, ndenge Auguste Neander, nganga-mayele ya istware alobi yango, “bazalaki kotalela baklisto lokola bato bakufá na mokili, mpe bazalaki na ntina moko te na makambo nyonso ya bomoi.” Kosangana na mokili te elimbolaki mpe koboya misala ya mabe ya bato ya Loma. Will Durant, nganga-mayele ya istware, alobi ete, “mwa bituluku ya baklisto ezalaki kotungisa lisosoli ya bapakano na ezaleli na bango ya kobanga Nzambe mpe ya kolongobana.” (1 Petelo 4:3, 4) Ekoki kozala ete Baloma bazalaki konyokola mpe koboma baklisto mpo na kopekisa kotungisama na lisosoli.

17. Nini emonisi ete nsango malamu esakolamaki mpenza na ekeke ya liboso?

17 Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na molende makasi. (Matai 24:14) Na mobu 60 T.B., Paulo alobaki ete nsango malamu esakolamaki “na nse na Likoló.” (Bakolose 1:23) Na nsuka ya ekeke ya liboso, bayekoli ya Yesu bazalisaki bayekoli na mokili mobimba oyo bokonzi ya Loma ezalaki koyangela—na Azia, na Mpoto, mpe na Afrika! Kutu bato mosusu na “ndako na Kaisala” bakómaki baklisto.a (Bafilipi 4:22) Molende ya ndenge wana na mosala ya kosakola ebimisaki koyina. Neander alobi ete: “Bato ya ndenge na ndenge bazalaki se kokóma baklisto, mpe boklisto elingaki kolimwisa lingomba ya Leta.”

18. Ndenge nini kosambela bobele Yehova ekabolaki baklisto na guvernema ya Loma?

18 Bayekoli ya Yesu bazalaki kosambela bobele Yehova. (Matai 4:8-10) Ekoki kozala ete likambo yango nde elekaki kosala ete báyokana te na bokonzi ya Loma. Bato ya Loma bazalaki koboya te ete bato mosusu bázala na mangomba na bango, kasi basengelaki mpe kosambela amperere. Nzokande, baklisto ya liboso bakokaki kosangana na losambo wana te. Mpo na baklisto, Yehova Nzambe, azalaki mokonzi oyo alekaki ata Leta ya Loma. (Misala 5:29) Yango wana, ata soki moklisto azalaki kosala malamu na makambo mosusu, bazalaki kotalela ye lokola monguna ya Leta.

19, 20. (a) Mingimingi banani babimisaki makambo ya lokuta oyo epalanganaki na ntina na baklisto ya sembo? (b) Bafundaki baklisto na bifundeli nini ya lokuta?

19 Kasi, ezalaki mpe na ntina mosusu oyo Baloma ‘bayinaki’ baklisto ya sembo: Bato mingi bazalaki kondima makambo ya lokuta oyo ezalaki kolobama mpo na bango, mpe mingimingi bakonzi ya mangomba ya Bayuda nde bazalaki kopanza nsango yango ya lokuta. (Misala 17:5-8) Na mobu 60 to 61 T.B., ntango Paulo azalaki na Loma mpo na kozela kosamba liboso ya Amperere Néron, mikóló ya Bayuda balobaki boye mpo na lingomba ya boklisto: “Zambi mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” (Misala 28:22) Na ntembe te, Néron ayokaki bansango ya lokuta oyo ezalaki kolobama mpo na baklisto. Lisolo ya makambo ya kala elobaka ete na mobu 64 T.B., ntango bapamelaki Néron mpo na mɔ́tɔ oyo ebebisaki engumba Loma, lokola ayebaki ete bato balingaka baklisto te, akweiselaki bango ngambo yango. Ekoki kozala ete likambo yango nde ebimisaki minyoko makasi mpo na koluka kosilisa baklisto.

20 Mbala mingi bazalaki kofunda baklisto na makambo ya lokuta to mpe bafundi yango bazalaki kobongola mateya ya boklisto. Lokola bazalaki kosambela bobele Nzambe moko mpe bazalaki kosambela amperere te, balobaki ete bandimaka Nzambe te. Lokola bato mosusu batɛmɛlaki bandeko na bango oyo bazalaki baklisto, balobaki ete baklisto bazalaki kopanza mabota ya bato. (Matai 10:21) Bapanzaki nsango ete baklisto balyaka bato. Bato mosusu balobaka ete efundeli yango ebimaki mpo babalolaki maloba ya Yesu na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo.​—Matai 26:26-28.

21. Wapi bantina mibale oyo ‘bayinaki’ baklisto.

21 Na bongo, Baloma ‘bayinaki’ baklisto ya sembo mpo na bantina mibale ya minene: (1) Bindimeli mpe mimeseno na bango euti na Biblia, mpe (2) Bifundeli ya lokuta. Ezala mpo na ntina nini, batɛmɛli bazalaki na mokano se moko: kolimwisa lingomba ya boklisto. Ya solo, babandisi ya solosolo ya minyoko ya baklisto ezalaki bikelamu ya elimo, bilimu mabe ya nguya oyo bimonanaka te.​—Baefese 6:12.

22. (a) Ndakisa nini emonisi ete Batatoli ya Yehova basalaka nyonso mpo na ‘kosalela bato nyonso malamu’? (Talá etanda na lokasa 11.) (b) Tokolobela makambo nini na lisolo elandi?

22 Ndenge moko na baklisto ya liboso, lelo oyo na mikili mingi, bato bazali ‘koyina’ Batatoli ya Yehova. Kasi bango moko Batatoli bayinaka bato ya mangomba mosusu te; mpe ata mbala moko te batombokelá baguvernema. Kutu, na mokili mobimba bayebi bango lokola bato oyo balingaka baninga na bosolo kozanga kotala etɛlɛmɛlo, mposo, mpe etuluka ya moto. Kasi, mpo na nini bazali konyokola bango? Mpe basalaka nini liboso ya minyoko yango? Lisolo elandi ekoyanola na mituna oyo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Ndako ya Kaisala” elimboli kaka libota ya Néron te, amperere oyo azalaki koyangela na ntango wana. Kasi, ekoki kozala baombo na ye mpe basali mosusu, oyo bazalaki kosala misala ya ndako lokola kolamba mpe kotya bopɛto na ndako ya mokonzi mpe bato na ye.

Okoyanola ndenge nini?

◻ Mpo na nini Yesu alobaki na baoyo bakokóma bayekoli na ye ete bátánga motuya ya kozala moyekoli?

◻ Likanisi ya bato mingi oyo bazalaki Bayuda te esalaki bopusi nini na Lingomba ya Bayuda, mpe yango eteyi biso nini?

◻ Tángá bituluku misato oyo etɛmɛlaki baklisto ya sembo na ekeke ya liboso.

◻ Wapi bantina minene oyo Baloma ‘bayinaki’ baklisto.

[Etanda na lokasa 11]

‘Bazali kosalela bato nyonso malamu’

Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kolanda toli ya Biblia etali ‘kosalela bato nyonso malamu.’ (Bagalatia 6:10) Na ntango ya mpasi, bolingo mpo na bazalani epusaka bango na kosalisa baoyo bazali na bango lingomba moko te. Na ndakisa, na 1994, ntango mikakatano ezalaki na ekólo Rwanda, Batatoli bamonisaki bolingo malamu; balongwaki na Mpoto mpe bakendaki na Afrika kosunga bato. Babongisaki nokinoki bakaa malamu mpe balopitalo ya zamba mpo na kopesa lisungi. Batindaki ebele ya bilei, bilamba, mpe babolangiti na nzela ya mpɛpɔ. Motuya ya bato bakimá mboka oyo bazwaki lisungi yango ezalaki mbala misato koleka motuya ya Batatoli ya Yehova oyo bazali kuna.

[Elilingi na lokasa 9]

Baklisto ya liboso bazalaki kosakola nsango malamu na molende

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto