Betele—Engumba ya makambo malamu mpe mabe
BINGUMBA mosusu ekómaka na lokumu malamu to na lokumu ya mabe mpo na makambo oyo masalemaka kuna. Nzokande, Betele ekeseni na boye ete eyebanaki mpo na makambo malamu mpe mabe. Yakobo, tata ya mabota na ntango ya kala, apesaki engumba yango nkombo Betele, oyo elimboli “Ndako ya Nzambe.” Kasi, mbula nkóto na nsima, mosakoli Hosea abéngaki engumba yango “Ndako ya masumu.” Ndenge nini engumba yango ebongwanaki longwa na makambo malamu kino na makambo mabe? Mpe liteya nini tokozwa na lisolo na yango?
Basaleli ya Nzambe babandaki kosalela Betele na mobu 1943 L.T.B. wana Abalayama azalaki naino na bomoi. Na eleko wana, engumba yango eyebanaki na nkombo Luzi, nkombo oyo Bakanana bapesaká yango na ebandeli. Engumba yango ezalaki na bisika ya ngomba, na ntaka soko ya kilomɛtɛlɛ 17 na nɔrdi ya Yelusaleme. Kanisá ete Abalayama na Lota, mwana ya ndeko na ye, batɛlɛmi likoló ya bangomba zingazinga ya Betele mpe bazali kotala bisika kitoko ya matiti na lobwaku ya Yaladene. Abalayama abendi likebi ya Lota na mokakatano oyo ezalaki komonana lokola bazalaki koleisa ebele ya bibwele na bango esika moko, na mayele alobi ete, “Tiká [kowelana, NW] ezala kati na biso na yo te, soko kati na babateli na ngai mpe babateli na yo te, mpo ete biso tozali bandeko. Mokili mobimba ezali liboso na yo te? Bongo kabwaná na ngai. Soko okokenda na lobɔkɔ na mwasi, ngai nde nakokenda na lobɔkɔ na mobali; soko yo okokenda na lobɔkɔ na mobali nde ngai nakokenda na lobɔkɔ na mwasi.”—Genese 13:3-11.
Abalayama asalelaki lotomo na ye mpo na kopona liboso te. Kutu, atikaki nde elenge apona esika eleki kitoko. Tokoki komekola ndakisa malamu oyo Abalayama amonisaki. Tokoki kosilisa matata oyo ebimi soki tokei kosolola elongo na moninga likambo yango na malɛmbɛ mpe na kozanga kotalela matomba na biso moko.—Baloma 12:18.
Bambula mingi na nsima, ntango Yakobo, mwana ya mwana ya Abalayama akendaki na Luzi, alɔtaki ndɔtɔ oyo ekamwisaki ye. Amonaki “ebuteli etɛlɛmaki na mokili mpe nsɔngɛ na yango ekómaki na likoló, mpe talá, baanzelu na Nzambe bazalaki kobuta mpe kokita na yango!” (Genese 28:11-19, NW; kokanisá na Yoane 1:51.) Ndɔtɔ yango ezalaki na ndimbola monene. Baanzelu oyo Yakobo amonaki balingaki kosalela ye mosala mpo na kokokisa elaka oyo Nzambe apesaki ye na ntina na mombóto na ye. Etɛlɛmɛlo ya Yehova likoló ya ebuteli ezalaki komonisa ete ye nde akokamba baanzelu na mosala yango.
Yakobo alendisamaki makasi lokola amindimisaki ete akozwa lisungi ya Nzambe. Ntango alamukaki na mpɔngi, abéngaki esika yango Betele, oyo elimboli “Ndako ya Nzambe,” mpe alapaki ndai epai na Yehova ete: “Nakopesa yo ndambo moko na zomi kati na biloko nyonso bikopesa yo ngai.”a (Genese 28:20-22) Lokola ayebaki ete biloko nyonso oyo azalaki na yango Nzambe nde apesaki ye, asepelaki komonisa botɔndi na ye na kopesa likabo ya bolingo.
Lelo oyo mpe, baanzelu bazali kosala mosala mpo na bolamu ya baklisto. (Nzembo 91:11; Baebele 1:14) Bango mpe bakoki komonisa botɔndi mpo na mapamboli nyonso oyo bazali kozwa na kozaláká na “matɔndi mingi epai Nzambe.”—2 Bakolinti 9:11, 12.
Na nsima, bakitani ya Yakobo bakómaki libota mobimba. Mokambi na bango Yosua, abundisaki mpe alongaki mokonzi ya Betele oyo azalaki mopakano liboso ya kokamata mokili ya Kanana. (Yosua 12:16) Na eleko ya Basambisi, mosakoli-mwasi Debola azalaki kofanda pene na Betele mpe azalaki koyebisa Bayisalaele maloba ya Yehova. Samwele mpe azalaki kokende na Betele mbala na mbala wana azalaki kosambisa libota ya Yisalaele.—Basambisi 4:4, 5; 1 Samwele 7:15, 16.
Betele ekómi esika monene ya lipɛngwi
Kasi, nsima wana Bokonzi ekabwanaki na mobu 997 L.T.B., losambo ya pɛtɔ ezalaki lisusu kosalema na Betele te. Mokonzi Yelobama akómisaki Betele esika monene mpo na losambo ya mwana na ngɔmbɛ, mwana na ngɔmbɛ oyo bazalaki kokanisa ete ezalaki komonisa Yehova. (1 Mikonzi 12:25-29) Yango wana, ntango asakolaki libebi ya Betele, Hosea alobelaki yango lokola “Bete-awena,” oyo elimboli “Ndako ya masumu.”—Hosea 10:5, 8.
Atako Betele ekómaki esika monene ya masumu na makambo ya elimo, makambo oyo masalemaki kuna mazali ntango nyonso kopesa liteya monene. (Baloma 15:4) Liteya moko etali mosakoli oyo batángi nkombo na ye te oyo autaki na Yuda mpe batindaki ye na Betele mpo na kosakola libebi ya bitumbelo mpe ya banganga na yango. Yehova ayebisaki ye ete akozonga na Yuda, oyo ezalaki mosika te na sudi mpe asengelaki kolya to komela eloko na Betele te. Na molende nyonso, mosakoli oyo ayebisaki Yelobama mokonzi ya Yisalaele esakweli yango, alakelaki etumbelo ya Betele mabe. Kasi, na nsima atosaki Nzambe te na ndenge alyaki na ndako ya mobange moko oyo azalaki mosakoli na Betele. Mpo na nini? Mobange mosakoli yango akosaki ete anzelu ya Yehova atindaki ye ete ayamba moninga na ye mosakoli. Kozanga botosi ya mosakoli oyo autaki na Yuda ememelaki ye liwa ya mobesu.—1 Mikonzi 13:1-25.
Soki moninga moko mondimi alobi ete tósala likambo moko oyo emonani ete ezali mpenza malamu te, tokosala ndenge nini? Tosengeli komikundola ete ata toli oyo epesami na mokano malamu ekoki kopesa mpasi soki ezali toli ya mabe. (Matai 16:21-23) Soki tokoluka litambwisi ya Yehova na nzela ya libondeli mpe soki tokoyekola Liloba na ye, tokokima libunga monene oyo mosakoli wana batángi nkombo te asalaki.—Masese 19:21; 1 Yoane 4:1.
Pene na mbula 150 na nsima, mosakoli Amosa akendaki lisusu na nɔrdi kosakola ete Betele ekozwa etumbu. Na mpiko nyonso, Amosa atɔndɔlaki misala mabe ya bato ya Betele, bakisa na nganga Amasia, oyo na lolendo nyonso alobaki na Amosa ete ‘akima na mokili na Yuda.’ Kasi, Amosa abangaki te koyebisa Amasia likama oyo elingaki kokómela libota na ye. (Amosa 5:4-6; 7:10-17) Ndakisa na ye ekundweli biso ete Yehova akoki kopesa mpiko na basaleli na ye oyo bazali na komikitisa.—1 Bakolinti 1:26, 27.
Na nsuka, Yosiya, mokonzi ya sembo, alongolaki ‘etumbelo oyo ezalaki na Betele, atumbaki esika na likoló, abukaki yango mikemike lokola mputulu, mpe atumbaki likonzi ya bulɛɛ.’ (2 Mikonzi 23:15, 16) Lelo oyo, bankulutu bakoki komekola malamu ndakisa na ye na kolandáká na molende malako ya Nzambe mpe na kozwáká esika ya liboso mpo na kobatela bopɛtɔ ya lisangá.
Lisolo ya Betele emonisi makambo oyo ebimaka ntango bato bazali sembo mpe ntango bazangi sembo, ntango bazali kotosa mpe ntango bazali kotosa Yehova te. Bambula mingi liboso, Mose atyaki liponi oyo liboso ya libota ya Yisalaele ete: “Natii liboso na yo lelo bomoi mpe malamu, mpe kufa mpe mabe.” (Deteronome 30:15, 16) Soki tomanyoli lisolo ya Betele, ekolendisa biso na kobatela “Ndako ya Nzambe” ezala esika mpo na losambo ya solo, kasi “Ndako ya masumu” te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na bolingo malamu, Yakobo na Abalayama bapesaki ndambo na zomi.
[Elilingi na lokasa 23]
Bitika ya engumba Betele, epai Yelobama atyaki esika monene mpo na losambo ya mwana na ngɔmbɛ