Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/9 nk. 8-13
  • Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebongiseli ya Yehova
  • Ndenge nini ebongiseli ya Nzambe ezali kobatela biso?
  • Banani bazali kati na ebongiseli ya Nzambe?
  • Kozala moninga ya mokili
  • “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ozali kokende liboso elongo na ebongiseli ya Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ndenge nini Yehova azali kotambwisa ebongiseli na ye?
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/9 nk. 8-13

Zwá libateli na ebongiseli ya Nzambe

“Nkombo na [Yehova] ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.”​—MASESE 18:10.

1. Libondeli ya Yesu emonisi ete baklisto bazali na mokakatano nini?

MWA moke liboso akufa, Yesu abondelaki Tata na ye ya likoló mpo na bayekoli na ye. Na komibanzabanza oyo emonisaki ete alingaki bango, alobaki ete: “Ngai napesi bango liloba na yo mpe bamokili basili koyina bango zambi bazali bato na mokili te [lokola] ngai nazali moto na mokili te. Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe.” (Yoane 17:14, 15) Yesu ayebaki ete mokili ekozala esika mabe mpo na baklisto. Bato ya mokili basengelaki komonisa ete bayini bango na kokoseláká bango makambo mpe konyokoláká bango. (Matai 5:11, 12; 10:16, 17) Elingaki mpe kobebisa bango.​—2 Timote 4:10; 1 Yoane 2:15, 16.

2. Baklisto bakoki kozwa libateli ya elimo epai wapi?

2 Ntoma Yoane amonisaki ete mokili oyo ekoyina baklisto esangisi bato oyo baboyi Nzambe mpe batambwisami na Satana. (1 Yoane 5:19) Mokili yango ezali monene mingi koleka lisangá ya boklisto, mpe ye moko Satana aleki bato na nguya. Bongo, koyina oyo euti na mokili ezali mpenza likama. Bayekoli ya Yesu bakoki kozwa libateli ya elimo epai wapi? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛ́mbɛ 1922 (na Lingelesi) epesaki eyano oyo: “Tozali sikawa na eleko mabe. Ebongiseli ya Satana ezali kobunda etumba na ebongiseli ya Nzambe. Ezali mpenza etumba monene.” Na etumba yango, ebongiseli ya Nzambe ezali esika ya libateli ya elimo. Liloba “ebongiseli,” (Lifalanse, organisation) ezali na Biblia te, mpe na bambula ya 1920, koloba “ebongiseli ya Nzambe” ezalaki likambo ya sika. Na bongo, ebongiseli yango ezali nini? Mpe ndenge nini tokoki kozwa libateli na ebongiseli yango?

Ebongiseli ya Yehova

3, 4. (a) Ndenge nini diksionere moko mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimboli liloba ebongiseli? (b) Na ndimbola nini tokoki kobénga bondeko oyo esangisi Batatoli ya Yehova na mokili mobimba ete ebongiseli?

3 Diksionere moko (Concise Oxford Dictionary) elimboli ebongiseli lokola “etuluku oyo esali liboke moko.” Na kolanda ndimbola wana, tokangi ntina ete lokola na ekeke ya liboso bantoma babongisaki masangá ya baklisto na mboka na mboka mpe lisangani moko ya mikóló-bakambi ezalaki na Yelusaleme mpo na kotambwisa masangá yango, “libota mobimba ya bandeko” ebongi kobéngama ete ebongiseli. (1 Petelo 2:17, NW) Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali na ebongiseli lolenge moko. Bomoko ya ebongiseli ya ekeke ya liboso elendisamaki na “makabo na motindo na mibali,” lokola “babateli mpe bateyi.” Ezali na baoyo bazalaki kotambola mpo na kotala lisangá moko nsima na mosusu, nzokande basusu bazalaki bankulutu kati na masangá na bango. (Baefese 4:8, 11, 12; Misala 20:28) Lelo oyo, “makabo” motindo moko ezali kolendisa bomoko ya Batatoli ya Yehova.

4 Mpo na liloba “ebongiseli,” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1922 (na Lingelesi) elobaki boye: “Ebongiseli ezali lisangá ya bato mpo na kokokisa mokano oyo bamityeli.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki mpe ete soki babéngi Batatoli ya Yehova ete bazali ebongiseli, elingi koloba te ete bazali “mwa lingomba ya nkuku na ndenge liloba yango esalelamaka, kasi elimboli bobele ete Bayekoli ya Biblia [Batatoli ya Yehova] bazali kosala molende ya kokokisa mikano ya Nzambe mpe kosala yango ndenge oyo Nkolo asalaka makambo nyonso: na mobulu te.” (1 Bakolinti 14:33) Ntoma Paulo amonisaki ete na mikolo na ye, baklisto bazalaki kosala makambo na mobulu te. Akokanisaki bondeko ya baklisto bapakolami na nzoto ya moto, oyo ezali na biteni mingi, moko na moko ezali kokokisa mosala na yango mpo ete nzoto mobimba etambola malamu. (1 Bakolinti 12:12-26) Wana ezali elilingi malamu mpenza ya ebongiseli! Mpo na nini baklisto bazalaki kati na ebongiseli? Mpo na kosala “mokano ya Nzambe,” kosala oyo Yehova alingi.

5. Ebongiseli ya Nzambe oyo ezali komonana ezali nini?

5 Biblia esakolaki ete na mikolo na biso baklisto ya solo bakosangana, bakozala esika moko na “mokili” lokola “libota” moko epai ‘bakongɛnga lokola miinda na mokili.’ (Yisaya 66:8; Bafilipi 2:15) “Libota” yango ebongisami esangisi bato koleka milio mitano na ndambo na moi ya lelo. (Yisaya 60:8-10, 22) Nzokande, ebongiseli ya Nzambe esuki wana te. Baanzelu mpe bazali na ebongiseli yango.

6. Na ndimbola na yango monene, ebongiseli ya Nzambe esangisi banani?

6 Tozali na bandakisa mingi oyo emonisi baanzelu bazali kosala elongo na basaleli ya Nzambe. (Genese 28:12; Danyele 10:12-14; 12:1; Baebele 1:13, 14; Emoniseli 14:14-16) Na yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Máí 1925 (na Lingelesi) elobaki solo ete: “Baanzelu basantu nyonso bazali kati na ebongiseli ya Nzambe.” Ebakisaki ete: “Nkolo Yesu Klisto, oyo azali na nguya mpe bokonzi nyonso, [azali] motó ya ebongiseli ya Nzambe.” (Matai 28:18) Yango wana, na ndimbola na yango ya monene, ebongiseli ya Nzambe esangisi baoyo nyonso bazali kosala elongo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe, ezala na likoló to awa na mabelé. (Talá etanda.) Kozala na ebongiseli yango ezali mpenza libaku malamu! Mpe tozali na esengo ya kozela ntango oyo bikelamu nyonso ya bomoi, oyo bizali na likoló mpe awa na mabelé, bikobongisama mpo na kosanzola Yehova Nzambe na bomoko! (Emoniseli 5:13, 14) Kasi, ndenge nini ebongiseli ya Nzambe ezali kobatela lelo oyo?

Ndenge nini ebongiseli ya Nzambe ezali kobatela biso?

7. Ebongiseli ya Nzambe ebatelaka biso ndenge nini?

7 Ebongiseli ya Nzambe ekoki kobatela biso liboso ya Satana mpe masenginya na ye. (Baefese 6:11) Satana azali kosala bopusi mabe, konyokola, mpe komeka basambeli ya Yehova; nyonso wana na mokano se moko: kopɛngwisa bango na ‘nzela ekoki na bango kotambola.’ (Yisaya 48:17; kokanisá na Matai 4:1-11.) Kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, likoki ya kokima komekama wana nyonso ezali te. Kasi, boyokani na biso makasi elongo na Nzambe mpe ebongiseli na ye ezali kolendisa mpe kobatela biso mpe na bongo kosalisa biso ete tótikala na “nzela.” Yango wana, tozali kobungisa elikya te.

8. Ndenge nini ebongiseli ya Yehova oyo emonanaka te esungaka basaleli na ye awa na mabelé?

8 Ndenge nini ebongiseli ya Nzambe ebatelaka biso? Ya liboso, bikelamu ya elimo oyo bizali kosalela Yehova bisungaka biso ntango nyonso. Ntango Yesu amekamaki makasi, anzelu moko ayaki kosunga ye. (Luka 22:43) Ntango Petelo azalaki na esika oyo akokaki kokufa, anzelu moko abikisaki ye na ndenge ya likamwisi. (Misala 12:6-11) Atako lelo oyo bikamwiseli ya ndenge yango esalemaka te, Yehova alaki basaleli na ye ete baanzelu bakosunga bango na mosala na bango ya kosakola. (Emoniseli 14:6, 7) Mbala mingi, ntango bazali na mikakatano, bazalaka na nguya oyo eleki nguya ya bomoto. (2 Bakolinti 4:7) Lisusu, bayebi ete “[anzelu, NW] na [Yehova] akozingela esika na baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.”​—Nzembo 34:7.

9, 10. Ndenge nini tokoki koloba ete “nkombo ya Yehova ezali ndako molai,” mpe ndenge nini tokoki kosalela motinda yango mpo na ebongiseli mobimba ya Nzambe?

9 Ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana ezali mpe esika ya libateli. Na ndenge nini? Na Masese 18:10, tozali kotánga ete: “Nkombo na [Yehova] ezali ndako molai na nguya; moyengebene akokima kuna mpe akobika.” Yango elimboli te ete bobele kobelela nkombo ya Nzambe mpamba nde ebatelaka. Kasi, mpo na biso, koluka libateli na nkombo ya Nzambe elimboli kotya elikya na biso epai na Yehova ye moko. (Nzembo 20:1; 122:4) Elimboli kopesa mabɔkɔ na bokonzi na ye, kobatela mibeko mpe mitinda na ye, mpe kondimela bilaka na ye. (Nzembo 8:1-9; Yisaya 50:10; Baebele 11:6) Elimboli mpe kosambela se Yehova. Bobele baoyo basambelaka Yehova na ndenge yango nde bakoki koloba lokola mokomi na nzembo ete: “Mitema na biso mikosepela na [Yehova], tokozala na elikya na nkombo na ye na bulɛɛ.”​—Nzembo 33:21; 124:8.

10 Bato nyonso oyo bazali na ebongiseli ya Nzambe awa na mabelé bazali koloba lokola Mika ete: “Nde biso tokotambola na nkombo na [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) “Yisalaele ya Nzambe,” oyo Biblia ebéngi yango ete “bato mpo na nkombo na ye” ezali moboko ya ebongiseli ya Nzambe na mikolo na biso. (Bagalatia 6:16; Misala 15:14; Yisaya 43:6, 7; 1 Petelo 2:17) Na yango, kozala na ebongiseli ya Yehova elimboli kozala kati na libota oyo ezali koluka, mpe kozwa, libateli na nkombo ya Nzambe.

11. Na makambo nini ya sikisiki ebongiseli ya Yehova ebatelaka baoyo basangani na yango?

11 Ebongiseli ya Nzambe oyo ezali komonana ezali mpe lisangá ya kondima, lisangani ya bandimi oyo bazali koyikisana mpiko mpe kolendisana. (Masese 13:20; Baloma 1:12) Ebongiseli ezali esika oyo baklisto bakɛngɛli bazali kobatela bampate, bazali kolendisa babɛli mpe baoyo bazali konyokwama na makanisi, mpe bazali kotɛlɛmisa baoyo bakwei. (Yisaya 32:1, 2; 1 Petelo 5:2-4) “Moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa “bilei na elaka na yango” na nzela ya ebongiseli yango. (Matai 24:45) “Moombo” yango, elingi koloba baklisto bapakolami, azali kopesa bilei ya elimo oyo bileki kitoko—boyebi ya sikisiki ya Biblia oyo ekoki komema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Na nzela ya litambwisi euti na “moombo,” baklisto bazali kosalisama ete bábatela bizaleli malamu mpe bázala na “bokɛngi lokola banyoka mpe na likambo te lokola bibenga” na mokili oyo etondi na makama. (Matai 10:16, NW) Mpe bazali kosalisa bango ete bázala ntango nyonso na “mosala mingi kati na mosala ya Nkolo” oyo ezali mpe libateli ya nguya.​—1 Bakolinti 15:58.

Banani bazali kati na ebongiseli ya Nzambe?

12. Banani bamonisami ete bazali kati na ebongiseli ya Nzambe na likoló?

12 Lokola libateli yango ezali mpo na baoyo bazali na ebongiseli ya Nzambe, boye banani bazali na ebongiseli yango? Mpo na ebongiseli ya likoló, ezali mpasi te koyanola na motuna yango. Satana na baanzelu na ye bazali lisusu na likoló te. Nzokande, baanzelu ya sembo bazali naino kuna, bayangani “na likita monene.” Ntoma Yoane amonaki ete na mikolo ya nsuka, “Mwana na Mpate,” bakeluba (“bikelamu minei ya bomoi”), mpe “baanzelu mingi” bakozala penepene ya kiti ya bokonzi ya Nzambe. Basengeli kozala esika moko na mikóló 24—elilingi ya baklisto bapakolami oyo basili kozwa libula na bango ya nkembo kuna na likoló. (Baebele 12:22, 23, NW; Emoniseli 5:6, 11; 12:7-12, NW) Ezali polele ete bango nyonso bazali kati na ebongiseli ya Nzambe. Kasi, mpo na bato, makambo ezali pɛtɛɛ te.

13. Ndenge nini Yesu amonisaki baoyo bazali na ebongiseli ya Nzambe mpe baoyo bazali kati na yango te?

13 Yesu alobaki mpo na bato mosusu oyo bakoloba ete bazali kolanda ye ete: “Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! tosakolaki na nkombo na yo te? Tobimisaki bilimo mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, Nayebi bino soko moke te! Bólongwa na ngai, bino [babuki na mibeko, NW].” (Matai 7:22, 23) Soki moto azali mobuki ya mibeko, ezali mpasi mpo azala na ebongiseli ya Nzambe, ata soki ye moko azali koloba nini, mpe ata soki asambelaka na lingomba nini. Yesu amonisaki mpe ndenge ya koyeba moto oyo azali na ebongiseli ya Nzambe. Alobaki ete: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! akoingela kati na Bokonzi na Likoló te kasi ye oyo akosalaka mokano na Tata na ngai oyo azali na Likoló.”​—Matai 7:21.

14. Makambo nini matali mokano ya Nzambe mamonisami ete masengeli komonana epai na baoyo bazali na ebongiseli ya Nzambe?

14 Na yango, mpo moto azala na ebongiseli ya Nzambe—epai oyo “bokonzi ya likoló” ezali na esika ya liboso—asengeli kosalaka mokano ya Nzambe. Mokano ya Nzambe ezali nini? Paulo amonisaki likambo moko ya ntina na oyo etali mokano yango ntango alobaki ete: “[Nzambe] alingi ete bato ya motindo nyonso bábika mpe ete báyeba solo na bosikisiki.” (1 Timote 2:4, NW) Soki moto azali mpenza na mposa ya kozwa boyebi ya sikisiki ya Biblia, kosalela yango na bomoi na ye, mpe koyebisa yango epai ya “bato [ya mitindo, NW] nyonso,” boye azali kosala mokano ya Nzambe. (Matai 28:19, 20; Baloma 10:13-15) Mokano ya Nzambe ezali mpe ete bampate ya Yehova báleisama mpe bábatelama. (Yoane 21:15-17) Na likambo yango, makita ya boklisto ezali na ntina. Moto nyonso oyo azali na makoki ya koyangana na makita yango kasi azali komonisa bopɔtu mpo na kosala yango azali na botɔndi te mpo na esika na ye na ebongiseli ya Nzambe.​—Baebele 10:23-25.

Kozala moninga ya mokili

15. Yakobo apesaki likebisi nini na masangá ya mikolo na ye?

15 Mbula soko 30 nsima ya liwa ya Yesu, ndeko na ye Yakobo amonisaki mwa makambo oyo ekoki kosala ete moto abungisa esika na ye na ebongiseli ya Nzambe. Akomaki ete: “Bino bato na bosɔtɔ, boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.” (Yakobo 4:4) Monguna ya Nzambe azali na esika te na ebongiseli na ye. Kasi, kozala moninga ya mokili elimboli nini? Kozala moninga ya mokili emonanaka na makambo ndenge na ndenge, lokola kosala boninga na bato ya mabe. Lisusu, Yakobo alobeli likambo moko ya sikisiki: elimo ebongi te oyo ememaka na bizaleli mabe.

16. Makambo nini ezalaki ntango Yakobo akebisaki ete kozala moninga na mokili ezali kozala monguna na Nzambe?

16 Na Yakobo 4:1-3, tozali kotánga boye: “Bitumba mpe koswana na kati na bino iuti wapi? Iuti te na mposa mabe na bino oyo ikobunaka na kati na bilembo na nzoto na bino? Bokolukaka nde bokozwaka te; bokobomaka mpe bokoyokaka zuwa, nde boyebi kozwa te. Bokoswanaka mpe bokobundaka etumba nde bokozwaka te mpo bokolɔmbaka te. Ata bokolɔmbaka, bokokamataka te mpo ete bokolɔmbaka na nzela mabe mpo na kobebisa yango na mposa na bino mabe.” Yakobo akebisaki mpo na likambo ya kozala baninga ya mokili nsima ya kokoma makambo oyo.

17. Na ndenge nini “bitumba” mpe “kowelana” ezalaki kati na ebongiseli ya boklisto na ekeke ya liboso?

17 Elekaki bikeke mingi nsima ya liwa ya Yakobo, baklisto ya lokuta babundaki etumba mpe babomanaki na ndenge ya solo mpenza. Kasi, Yakobo akomelaki basangani ya “Yisalaele ya Nzambe” na ekeke ya liboso, oyo basengelaki kokóma ‘banganga mpe bakonzi’ na likoló. (Emoniseli 20:6) Bango babomanaki bango na bango na bitumba ya solosolo te. Kasi mpo na nini Yakobo alobaki makambo ya ndenge wana na kati ya baklisto? Toyebi ete ntoma Yoane abéngaki moto nyonso oyo ayini ndeko na ye ete azali mobomi na bato. Mpe Paulo abéngaki matata mpe koswana oyo ezali kobima na lisangá ete “bitumba” mpe “kowelana.” (Tito 3:9; 2 Timote 2:14; 1 Yoane 3:15-17) Se na makanisi wana, Yakobo akanisaki kozanga bolingo mpo na baninga baklisto. Baklisto bazalaki kosalana makambo ndenge bato ya mokili basalanaka makambo kati na bango.

18. Kati na baklisto, nini ekoki kobimisa misala mpe mayoki oyo ezali komonisa ete bolingo ezali te?

18 Mpo na nini makambo motindo wana esalemaki na lisangá ya boklisto? Esalemaki na ntina na elimo oyo ebongi te, lokola lokoso mpe “mposa mabe.” Lolendo, zuwa, mpe koluka lokumu ekoki mpe kobebisa bondeko ya baklisto na kati ya lisangá, bondeko oyo etongami na bolingo. (Yakobo 3:6, 14) Elimo motindo wana ekómisaka moto moninga ya mokili mpe na mbala moko monguna ya Nzambe. Moto oyo azali na elimo motindo wana akoki kolikya te ete akotikala na ebongiseli ya Nzambe.

19. (a) Soki moklisto moko amoni ete makanisi mabe ebandi kokola na motema na ye, esengeli libosoliboso kopesa foti na nani? (b) Ndenge nini moklisto akoki kolonga makanisi mabe?

19 Soki makanisi mabe ebandi kokola na motema na biso, tokopesa foti na nani? na Satana? Tokoki koloba ɛɛ. Satana azali “mokóló na nguya na mopɛpɛ” ya mokili oyo, epai elimo motindo wana etondi. (Baefese 2:1, 2; Tito 2:12) Kasi, mbala mingi, misisa ya makanisi mabe ezalaka nde na kati ya nzoto na biso oyo ezangi kokoka. Nsima ya kokebisa na likambo ya kozala baninga ya mokili, Yakobo akomaki ete: “Bokanisi ete likomami elobi mpamba ete: ‘Elimo oyo eyei kofanda kati na biso ezali na mposa makasi ya bilulela?’” (Yakobo 4:5, NW) Mitema na biso nyonso ezalaka na mposa ya kosala makambo mabe. (Genese 8:21; Baloma 7:18-20) Kasi, tokoki kobundisa mposa wana soki tondimi bolɛmbu na biso mpe totyeli lisalisi ya Yehova motema mpo na kolonga yango. Yakobo alobi ete: “Nde [Nzambe] akopesa ngɔlu eleki . . . [mposa mabe oyo ezali na motema na biso].” (Yakobo 4:6) Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpe lisungi ya bandeko baklisto ya sembo, mpe na mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki, baklisto ya sembo bazali kolonga bolɛmbu ya nzoto. (Baloma 7:24, 25) Babatelami kati na ebongiseli ya Nzambe, bazali baninga ya Nzambe, kasi baninga ya mokili te.

20. Baoyo bazali na ebongiseli ya Nzambe bazali kozwa mapamboli nini?

20 Biblia elaki ete: “[Yehova] akopesaka nguya epai na bato na ye; [Yehova] akopambola bato na ye na kimya.” (Nzembo 29:11) Soki tozali mpenza na “libota” ya Yehova na mikolo na biso, elingi koloba ebongiseli na ye oyo ezali komonana, tokozwa nguya oyo azali kopesa mpe tokozala na kimya oyo azali kopesa bato na ye. Ya solo, mokili ya Satana ezali monene koleka ebongiseli ya Yehova oyo ezali komonana, mpe Satana aleki biso na makasi. Kasi, Yehova azali Mozwi-na-nguya-Nyonso. Nguya na ye oyo ezali kosala mosala ekoki kolongama te. Mpe lisusu baanzelu na ye ya nguya basangani na biso mpo na kosalela Nzambe. Na yango, atako bazali koyina biso, tokoki kotikala ngwi. Biso mpe tokoki kolonga mokili ndenge Yesu alongaki.​—Yoane 16:33; 1 Yoane 4:4.

Okoki kolimbola?

◻ Ebongiseli ya Nzambe oyo ezali komonana ezali nini?

◻ Ebongiseli ya Nzambe ebatelaka na makambo nini?

◻ Banani bazali basangani ya ebongiseli ya Nzambe?

◻ Ndenge nini tokoki koboya kozala baninga ya mokili?

[Etanda na lokasa 9]

Ebongiseli ya Nzambe ezali nini?

Na mikanda ya Batatoli ya Yehova, ebéngeli “ebongiseli ya Nzambe” esalelami na ndenge misato.

1 Ebongiseli ya Yehova na likoló, oyo emonanaka te, mpe esangisi bikelamu ya elimo oyo bizali sembo. Kati na Biblia ebongiseli yango ebéngami “Yelusaleme ya likoló.”​—Bagalatia 4:26.

2 Ebongiseli ya basaleli ya Yehova oyo ezali komonana. Lelo oyo yango esangisi batikali bapakolami na ebele monene.

3 Ebongiseli ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba. Lelo oyo, yango esangisi ebongiseli ya Yehova na likoló na bapakolami na ye, baoyo andimi ete bázala bana na ye awa na mabelé, baoyo bazali na elikya ya kokende na likoló. Na nsima, ekosangisa mpe bato ya kokoka awa na mabelé.

[Elilingi na lokasa 10]

Ebongiseli ya Yehova ezali kopesa bilei ya elimo oyo bileki malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto