Kebá na kozanga kondima
“Bandeko, bókebaka ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te.”—BAEBELE 3:12.
1. Maloba ya Paulo epai ya baklisto Baebele ebendi likebi na biso likoló na likambo nini ya nsɔmɔ?
EZALI mpenza likambo ya nsɔmɔ ete bato oyo bazalaki na boyokani malamu na Yehova bakokaki kokóma na “motema mabe” mpe ‘bátangwa na Nzambe na bomoi’! Mpe yango ezali likebisi! Ntoma Paulo alobaki makambo yango epai ya bato oyo bazangi kondima te, kasi epai ya bato oyo bamipesaki epai na Yehova na kondimáká mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto.
2. Mituna nini tosengeli kotalela?
2 Ndenge nini moto oyo azalaki na ezaleli malamu motindo wana na elimo akokaki kokóma na “motema mabe mpe na kozanga kondima”? Ɛɛ, ndenge nini moto oyo asilaki komona bolingo mpe ngɔlu ya Nzambe akokaki, na nko nyonso, kotangwa na ye? Likambo yango, ekoki nde kokómela moko na biso? Tosengeli kokanisa makambo oyo na mozindo, mpe ezali malamu tóluka koyeba ntina oyo bapesi biso likebisi yango.—1 Bakolinti 10:11.
Mpo na nini toli ya makasi boye?
3. Lobelá makambo oyo mazalaki na bopusi likoló na baklisto na ekeke ya liboso na Yelusaleme mpe zingazinga na yango.
3 Emonani ete Paulo atindelaki baklisto Baebele oyo bazalaki na Yudea mokanda na mobu 61 T.B. Nganga-mayele moko ya istware alobaki ete na eleko yango “mpo na moto nyonso oyo akanisaka mpe azali sembo, kimya to libateli ezalaki te, ezala na kati ya engumba Yelusaleme to esika mosusu nyonso na etúká mobimba.” Mobulu ezalaki mingi mpe bato bazalaki lisusu kotosa mibeko te; nyonso wana ebimaki mpamba te bato bazalaki kosepela te na ndenge basoda ya Loma bafandaki na mboka na bango, Bayuda oyo babéngami Bazelote bazalaki kotombokela boyangeli ya Loma, mpe lisusu bayibi batalelaki yikiyiki wana lokola libaku malamu mpo na misala na bango. Nyonso wana esalaki ete makambo mázala mpasi mpo na baklisto, oyo bazalaki kosala nyonso mpo bámikɔtisa na makambo yango te. (1 Timote 2:1, 2) Kutu, lokola baboyaki komikɔtisa na makambo yango, bamonanaki lokola bato oyo bazali kotya nkaka, mpe bazali kopusa bato mosusu ete bátosa bakonzi te. Mbala mingi baklisto bazalaki konyokolama, mpe babungisaki biloko na bango.—Baebele 10:32-34.
4. Baklisto Baebele bazalaki na mokakatano nini etali makambo ya lingomba?
4 Baklisto Baebele batungisamaki mingi lisusu na makambo ya lingomba. Molende ya bayekoli ya sembo ya Yesu mpe bokoli ya nokinoki oyo ezalaki komonana na lisangá ya boklisto epesaki Bayuda zuwa mpe engalisaki nkanda na bango—mingimingi bakonzi ya mangomba na bango. Bazalaki kosala nyonso mpo na kolukela bayekoli ya Yesu Klisto mindɔndɔ mpe konyokola bango.a (Misala 6:8-14; 21:27-30; 23:12, 13; 24:1-9) Ata soki baklisto mosusu bazwaki minyoko ya polele te, Bayuda bazalaki kotyola mpe kosɛka bango. Boklisto etyolamaki lokola lingomba oyo ebimaki sika, ezalaki na lokumu lokola Lingomba ya Bayuda te, ezalaki na tempelo te, ezalaki na bonganga te, ezalaki na bilambo te, bazalaki kopesa biloko lokola mbeka te, mpe bongo na bongo. Kutu babomaki Yesu, mokambi na bango, lokola mosali na mabe. Mpo na kolanda lingomba na bango, baklisto basengelaki kozala na kondima, na mpiko, mpe na molende.
5. Mpo na nini ezalaki na ntina mingi ete baklisto ya Yudea básɛnzɛlaka ntango nyonso?
5 Longola nyonso wana, baklisto Baebele na Yudea bazalaki na bomoi na eleko moko ya ntina mingi kati na lisolo ya ekólo wana. Makambo mingi oyo Nkolo na bango Yesu Klisto alobaki ete makomonisa nsuka ya ebongiseli ya Bayuda masilaki kosalema. Nsuka ezalaki lisusu mosika te. Mpo na kobika, baklisto basengelaki kosɛnzɛla ntango nyonso na elimo mpe kozala pene ya ‘kokima na ngomba.’ (Matai 24:6, 15, 16) Balingaki nde kozala na kondima mpe na mpiko na elimo oyo esengeli mpo ete básala lokola Yesu atindaki? Esika wana nde mwa mokakatano ezalaki.
6. Baklisto ya Yudea bazalaki na mposa ya eloko nini nokinoki?
6 Emonani ete na boumeli ya mbula zomi oyo etikalaki liboso ete ebongiseli ya biloko ya Bayuda ebomama mobimba, baklisto Baebele bazalaki kokutana na mikakatano makasi ezala na kati to na libándá ya lisangá. Bazalaki na mposa ya bilendiseli. Kasi bazalaki mpe na mposa ya toli mpe litambwisi mpo na kosalisa bango bámona ete nzela oyo baponaki ezalaki nzela ya sembo mpe ete bamonaki mpasi mpe bayikaki mpiko ya mpamba te. Likambo ya esengo, Paulo amonisaki ete akoki kosala yango mpe asungaki bango.
7. Mpo na nini tosengeli kotyela makambo oyo Paulo akomelaki baklisto Baebele likebi?
7 Tosengeli kotya likebi mingi na makambo oyo Paulo akomelaki baklisto Baebele. Mpo na nini? Mpamba te tozali kobika na eleko oyo ekokani na eleko na bango. Mokolo na mokolo tozali kokutana na mikakatano oyo mizali kouta na mokili etambwisami na Satana. (1 Yoane 5:19) Tozali komona kokokisama ya bisakweli ya Yesu mpe ya bantoma na ntina na mikolo ya nsuka mpe “nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.” (Matai 24:3-14, NW; 2 Timote 3:1-5; 2 Petelo 3:3, 4; Emoniseli 6:1-8) Longola nyonso wana, tosengeli kosɛnzɛla na elimo mpo ete ‘tózala na makasi ya kokima makambo oyo nyonso malingi koya.’—Luka 21:36.
Ye oyo aleki Mose
8. Na kolobáká makambo oyo mazwami na Baebele 3:1, Paulo azalaki kolendisa baninga na ye baklisto ete básala nini?
8 Paulo alobelaki likambo moko ya ntina ntango akomaki ete: “[Bótalela, NW] Yesu, ye Ntoma mpe Nganga Monene na biyambweli na biso.” (Baebele 3:1) “Kotalela” elimboli “kososola malamu . . . , kokanga mpenza ntina, kotalela na bozindo.” (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) Na yango, Paulo azalaki kolendisa baninga na ye bandimi ete básala molende mpo na kozwa bososoli ya solosolo ya mokumba oyo Yesu akokisaki mpo na kondima mpe lobiko na bango. Yango elingaki kolendisa ekateli na bango ya kotikala ngwi kati na kondima. Kasi, mokumba ya Yesu ezalaki nini, mpe mpo na nini tosengeli “kotalela” ye?
9. Mpo na nini Paulo abéngaki Yesu “ntoma” mpe “nganga monene”?
9 Paulo abéngaki Yesu “ntoma” mpe “nganga monene.” “Ntoma” ezali moto oyo batindi, mpe na esika oyo, ezali nzela oyo Nzambe asalelaki mpo na kosolola na bato. “Nganga monene” ezali ye oyo, na nzela na ye, bato bakoki kobɛlɛma na Nzambe. Bibongiseli oyo mibale bizali na ntina mingi mpo na losambo ya solo, mpe Yesu azali kokokisa yango nyonso. Batindaki ye longwa na likoló mpo na koteya bato solo na ntina na Nzambe. (Yoane 1:18; 3:16; 14:6) Yesu azali mpe moto oyo aponamaki mpo na kozala Nganga Monene na ebongiseli ya tempelo ya Yehova na elimo mpo na kolimbisa masumu. (Baebele 4:14, 15; 1 Yoane 2:1, 2) Soki tozali mpenza kosepela na mapamboli oyo tokoki kozwa na nzela ya Yesu, tokozala na mpiko mpe ekateli ya kotikala ngwi kati na kondima.
10. (a) Lolenge nini Paulo asalisaki baklisto Baebele básosola ete lingomba ya boklisto eleki Lingomba ya Bayuda? (b) Paulo atángi bosolo nini oyo endimami na bato nyonso mpo na kondimisa likanisi na ye?
10 Mpo na komonisa lisusu motuya ya kondima ya baklisto, Paulo akokanisaki Yesu na Mose, ye oyo Bayuda bazalaki kotalela lokola mosakoli alekaki basakoli nyonso kati na bankɔkɔ na bango. Soki baklisto Baebele bakangaki mpenza ntina ete Yesu aleki Mose, mbɛlɛ bakokaki kokakatana te ete lingomba ya boklisto eleki Lingomba ya Bayuda. Paulo amonisaki ete atako Mose atángamaki ete abongi kozwa mokumba ya “ndako” ya Nzambe—ekólo, to lisangá ya Yisalaele—azalaki bobele kapita ya sembo, to moombo. (Mituya 12:7) Nzokande, Yesu azalaki Mwana, nkolo ya ndako. (1 Bakolinti 11:3; Baebele 3:2, 3, 5) Mpo na kondimisa likanisi na ye, Paulo azongelaki bosolo oyo eyebani na bato nyonso ete: “Zambi ndako na ndako etongami na moto moko nde motongi na nyonso azali Nzambe.” (Baebele 3:4) Moto moko te akoki kobɛta ntembe na likambo oyo ete Nzambe aleki moto nyonso, mpamba te azali Motongi, to Mozalisi ya biloko nyonso. Na bongo, elongobani mpenza ete lokola Yesu azalaki mosalani na ye, boye aleki bikelamu nyonso, bakisa mpe Mose.—Masese 8:30; Bakolose 1:15-17.
11, 12. Paulo alendisaki baklisto Baebele ete básimba eloko nini ‘ngwi kino nsuka,’ mpe ndenge nini tokoki kosalela toli na ye?
11 Solo mpenza, baklisto Baebele bazwaki ngɔlu monene. Paulo akundwelaki bango ete bazalaki “basangani na kobyangama na Likoló,” libaku malamu oyo basengelaki mpenza kobatela koleka biloko mosusu nyonso oyo ebongiseli ya Bayuda ekokaki kopesa bango. (Baebele 3:1) Na ntembe te maloba ya Paulo epusaki baklisto bapakolami wana ete bázala na botɔ́ndi mpamba te balingaki kozwa libula ya sika na esika ete bázala na mawa mpo basundolaki makambo ya bankɔkɔ na bango Bayuda. (Bafilipi 3:8) Mpo na kolendisa bango ete básimba ngwi libaku malamu na bango mpe bátalela yango na motuya, Paulo alobaki: “Klisto azalaki sembo na ndako mobimba na [Nzambe] pelamoko mwana mpenza. Biso mpe tozali ndako na ye soko tokosimba kino nsuka molende mpe elikya oyo ezali biso komikumisa mpo na yango.”—Baebele 3:6.
12 Ɛɛ, mpo ete bábika na nsuka ya ebongiseli ya Bayuda oyo ekómaki pene, baklisto Baebele basengelaki kosimba elikya oyo Nzambe apesaki bango ngwi “kino nsuka.” Lelo oyo, biso mpe tosengeli kosala bongo soki tolingi kobika na nsuka ya ebongiseli oyo. (Matai 24:13) Tosengeli kotika nzela te ete mitungisi ya bomoi, to kozanga bosepeli oyo bato bazali komonisa, to bolɛmbu na biso moko oyo euti na kozanga kokoka emema biso na kotɛngatɛnga na kondima na biso kati na bilaka ya Nzambe. (Luka 21:16-19) Mpo na koyeba ndenge oyo tokoki komilendisa, tótya likebi na maloba ya Paulo oyo elandi.
“Bóyeisa mitema na bino makasi te”
13. Paulo apesaki likebisi nini, mpe ndenge nini alimbolaki Nzembo 95?
13 Nsima ya kolobela ngɔlu oyo baklisto Baebele bazwaki, Paulo akebisaki bango na maloba oyo: “Pelamoko elobi [elimo santu, NW] ete, Lelo oyo, soko bokoyoka mongongo na ye, bóyeisa mitema na bino makasi te lokola na ntango na kotomboka, na mikolo na komekama kati na lisobe.” (Baebele 3:7, 8) Paulo azongelaki maloba ya Nzembo 95, yango wana akokaki koloba ete ‘elimo santu elobi.’b (Nzembo 95:7, 8; Exode 17:1-7) Makomami mapemami na Nzambe na nzela ya elimo santu na ye.—2 Timote 3:16.
14. Ndenge nini Bayisalaele batalelaki makambo oyo Yehova asalelaki bango, mpe mpo na nini?
14 Nsima ya kosikolama na boombo na Ezipito, Bayisalaele bazwaki lokumu monene na ndenge basalaki kondimana na Yehova. (Exode 19:4, 5; 24:7, 8) Nzokande, na esika ete bámonisa botɔ́ndi mpo na likambo oyo Nzambe asalelaki bango, baumelaki te kotombokela ye. (Mituya 13:25–14:10) Likambo yango ekokaki kosalema ndenge nini? Paulo ayebisi ntina: bayeisaki mitema na bango makasi. Kasi ndenge nini mitema oyo mizali koyoka mpe kondima Liloba ya Nzambe mikómaka makasi? Mpe tosengeli kosala nini mpo ete likambo yango ekómela biso te?
15. (a) Ndenge nini ‘mongongo ya Nzambe’ eyokanaki na ntango ya kala, mpe ndenge nini ezali koyokana lelo oyo? (b) Tosengeli komituna mituna nini na ntina na ‘mongongo ya Nzambe’?
15 Paulo abandaki kokebisa na maloba oyo, “soko bokoyoka mongongo na ye.” Nzambe asololaki na libota na ye na nzela ya Mose mpe basakoli mosusu. Na nsima, Yehova asololaki na bango na nzela ya Mwana na ye, Yesu Klisto. (Baebele 1:1, 2) Lelo oyo, tozali na Biblia Mosantu, Liloba ya Nzambe na mobimba na yango. Tozali mpe na “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo Yesu aponi mpo na kopesa “bilei” ya elimo “na elaka na yango.” (Matai 24:45-47) Na ndenge yango, Nzambe azali koloba kino lelo. Kasi, toyokaka? Na ndakisa, tondimaka toli na ntina na molato mpe lolenge na biso ya kobongisa nzoto to kopona lolenge ya kominanola mpe miziki? ‘Toyokaka,’ elingi koloba totyaka likebi mpe totosaka makambo oyo tozali koyoka? Soki tomesani komilongisa to kotɛmɛla toli, tozali kokende na likama ya koyeisa mitema na biso makasi.
16. Na ndakisa, na likambo nini mitema na biso mikoki kokóma makasi?
16 Mitema na biso mikoki mpe kokóma makasi soki tozali koboya kosala makambo oyo tokoki mpe tosengeli kosala. (Yakobo 4:17) Atako makambo nyonso oyo Yehova asalelaki bango, Bayisalaele bamonisaki kondima te, batombokelaki Mose, baponaki kondima lapolo mabe mpo na mokili ya Kanana, mpe baboyaki kokɔta na Mokili ya Ndaka. (Mituya 14:1-4) Yango wana, Yehova alapaki ete bakolekisa mbula 40 kati na mokili mokauki—ntango oyo ekoki mpo ete bato nyonso ya libota wana oyo bazangaki kondima bákufa bango nyonso. Lokola Nzambe asepelaki na bango te, alobaki ete: “Libela bakopɛngwaka na mitema, bango bayebi nzela na ngai te. Pelamoko esimbaki ngai ndai na nkanda ete, Bakoingela kati na epemelo na ngai te.” (Baebele 3:9-11) Tososoli liteya oyo tokoki kozwa na likambo oyo?
Liteya mpo na biso
17. Mpo na nini Bayisalaele bazangaki kondima atako bamonaki misala minene ya Yehova mpe bayokaki maloba na ye?
17 Libota ya Yisalaele oyo babimaki na Ezipito bamonaki na miso na bango misala minene ya Yehova mpe bayokaki maloba na ye na matoi. Kasi, bandimaki te ete Nzambe akokaki kotambwisa bango kozanga likama kino na Mokili ya Ndaka. Mpo na nini? Yehova alobaki ete, “Bango bayebi nzela na ngai te.” Bayebaki makambo oyo Yehova alobaki mpe oyo asalaki, kasi batyaki motema mpe elikya na bango na makoki na ye ya kobatela bango te. Bamibanzabanzaki mingi mpo na bamposa na bango na boye ete batyelaki banzela ya Nzambe mpe mikano na ye likebi moke. Ɛɛ, bandimaki elaka na ye te.
18. Na kolanda maloba ya Paulo etamboli nini ememaka na “motema mabe mpe na kozanga kondima”?
18 Maloba oyo bayebisaki Baebele mabongi mpe mpo na biso: “Bandeko, bókebaka ete motema mabe mpe na kozanga kondima ezala kati na moko na bino te ete bótangwa na Nzambe na bomoi te.” (Baebele 3:12) Paulo akei kino na mosisa ya likambo na komonisáká ete ‘motema mabe oyo ezangi kondima’ eutaka na ‘kotangwa na Nzambe na bomoi.’ Mwa liboso kati na mokanda yango, alobelaki ‘kopɛngwa na nzela’ mpo na kozanga kotya motema. (Baebele 2:1) Nzokande, liloba ya Greke oyo ebongolami na “kotangwa” elimboli “kozala mosika” mpe eyokani na liloba “lipɛngwi.” Ezali kopesa likanisi ya koboya, kozonga nsima, komibebisa, oyo esalemi na nko mpe na mwa lityo.
19. Ndenge nini kozanga koyoka toli ekoki kobota mbuma mabe? Pesá ndakisa.
19 Na yango, liteya oyo tosengeli kozwa ezali ete soki tokómi na momeseno ya koboya “koyoka mongongo na ye,” tozali kotya likebi te na toli oyo Yehova azali kopesa kati na Liloba na ye mpe na nzela ya kelasi ya moombo ya sembo, mosika te tokokóma na mitema makasi. Na ndakisa, ekoki kokóma ete bato mibale oyo babalani naino te bazali kosimbanasimbana na nzoto mpe kopesana mapwɛpwɛ. Ezali boni soki batyeli likambo yango likebi te? Yango ekopekisa bango ete bázongela likambo yango, to ekokóma nde pɛtɛɛ mpo básala yango lisusu? Bobele bongo, ntango moombo ya sembo azali kopesa toli ete tosengeli koponaka miziki, lolenge ya kominanola, mpe bongo na bongo, tondimaka yango na botɔ́ndi nyonso mpe tobongisaka esika oyo tosengeli kobongisa? Paulo alendisaki biso ete ‘tótika koyangana elongo moko te.’ (Baebele 10:24, 25) Atako toli yango epesami, bamoko bazali kotalela makita ya boklisto bobele bongobongo. Bakoki kokanisa ete kozangisa makita mosusu to mpe kopona makita oyo bakoyangana, ekosala eloko moko te.
20. Mpo na nini ezali na ntina ete tóndima toli ya Makomami na motema malamu?
20 Soki tozali kondima “mongongo” ya Yehova te, oyo emonisami polele kati na Makomami mpe na mikanda mikolimbolaka Biblia, mosika te tokobanda ‘kotangwa na Nzambe na bomoi.’ Ezali mpasi te ete likambo oyo ezalaki bobele kozanga kotyela toli likebi, ekóma mpenza likambo ya kotyola, kotɛmɛla, mpe koboya toli. Soki likambo yango esembolami te, nsukansuka ebotaka “motema mabe mpe na kozanga kondima,” mpe mbala mingi moto oyo akómi bongo, ezalaka mpasi mpo na kozongisa ye na nzela ya malamu. (Kokanisá na Baefese 4:19.) Yilimia akomaki likambo ya solo ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi; nani akoki koyeba yango?” (Yilimia 17:9) Yango wana, Paulo alendisaki Baebele oyo bazalaki bandimi lokola ye na maloba oyo: “Bópesanaka toli kati na bino mpenza mokolo na mokolo naino ezali yango kobyangama Lelo ete moko kati na bino te azalisama makasi na bozimbisi na masumu.”—Baebele 3:13.
21. Biso nyonso tolendisami na kosala nini, mpe bilikya nini tozali na yango?
21 Tozali mpenza na esengo ete kino lelo oyo, Yehova azali koloba na biso kati na Liloba na ye mpe na nzela ya lisangá na ye! Tozali na botɔ́ndi ete “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kokoba kosalisa biso ete ‘tósimba kino nsuka mpiko oyo ya ebandeli.’ (Baebele 3:14) Sikawa nde ntango ya kondima bolingo mpe litambwisi ya Nzambe. Wana tozali kosala bongo, tokoki kosepela na elaka mosusu ya kitoko oyo Yehova apesi biso—ya ‘koingela na’ epemelo na ye. (Baebele 4:3, 10) Ezali likambo yango nde Paulo alobelaki baklisto Baebele na nsima, mpe tokotalela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Josèphe ayebisaki ete mwa moke nsima ya liwa ya Festus, Ananus (Anania), moto ya Lingomba ya Basadukai akómaki nganga monene. Atindaki Yakobo, ndeko ya Yesu, mpe bayekoli mosusu ete básambisama na Sanedrina, bakatelaki bango etumbu ya liwa mpe babomamaki na mabanga.
b Emonani ete Paulo azongelaki maloba yango na kolandáká libongoli ya Greke ebéngami Septante, oyo ebongoli maloba ya Liebele “Meliba” (Méribah) na “kotomboka” mpe “Masa” (Massah) na “komekama.” Talá buku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible, nkasa 983 mpe 1003, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na nini Paulo akomelaki baklisto Baebele toli ya makasi boye?
◻ Ndenge nini Paulo asalisaki baklisto Baebele na kososola ete bazalaki na eloko oyo ezali na motuya koleka kozala na Lingomba ya Bayuda?
◻ Lolenge nini motema ya moto ekómaka makasi?
◻ Tosengeli kosala nini mpo tókóma te na “motema mabe mpe na kozanga kondima”?
[Elilingi na lokasa 10]
Ozali komonisa kondima epai na Yesu, Mose Monene?