Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/1 nk. 22-24
  • Osepelaka mpenza na mapamboli ya Yehova?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osepelaka mpenza na mapamboli ya Yehova?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mopesi oyo akokani na mopesi mosusu te
  • Mapamboli oyo mazali kokómisa biso bazwi
  • Zelá Yehova na motema molai
  • Luká mapamboli na Ye
  • ‘Nalónaki na mpisoli, nabuki na kongánga na esengo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mapamboli ya Yehova ekómisaka biso bazwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Matomba ya kotambola na bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bópesa Yehova matɔndi mpe bózwa mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/1 nk. 22-24

Osepelaka mpenza na mapamboli ya Yehova?

KENICHI, elenge mobali moko, akendaki na farmasi kosomba nkisi mpo azalaki koyoka mwa miyoyo. Nsima ya komela nkisi, akómaki koyoka mokosa makasi mpe nzoto mobimba esalaki ye mbumambuma. Tokoki kokamwa te ete Kenichi abandaki komituna soki motekisi nkisi apesaki ye mpenza nkisi oyo ye asengelaki na yango.

Bamoko bakoki kotalela Yehova Nzambe na motindo oyo Kenichi atalelaki motekisi ya nkisi. Bazali na mwa ntembe ete Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso amibanzabanzaka na mokomoko kati na biso. Atako bayebi ete Nzambe azali malamu, bandimisami mpenza te ete azali mpenza komibanzabanza mpo na biso. Mingimingi yango emonanaka solo ntango makambo na bango mazali kotambola malamu te to ntango bandimi mitindá ya Biblia bakómi kokutana na mikakatano makasi. Mpo ete bazangi bososoli, bazali kotalela mikakatano na bango lokola mokosa makasi mpe bambuma oyo ebimaki na nzoto ya Kenichi kozanga ete amizela na yango, lokola ete na lolenge moko to mosusu esengeli kopamela Nzambe.​—Masese 19:3.

Tosengeli te kokokanisa Yehova na bato ya kozanga kokoka. Boyebi mpe makoki ya bato ezali na ndelo. Bakoki te kososola na bozindo bamposa ya solosolo ya bato mosusu, lokola motekisi ya nkisi asalaki epai na Kenichi. Na bokeseni, Yehova amonaka makambo nyonso. Mbala mingi Yehova asungaka biso kozanga ete biso moko tósosola mpe tóyeba yango mpamba te tozalaka na momeseno ya kotya likebi na biloko oyo tozangi mpe tobosanaka ebele ya mapamboli oyo tozali na yango. Na esika ya kolinga nokinoki kopamela Yehova mpo na likambo oyo tokutani na yango, tosengeli nde komeka kososola mapamboli ya Yehova oyo tozali na yango.

Engebene búku Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary, “lipamboli” ekoki kolimbolama lokola “eloko oyo ezali komema na bolamu to na bomɛngo.” Ozali komona ete ezali mpenza solo na oyo etali mapamboli mauti na Yehova?

Mopesi oyo akokani na mopesi mosusu te

Ntango mwasi azali koloba ete mobali na ye azali mopesi malamu, mbala mingi alingaka koloba ete akokisaka malamu bamposa ya libota, kopesáká bango bilei oyo ekoki, ndako, mpe bilamba mpo na bolamu mpe bomɛngo ya libota. Yehova azali mopesi ya lolenge nini? Tótalela malamumalamu etando na biso Mabelé, oyo ezali efandelo ya moto. Yango ekabolami na moi na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 150 000 000, ntáká oyo ebongi mpenza mpo ete mabelé ezwa molungé oyo esengeli na yango mpo ete bomoi ekoka kozala awa. Kotɛngama moke ya degré 23,5 ya axe ya mabelé ebongi mpenza, mpamba te yango ezali kopesa nzela na bileko bikeseni (saisons) mpo ete milóna mibima mingi. Mpo na yango, mabelé ezali koleisa bato koleka miliare mitano. Yehova azali solo Mopesi malamu mpenza!

Lisusu, Biblia ezali kondimisa biso ete Yehova azali komibanzabanza mpenza mpo na mokomoko na biso mpe mpo na bolamu na biso. Kanisá naino, Yehova ayebi mokomoko kati na bamiliare ya minzoto na nkombo na yango, mpe ata ndɛkɛ moke moko te ekokwea na nsé kozanga ete ye ayeba. (Yisaya 40:26; Matai 10:29-31) Na koleka, azali kobatela bato oyo balingaka ye mpe baoyo basombamaki na makila ya motuya ya Mwana na ye molingami, Yesu Klisto! (Misala 20:28) Moto na mayele asakolaki solo ete: “Mapamboli na [Yehova, NW] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.”​—Masese 10:22.

Mapamboli oyo mazali kokómisa biso bazwi

Tozali na eloko moko ya motuya monene tosengeli kozala na botɔ́ndi mingi mpo na yango. Eloko yango nini? Biblia emonisi yango ntango elobi ete: “Mobeko na monɔkɔ na yo ezali malamu na ngai koleka nkóto-nkóto na wolo mpe na palata.” (Nzembo 119:72; Masese 8:10) Ata motuya nini wolo ya malamu koleka ekoki kozala na yango, mobeko ya Yehova eleki yango na motuya. Boyebi ya sikisiki ya mobeko na ye bakisa mpe mayele mpe bososoli oyo Yehova apesaka epai na baoyo bazali koluka solo na motema sembo ezali makambo oyo masengeli kopesamela motuya. Yango ekopesa biso makoki ya komibatela, koyeba nini tokoki kosala na ntango ya mpasi, kolónga mikakatano, mpe kozala na esengo mpe bolamu.

Yango ezali solo ata mpo na bana mike. Tótalela lolenge elenge mwasi moko alóngaki mikakatano na kolandáká mobeko ya Yehova. Elenge mwasi yango na nkombo Akemi, afandi pene na engumba Tokyo. Tata na ye na mama na ye basalelaki mitindá ya Biblia mpo na kobɔkɔla ye, mpe na maloba mpe na ndakisa na bango basalisaki mwana na bango ya mwasi ete akólisa bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani. Koyebáká liboso mikakatano oyo akokutana na yango na eteyelo, basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kobongisa ye malamu. Nzokande, ntango Akemi akɔtaki eteyelo ya ebandeli, banakelasi mosusu bamonaki ete “akesanaki” na bango mpamba te azalaki kosambela liboso ya kolya mpe azalaki koboya makambo oyo Makomami epekisi. Mosika te, bakómaki kotumola ye na etuluku moko ya banakelasi ya mobulu, oyo bazalaki komema ye na esika ya kobombama ntango kelasi esili mpe bazalaki kobɛta ye mbata na elongi, kobalola ye mabɔkɔ, mpe kotyola ye.

Elenge Akemi azalaki kozongisa te, azalaki mpe kolɛnga liboso na bango te. Nzokande, amekaki kosalela makambo oyo asilaki koyekola. Mpo na etamboli malamu mpe mpiko na ye, baninga na ye mingi ya kelasi bákómaki komemya ye. Bayebisaki likambo yango epai na molakisi na bango, mpe banda mokolo wana, Akemi atungisamaki lisusu te na eteyelo.

Nini esungaki Akemi ete alónga motungisi wana? Boyebi ya sikisiki, mayele, mpe bwanya euti na Yehova oyo baboti na ye bateyaki ye. Ayebaki malamumalamu mpiko ya Yesu, mpe yango epusaki ye ete amekola ndakisa na ye. Biblia esalisaki ye na kososola ete bato mosusu basalaka mabe mpo ete bazangi boyebi, mpe yango elendisaki ye ete ayina mabe oyo bana wana ya mobulu bazalaki kosala kasi ayinaki bango bato te.​—Luka 23:34; Baloma 12:9, 17-21.

Ya solo, ezali na baboti te oyo bakolinga ete bátyola mwana na bango to bányokola ye. Kasi, okoki kokanisa esengo oyo baboti ya Akemi bazalaki na yango ntango bayokaki makambo nyonso oyo masalemaki. Bana motindo wana bazali solo lipamboli liuti na Yehova.​—Nzembo 127:3; 1 Petelo 1:6, 7.

Zelá Yehova na motema molai

Kasi, liboso ete ozwa mapamboli ya Yehova, ntango mosusu osengeli kozela ntango oyo ye moko akani. Yehova ayebi ezalela na yo mpe akokokisa mposa nyonso na ntango oyo ekomemela yo litomba koleka. (Nzembo 145:16; Mosakoli 3:1; Yakobo 1:17) Okoki kosepela kolya mbuma, kasi okanisi boni soki moyambi akopesa yo mbuma eteli naino te? Ata ezali pɔ́mɔ, ndimo, to mbuma mosusu, okolinga mbuma oyo eteli, ezali na mai mingi, mpe ezali na elengi. Bobele bongo, Yehova akopesaka biloko oyo ozali na yango mposa na ntango ebongi—liboso ya ntango te mpe nsima ya ntango te.

Omikundola lisoló ya Yosefe. Kozanga ete asala mabe, akɔtaki bolɔ́kɔ na Ezipito. Moninga moko mokangami, mosali na mesa ya Falo, alikyaki ete akobimisama na bolɔ́kɔ mpe alakaki ete akoyebisa Falo likambo ya Yosefe. Kasi ntango abimaki abosanaki mpenza likambo ya Yosefe. Emonanaki lokola ete Yosefe asundolamaki. Nzokande, na nsima ya mbula mibale, babimisaki ye na bolɔ́kɔ mpe na nsuka akómaki moto ya mibale na boyangeli ya Ezipito nsima ya Falo. Na esika ete azala motema lukuluku, Yosefe azelaki Yehova. Mpo na yango, apambolamaki na motindo oyo ete abatelaki bomoi, ezala ya Bayisalaele mpe ya Baezipito.​—Genese 39:1–41:57.

Masashi azalaki nkulutu na lisangá moko na nɔ́rdi ya ekólo Japon. Azalaki na bolɔ́kɔ te lokola Yosefe, kasi asengelaki kotalela Yehova. Mpo na nini? Uta Eteyelo mpo na kobongisa basungi ebandaki na ekólo Japon, mposa na ye mpenza ezalaki ete akɔta na eteyelo yango. Abondelaki mingi mpo na libaku malamu wana. Moninga na ye mobongisi-nzela abyangamaki, kasi atako azalaki na mposa makasi, Masashi abyangamaki te. Alɛmbaki nzoto mpenza.

Nzokande, asalaki eloko mpo na kolónga mayoki na ye. Ayekolaki Biblia mpe mikanda mibimisami na la Société Watch Tower, kotyáká likebi na masoló oyo matali kozala moto ya komikitisa mpe kozala na bokonzi likoló na mayoki na yo moko. Asembolaki lolenge na ye ya kokanisa mpe na bongo asepelaki na mosala oyo azalaki kosala. Na nsima, ntango azalaki komizela na yango te, azwaki libyangi ya kokɔta na eteyelo.

Lokola akolisaki bizaleli lokola motema molai mpe komikitisa, azwaki litomba mingi koleka na eteyelo. Na nsima, Masashi azwaki libaku malamu ya kosalela bandeko na ye lokola mokɛngɛli-motamboli. Ɛɛ, Yehova ayebaki mposa ya Masashi mpe akokisaki yango na ntango oyo elingaki kopesa ye litomba mingi koleka.

Luká mapamboli na Ye

Na bongo, Yehova azali lokola motekisi ya nkisi te. Atako tozangaka kososola likebi mpe lobanzo ya Yehova, bolamu na ye eyaka na ndenge mingi ekeseni—na bantango mpe na mitindo oyo ekopesa biso litomba mingi koleka. Na bongo, luká ntango nyonso mapamboli na ye. Omikundola ete ozali na bantina mingi ya kozala na botɔ́ndi. Osili kopambwama na biloko ya ntina mpo ete okóba kozala na bomoi na mabelé. Osili kopesamela boyebi ya Yehova mpe ya banzela na ye ya kokoka. Osili kopesamela mayele. Mpe osili kozwa bososoli. Nyonso oyo ezali mpo na bolamu mpe bomɛngo na yo.

Mpo na kozwa mapamboli ya Yehova mingi koleka, landá koyekola Biblia ntango nyonso. Sɛngá Yehova ete asalisa yo okanga ntina mpe osalela mateya ya Liloba na ye lipemami oyo ezali lokola biloko ya motuya. Yango ekokómisa yo mpenza mozwi na elimo, na boye ete okozanga eloko te. Ɛɛ, yango elimboli bolamu mpe bosepeli mpo na yo uta sikawa mpe bomoi etondi na biloko na mokili ya sika oyo ezali koya.​—Yoane 10:10; 1 Timoté 4:8, 9.

[Elilingi na lokasa 23]

Mapamboli ya Yehova eleki wolo na motuya

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto