Yaká na Liyangani ya Etúká “Kondima kati na Liloba ya Nzambe”!
NA BISIKA mingi kati na mokili mobimba, bankóto ya bato bakozala na mayangani yango. Bobele na Burundi, Congo mpe Zaïre, mayangani yango malɛngɛlami na bisika 53. Liyangani ya liboso ekobanda na mokolo ya 11 Yulí kino 13 Yulí mpe ya nsuka ekobanda na mokolo ya 19 Sɛtɛ́mbɛ kino 21 Sɛtɛ́mbɛ. Na ntembe te, moko ya mayangani wana ya mikolo misato—banda mokolo ya mitano kino mokolo ya lomingo—ekozala na engumba na bino to mpe na engumba mosusu oyo ezali pembeni.
Okozwa matomba na ebele ya mateya mabongi oyo mauti na Biblia. Na bisika mingi, manáka makobanda na miziki mikolo yango nyonso na ngonga ya 9:30 ya ntɔ́ngɔ́. Kati na manáka ya mokolo ya mitano na ntɔ́ngɔ́ ekozala na mituna-lisoló ekosalema na boumeli ya miniti 25 na bato oyo kondima na bango kati na Liloba ya Nzambe esalaki bopusi mingi na bomoi na bango. Eteni wana ya liboso ekosuka na lisukúlu ya moboko oyo ezali na motó na likambo ete “Tozali kotambola na kondima kasi na komona te.”
Lisukúlu ya liboso na mokolo ya mitano na nsima ya nzánga ekolobela mosala ya ntina oyo bilenge bazali kokokisa kati na lisangá ya boklisto. Yango ekolandama na masukúlu-matongani na biteni misato oyo ekolobela mitindá ya Biblia mpo na etamboli ya moklisto na ntina na maloba, misala, mpe molato. Na nsima, masukúlu oyo mazali na mitó na makambo ete “Kebá na kozanga kondima” mpe “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi” makolobela mingi likebisi ya ntina oyo tozali kokuta na mokanda ya Baebele mokapo 3 mpe mokapo 4. Manáka na mokolo ya mitano ekosuka na lisukúlu oyo ezali na motó na likambo ete “Búku mpo na bato nyonso.”
Lisukúlu ya liboso na mokolo ya pɔ́sɔ na ntɔ́ngɔ́ ezali na motó na likambo ete “Kondima ezangi misala esili kokufa.” Lisukúlu mosusu ya ntina mingi na ntɔ́ngɔ́ yango ezali na motó na likambo ete “Pikamá ngwi kati na solo mpe kotɛngatɛnga te” ekolimbola lolenge oyo moto akoki kokóla na elimo. Manáka makosuka na likambo oyo tomesani na yango na mayangani nyonso, lisukúlu “Kondima kati na Liloba ya Nzambe ezali komema na batisimo,” mpe ekolandama na molulu ya batisimo mpo na bayekoli ya sika.
Lisukúlu ya liboso na mokolo ya pɔ́sɔ nsima ya nzánga ezali na motó na likambo ete “Bundá makasi mpo na kondima,” yango ekolobela toli oyo ezwami na mokanda ya Yuda kati na Biblia. “Tiká ete tókende na Ndako ya Yehova,” wana ezali motó na likambo ya masukúlu-matongani oyo makoumela ngonga moko mpe makolobela matomba ya makita ya boklisto. Manáka mpo na mokolo yango makosuka na lisukúlu oyo ezali na motó na likambo ete “Motuya ya kondima na yo—Emekami sikawa.”
Na mokolo ya lomingo na ntɔ́ngɔ́ ekozala na masukúlu-matongani ya biteni misato oyo ekolobela mokanda ya Yoele, mpe kosalelama na yango na mikolo na biso. Na nsima, tokolanda lisano-liteya etongami na lisoló ya Biblia oyo motó na likambo na yango elobi ete “Batelá liso na yo malamu.” Eteni ya ntina mingi ya liyangani ekozala lisukúlu ya bato banso oyo ezali na motó na likambo ete “Kondima mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya.”
Na ntembe te okozwa matomba mingi na elimo na kozaláká na liyangani yango. Tobyangi yo na esengo nyonso ete ozala wana na boumeli ya liyangani mobimba. Zwá bibongiseli uta sikawa mpo na koyangana. Mpo na koyeba esika ya liyangani oyo ezali pembeni na esika ofandi, tuná Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi na engumba na bino to tindá nkomá na adresi ya babimisi ya zulunalo oyo. Lisusu, okoki komona adresi ya bisika epai kuna mayangani malɛngɛlami na Burundi, Congo mpe Zaïre na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1997.